Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BATAMBWISI-MPUNDA MINEI​—NDENGE OYO BAZALI KOPOTA MBANGU ETALI MPE YO

Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?

Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?

Batambwisi-mpunda minei yango bakoki kokamwisa mpe kobangisa biso, kasi esengeli kokamwisa to kobangisa biso te. Mpo na nini? Mpo Biblia ná makambo oyo ezali kosalema na ntango na biso ezali kosalisa biso tóyeba mpenza soki motambwisi-mpunda mokomoko azali komonisa nini. Atako kopota mbangu na bango ezali komonisa mpasi oyo ezali awa na mabele, ekoki mpe kozala nsango malamu mpo na yo mpe libota na yo. Na ndenge nini? Liboso, tóluka naino koyeba motambwisi-mpunda mokomoko.

MOTAMBWISI-MPUNDA YA MPƐMBƐ

Emonaneli yango ebandi boye: “Namonaki, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ; mpe moto oyo afandi likoló na yango azali na litimbo; mpe bapesaki ye motole, mpe abimaki azali kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.”​—Emoniseli 6:2.

Motambwisi-mpunda ya mpɛmbɛ azali nani? Kaka mokanda yango ya Emoniseli esalisi biso tóyeba ye mpo na nsima ebengi motambwisi-mpunda yango ya likoló “Liloba ya Nzambe.” (Emoniseli 19:11-13) Yesu Kristo nde abengami na titre Liloba, mpo azali molobeli ya Nzambe. (Yoane 1:1, 14) Lisusu, babengi Yesu “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo” mpe alobelami lokola moto ya “sembo mpe solo.” (Emoniseli 19:16) Ezali polele ete abongi kozala mokambi ya limpinga mpe asalelaka bokonzi na ye na ndenge ya mabe te. Kasi yango ebimisi mituna mosusu.

Nani apesi Yesu bokonzi ya kolonga? (Emoniseli 6:2) Mosakoli Danyele azwaki emonaneli mpe na emonaneli yango bakokanisaki Masiya na “mwana ya moto,” mpe bapesaki ye “boyangeli, lokumu ná bokonzi” epai ya Yehova Nzambe, * “Mokóló na mikolo.” (Danyele 7:13, 14) Boye, ezali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde apesi Yesu bokonzi mpe lotomo ya koyangela mpe ya kosambisa. Mpunda ya mpɛmbɛ ebongi mpenza mpo na komonisa etumba ya bosembo oyo Mwana ya Nzambe akobunda mpo mbala mingi Biblia esalelaka mpunda ya mpɛmbɛ mpo na kolobela bosembo.​—Emoniseli 3:4; 7:9, 13, 14.

Ntango nini batambwisi-mpunda babandaki kopota mbangu? Simbá ete Yesu mopoti-mbangu ya liboso abandaki yango ntango bapesaki ye bokonzi. (Emoniseli 6:2) Azwaki bokonzi ntango nini? Azwaki yango mbala moko te ntango azongaki na likoló nsima ya liwa na ye. Biblia emonisi ete azelaki naino mpo na mwa ntango. (Baebre 10:12, 13) Yesu apesaki bayekoli na ye elembo mpo báyeba ntango oyo akobanda koyangela na likoló. Alobaki ete ntango akobanda koyangela, makambo ekobeba mpenza na mabele. Bitumba, kozanga bilei mpe bamaladi mabe ekozala. (Matai 24:3, 7; Luka 21:10, 11) Ntango kaka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914, emonanaki polele ete eleko yango ebandaki; eleko ya mobulu oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.”​—2 Timote 3:1-5.

Kasi mpo na nini kobanda Yesu akómaki Mokonzi na 1914, makambo ezali se kobeba na mabele? Mpo na ntango yango Yesu abandaki koyangela nde na likoló, kasi na mabele te. Etumba ebimaki na likoló mpe Yesu, Mokonzi ya sika oyo abengami Mikaele, abwakaki Satana ná bademo na mabele. (Emoniseli 12:7-9, 12) Kobanda wana, Satana azali na nkanda makasi mpo ayebi atikali na mikolo ya kotánga. Mosika te, Nzambe akokokisa mokano na ye awa na mabele mpe akolongola Satana. (Matai 6:10) Sikoyo, tótala ndenge batambwisi-mpunda misato bamonisi mpe ete tozali mpenza na eleko ya mobulu oyo babengi “mikolo ya nsuka.” Na bokeseni na motambwisi-mpunda ya liboso, oyo ayebani mpenza soki azali nani, batambwisi-mpunda misato oyo balandi bazali komonisa makambo oyo ezali kokómela bato na mokili mobimba.

MOTAMBWISI-MPUNDA YA MOTANE NGWAA

“Mosusu ebimaki, mpunda moko ya langi ya motane ngwaa; mpe bapesaki moto oyo afandi likoló na yango nzela ya kolongola kimya na mabele mpo bato bábomana; mpe bapesaki ye mopanga moko monene.”​—Emoniseli 6:4.

Motambwisi-mpunda yango azali komonisa bitumba. Simbá ete azali kolongola kimya na bikólo nyonso na mokili mobimba. Mpo na mbala ya liboso, na 1914 etumba ebimaki na mokili mobimba. Na nsima Etumba ya Mibale ya mokili mobima ebimaki mpe ezalaki mabe koleka. Basusu balobi ete kobanda 1914 bato koleka milio 100 bakufi na bitumba mpe matata ya basoda! Longola yango, ebele ya bato mosusu mpe bazokaki bampota ya minene.

Na nini bitumba ya mikolo na biso ezali mpenza mabe koleka? Mpo na mbala ya liboso banda mokili ebandá, bato bakómi na likoki ya koboma bato nyonso na mbala moko. Ata oyo babengaka bibongiseli ya kotya kimya na ndakisa ONU, ezangi likoki ya kopekisa motambwisi-mpunda ya motane.

MOTAMBWISI-MPUNDA YA MOINDO

“Namonaki, mpe talá! mpunda moko ya moindo; mpe moto oyo afandi likoló na yango azalaki na emekeli-kilo na lobɔkɔ na ye. Mpe nayokaki mongongo moko lokola nde na katikati ya bikelamu yango minei ya bomoi elobi: ‘Kilo moko ya blé denari moko, mpe kilo misato ya ɔrje denari moko; mpe kobebisa mafuta ya olive ná vinyo te.’”​—Emoniseli 6:5, 6.

Motambwisi-mpunda yango azali komonisa nzala. Awa ezali komonisa ndenge bakobatela mpenza bilei na boye ete kilo moko ya blé ekozala na ntalo ya denari moko, salɛrɛ ya mokolo mobimba na siɛklɛ ya liboso! (Matai 20:2) Kaka mbongo wana ekokaki kosomba kilo misato ya ɔrje, oyo blé elekaki yango na valɛrɛ. Ndenge nini yango ekoki koleisa libota ya bato ebele? Yango wana bayebisaka bato báyeba kobatela ata bilei ya mokolo na mokolo mpe ebongi mpenza ndenge emonisami na bilei lokola mafuta ya olive mpe vinyo, bilei oyo bato bazalaki kosalela mingi na ntango wana.

Tomoni mpenza makambo oyo emonisi ete motambwisi-mpunda ya moindo azali kopota mbangu kobanda 1914? Ɛɛ! Bato soki milio 70 bakufaki na nzala na boumeli ya siɛklɛ ya 20. Mokonzi moko alobaki ete “kobanda 2012 tii 2014, bato milio soki 805 (1/9) ya mokili mobimba bazalaki kolya malamu te.” Lapolo mosusu elobi: “Nzala ebomaka bato mingi mbula na mbula koleka bato nyonso oyo bakufaka na sida, malaria to maladi ya ntolo.” Atako bato bazali kosala milende mpo na koleisa bato ya nzala, kasi motambwisi-mpunda ya moindo azali kokoba kopota mbangu.

MOTAMBWISI-MPUNDA YA LANGI MWA MOKE LOKOLA MAI YA MPƆNDU

“Namonaki, mpe talá! mpunda moko ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu; mpe moto oyo afandaki likoló na yango nkombo na ye Liwa. Mpe Nkunda ezalaki kolanda ye penepene. Mpe bapesaki bango bokonzi likoló ya moko ya bandambo minei ya mabele, mpo na koboma na mopanga moko ya molai mpe na nzala mpe na bolɔzi ya liwa mpe na banyama mabe ya mabele.”​—Emoniseli 6:8.

Motambwisi-mpunda ya minei azali komonisa liwa oyo ekómelaka bato mpo na bampasi mpe makambo mosusu. Kaka nsima ya 1914, maladi babengi grippe espagnole ebomaki bamilio ya bato. Ekoki kozala ete bato soki milio 500 bazwaki maladi yango, elingi koloba soki ozwi bato misato moko na bango azwaki maladi yango!

Kasi grippe espagnole ezalaki kaka ebandeli. Bato ya mayele balobi ete maladi ya kolokoto ebomaki bamilio ya bato na siɛklɛ ya 20. Tii lelo, bamilio ya bato bazali kokufa na maladi lokola sida, maladi ya ntolo mpe malaria atako minganga bakolisi mayele.

Ata soki moto akufi na bitumba, nzala to na maladi, nyonso ezali kaka ndenge moko. Nkunda ezali kokoba koyamba bato yango mpe solisyo ezali te.

MAKAMBO EKOBONGA NA MIKOLO EZALI KOYA

Mosika te eleko oyo ya mobulu ekosila. Kobosana te ete kobanda 1914, Yesu ‘abimaki mpo na kolonga,’ mpe abwakaki Satana na mabele, kasi asilisaki kolonga te. (Emoniseli 6:2; 12:9, 12) Mosika te na Armagedone, Yesu akosilisa Satana makasi mpe akoboma bato oyo bapesaka ye mabɔkɔ. (Emoniseli 20:1-3) Yesu akosukisa mbangu oyo batambwisi-mpunda misato bazali kopota mpe akolongola makambo ya mabe oyo bamemeli bato. Ndenge nini? Talá bilaka oyo Biblia epesi.

Na esika ya bitumba, kimya nde ekozala. Yehova “azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga.” (Nzembo 46:9) Bato oyo balingá kimya “bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11.

Na esika ya nzala, bilei ekozala beboo. “Mbuma ekozala beboo na mabele; Na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

Mosika te Yesu akolongola makambo oyo batambwisi-mpunda wana misato babimiseli bato

Na esika ya bampasi mpe liwa, bato nyonso bakozala na nzoto ya kokoka mpe bomoi ya seko. Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalaki mwa makambo oyo emonisaki oyo akosala ntango akoyangela. Alendisaki kimya, aleisaki ebele ya bato na ndenge ya likamwisi, abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki ata bakufi.​—Matai 12:15; 14:19-21; 26:52; Yoane 11:43, 44.

Batatoli ya Yehova bakosepela kolakisa yo na Biblia ndenge okoki kosala mpo ozala na esengo ntango oyo batambwisi-mpunda yango bakosilisa kopota mbangu. Okosepela koyekola makambo mosusu?

^ par. 7 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.