Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kolonga kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana

Ndenge ya kolonga kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana

 Ndenge maladi ya COVID-19 ezali kokoba kosasa bato na mokili mobimba, ezali kosala ete omiyoka ete olɛmbi nzoto? Soki bongo, yebá ete ozali yo moko te. Basanza mingi sikoyo na mokili mobimba, tobongoli makambo mingi na bomoi na biso mpo na maladi yango. Doktɛrɛ Hans Kluge, mokambi ya OMS na bitúká ya Mpoto alobi ete bato “bamoni ete esɛngi milende mingi mpenza mpo na kolonga COVID-19.” Abakisi lisusu boye: “Na bantango ya ndenge wana, moto akoki koyoka ete azali kaka ye moko, azali na mposa ya kosala lisusu likambo moko te, mpe akoki koyoka ete alɛmbi nzoto.”

 Soki ozali komona ete maladi oyo ezali kopanzana ezali kosala ete olɛmba nzoto, zalá na mpiko. Biblia ezali kosalisa bato mingi bálonga na bomoi na ntango oyo ya mpasi. Ekoki mpe kosalisa yo.

 Kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana ezali nini?

 Maloba “kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana” ezali te mokakatano oyo ezali kosɛnga lisalisi ya monganga. Kasi elimboli nde komiyoka ete elikya ezali te mpo na mbongwana oyo esalemi na bomoi ya bato mpo na maladi oyo ezali kopanzana oyo ezali koumela mpe ezali kosila te. Atako bato nyonso te na mokili mobimba bazali komiyoka ndenge moko, talá bilembo oyo ezali komonana epai ya bato mingi na ntango ya maladi oyo ezali kopanzana:

  •   Mposa ya kosala makambo ezali te.

  •   Mbongwana na makambo etali momeseno ya kolya to ya kolala

  •   Kosilika mpambampamba

  •   Komitungisa mpo na misala oyo ezalaka mpenza mpasi te soki ekosalema malamu

  •   Kozanga kotya makanisi na mosala

  •   Kozanga elikya

 Mpo na nini kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana ezali mabe mpenza?

 Kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana ezali kotya bomoi na biso mpe ya bato mosusu na likama. Soki tozali kobundisa yango te, tokoki mokemoke kobungisa molende na biso ya kotosa malako ya komibatela na maladi ya coronavirus. Mpe mokemoke, tokoki kokóma komona mpamba virisi yango, atako virisi yango ezali kokoba kopanzana mpe koboma bato. Ntango tolɛmbi kotosa malako ya komibatela mpo na maladi yango, tokoki komona ete tokómi na bonsomi, yango ekoki kozala likama mpo na biso, mpe mpo na basusu.

 Na bantango oyo ya mpasi, bato mingi bazali komona bosolo ya maloba oyo ya Biblia: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Biblia epesi mitinda oyo ekoki kosalisa biso tólonga makambo oyo ezali kolɛmbisa biso lelo oyo, ezala mpe maladi oyo ezali kopanzana.

 Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana?

  •   Boyá kozala penepene na bato mosusu, kasi kobá kosolola na bango

     Oyo Biblia elobi: “Moninga ya solosolo . . . azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

     Mpo na nini ezali na ntina: Baninga ya solosolo balendisaka biso, mpe basungaka biso. (1 Batesaloniki 5:11) Kasi, soki tokómi mosika na basusu ntango molai, sante na biso ekokóma na likama.​—Masese 18:1.

     Meká kosala boye: Kobá kosolola na baninga na yo na nzela ya video, ya telefone, ya bamesaje to ya e-mail. Luká lisalisi na bango ntango ozali komiyoka malamu te, mpe zwáká ntango ya kotala bamesaje mpo na koyeba soki bazali ndenge nini. Bólobelaka makambo oyo ezali kosalisa bino na ntango ya maladi oyo mabe. Luká libaku ya kosalela moninga moko likambo ya malamu, ekosala ete azala na esengo na mokolo wana, yo mpe okozala na esengo.

  •   Salá makambo ya malamu oyo okoki kosala na ntango oyo ya mpasi

     Oyo Biblia elobi: “[Omisombela] ntango oyo ebongi.”​—Baefese 5:16.

     Mpo na nini ezali na ntina: Kosalela ntango na yo na bwanya ekoki kosalisa yo ozala na makanisi malamu mpe oboya komitungisa koleka ndelo.​—Luka 12:25.

     Meká kosala boye: Na esika otya makanisi na nyonso na makambo oyo okoki kosala te, luká kosala makambo ya malamu oyo okoki kosala na ntango oyo ya mpasi. Na ndakisa, ezali na misala oyo okoki kosala sikoyo to kolekisa ntango na kominanola? Okoki kolekisa ntango mingi elongo na libota na yo?

  •   Kobá kosala makambo oyo omesaná kosala

     Oyo Biblia elobi: “Makambo nyonso esalema . . . na molɔngɔ.”​—1 Bakorinti 14:40.

     Mpo na nini ezali na ntina: Bato mingi balingaka kotya makanisi na bango na misala na bango mpe bazalaka na esengo mingi ntango bazali kosala misala oyo bamesaná kosala mokolo na mokolo.

     Meká kosala boye: Salá programɛ oyo ebongi na kotalela makambo oyo ozali kokutana na yango lelo. Poná ngonga ya sikisiki oyo okobanda kosala badevuare ya kelasi, mosala ya mosuni, mpe misala ya ndako, kasi kobosana te kotya ngonga mpo na makambo ya elimo oyo ekosala ete opusana penepene na Nzambe. Kobosana mpe te kotya ngonga ya kominanola malamu, na ndakisa, kolekisa ntango elongo na libota, mpe kosala ngalasisi. Taleláká mbala na mbala ndenge ozali kosalela ntango, mpe bongolá yango soki esengeli.

  •   Salá nyonso omesana na mbongwana ya bileko to ya klima

     Oyo Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.”​—Masese 22:3.

     Mpo na nini ezali na ntina: Na kotalela esika oyo ofandi, klima ekoki kobongwana mpe kosala ete ozala mpenza te na ntango mingi mpo na kozwa mwa mopɛpɛ mpe koyoka molunge ya moi, kutu yango ezali na ntina mingi mpo ozala na sante malamu, ezala na nzoto mpe na makanisi.

     Meká kosala boye: Na eleko ya mpiɔ, meká kobongola makambo mosusu na kati ya ndako to na esika ya mosala mpo ozwa litomba na molunge ya moi. Salá programɛ na ndenge ekopesa yo likoki ya kosala misala mosusu na libándá atako mpiɔ ezali. Soki esengeli, latá bilamba ya eleko ya mpiɔ, oyo ekoki kosala ete olekisa ntango mingi na libándá.

     Na eleko ya molunge, bato mingi balekisaka ntango mingi na libándá. Na yango, ntango ozali kolongwa na ndako, osengeli lisusu kozala ekɛngɛ. Luká koyeba bisika oyo ozali kokende mpe poná bisika ya kotala epai bato bakendeke mingi te.

  •   Kobá kotosa malako ya komibatela mpo na coronavirus

     Oyo Biblia elobi: “Zoba akómaka na nkanda makasi mpe amityelaka motema.”​—Masese 14:16.

     Mpo na nini ezali na ntina: Maladi ya COVID-19 ezali koboma, mpe tokoki kozwa yango soki tozali lisusu te kokipe malako ya komibatela.

     Meká kosala boye: Mbala nyonso taleláká malako ya komibatela oyo ezali kosalelama na esika ofandi mpo na koyeba ete ozali kokoba kozala ekɛngɛ. Kanisá makama oyo makambo ozali kosala ekoki kobimisa epai na yo moko, libota na yo mpe basusu.

  •   Kómisá makasi boyokani na yo ná Nzambe

     Oyo Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

     Mpo na nini ezali na ntina: Nzambe akoki kosalisa yo oyika mpiko na mokakatano ya ndenge nyonso.​—Yisaya 41:13.

     Meká kosala boye: Tángáká eteni moko ya Liloba ya Nzambe, Biblia, mokolo na mokolo. Kosala bongo mokolo na mokolo ezali malamu mpo ekosalisa yo opusana mokemoke penepene na Nzambe.

 Batatoli ya Yehova bazwi bibongiseli ya kokoba kosala makita ya losambo na bango na ntango oyo ya maladi oyo ezali kopanzana. Na ndakisa, na mokili mobimba, bazali kosala yango na nzela ya video pɔsɔ nyonso mpe mayangani oyo esalamaka mbula na mbula, ezala mpe likita ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Ezali malamu oluka kosolola na Batatoli ya Yehova mpo na koyeba soki okoki kosala nini mpo na koyangana na makita oyo ezali kosalema na nzela ya video!

 Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo olonga kolɛmba oyo ezali kouta na maladi oyo ezali kopanzana

 Yisaya 30:15: “Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.”

 Ndimbola: Kotya motema na toli ya Nzambe ekoki kosalisa biso tófanda nyɛɛ na ntango ya mpasi.

 Masese 15:15: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.”

 Ndimbola: Kotya makanisi na makambo ya malamu ekoki kosalisa biso tózala na esengo ata na ntango ya mpasi.

 Masese 14:15: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”

 Ndimbola: Tólanda malako ya komibatela, mpe tókanisa noki te ete malako yango ezali na ntina te.

 Yisaya 33:24: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”

 Ndimbola: Nzambe alaki ete akosilisa maladi nyonso.