Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kolonga mawa ya kozala yo moko

Ndenge ya kolonga mawa ya kozala yo moko

 Ozali komiyoka mawamawa mpo ozali kaka yo moko? Soki bongo, mbala mosusu ozali komiyoka lokola mokomi ya nzembo, oyo alobaki: “Nakómi lokola ndɛkɛ oyo ezali yango moko na nsamba.” (Nzembo 102:7) Toli ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano oyo eyaka ntango moto azali kaka ye moko.

 Kómisá makasi boyokani na yo ná Nzambe

 Ata ntango ozali yo moko, okoki kozala na esengo soki oyebi oyo osengeli kosala mpo na kosepelisa Nzambe mpe ozali kosala yango. (Matai 5:3, 6) Bisaleli ya ofele oyo elandi ekoki mpenza kosalisa yo mpo na likambo yango.

  •   Biblia na Internet oyo ezali mpenza pɛtɛɛ na kotánga

  •   Eteni “Toli ya Biblia” na site Internet na biso (na Anglais) epesaka biyano na mituna ya ntina mingi ya bomoi

  •   Bavideo ya mikuse oyo elobelaka mateya ya ntina mingi ya Biblia

  •   Eteni “Biyano na mituna ya Biblia”​—Oyo epesaka biyano na mituna oyo bato bamitunaka mingi

  •   Eteni “Mekolá kondima na bango”​—Ezali na masolo oyo ekosalisa yo omona na makanisi bomoi ya basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli

  •   Eteni “Ebimá kaka yango moko?”​—Emonisaka ndenge biloko nyonso na mokili ekelamá kitoko mpe na ndenge ya kokamwa

 Tángá masolo ya kobɔndisa oyo ezali na Biblia

 Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na nse esalisá bato ebele mpo bázwa libɔndisi. Na esika otánga bavɛrsɛ ebeleebele na mbala moko, luká kosalela malamu ntango oyo ozali yo moko mpo na kokanisa mingi na bavɛrsɛ yango mokomoko mpe mpo na kobondela.​—Marko 1:35.

 Luká koyeba mpo na nini makambo mabe ezali kosalema na mokili

 Okoki kolonga mpenza mikakatano nyonso na bomoi soki oyebi mpo na nini makambo mabe ezali kosalema mpe ndenge nini Nzambe akosilisa yango.​—Yisaya 65:17.

 Boyá mitungisi ezangá ntina

 Masolo oyo elandi ekoki kosalisa yo olonga mawa oyo eyaka ntango ozali yo moko mpe ‘otika komitungisa.’​—Matai 6:25.

 Zalá na baninga mpe yebá kobatela boninga

 Kozala na baninga ekosalisa yo omiyoka malamu mpe ozala na makanisi malamu, mpe ntango likoki ya kokutana na bato boye ezali te, kozala na baninga ekómaka lisusu na ntina mpenza. Soki okangami yo moko na ndako, okoki ata kobenga bato na telefone to mpe na video mpo osala boninga na bango to obatela baninga oyo ozali na bango. Masolo oyo elandi ekoki kosalisa yo ozwa mpe ozala “moninga ya solosolo.”​—Masese 17:17.

 Saláká ngalasisi

 Biblia elobi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.” (1 Timote 4:8) Ngalasisi esalaka ete moto akanisaka malamu mpe azala na esengo, mingimingi ntango azali ye moko. Ata soki okangami yo moko na ndako, ozali na makambo ya kosala mpo ozala ntango nyonso nzoto malamu.