Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

E+/taseffski/via Getty Images (Stock photo. Posed by model.)

BÓSƐNZƐLAKA!

Bilenge mingi bakómi kobɛla na makanisi lelo oyo​—Biblia elobi nini?

Bilenge mingi bakómi kobɛla na makanisi lelo oyo​—Biblia elobi nini?

 Na mokolo ya 13/02/2023, ebongiseli moko ya Amerika oyo etalelaka bamaladi (Centre américain de contrôle et de prévention des maladies) ebimisaki lapolo moko oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya makanisi ya bilenge ya États-Unis. Emonisaki ete bilenge mingi (koleka 40%) oyo bazali na eteyelo, bazalaki kobundana mpo na ntango molai na mayoki ya mawa mpe ya kozanga elikya.

 Doktɛrɛ Kathleen Ethier, oyo azali mokambi ya ebongiseli moko oyo etalelaka bilenge mpe biteyelo (Division adolescents et école au CDC) alobaki boye: “Bambula 10 oyo euti koleka, bilenge mingi bakómaki kobɛla motó. Kasi, motángo ya bilenge basi oyo bakómi lelo oyo kobɛla makasi na motó mpe kozala na makanisi ya komiboma ekómi mingi koleka ndenge ezalaki liboso.”

 Lapolo emonisaki ete:

  •   Elenge mwasi 1 na kati ya bilenge basi 10 to koleka (to 14%) basangisaki na bango nzoto na makasi ntango oyo bazalaki na mposa na yango te. Doktɛrɛ Kathleen Ethier alobaki ete: “Likambo yango ezali mpenza kobangisa, mpamba te, ekoki kozala na bilenge basi 10 oyo oyebi, mbala mosusu moko to mingi na kati na bango basangisá na bango nzoto na makasi.”

  •   Pene na elenge 1 kati na bilenge basi 3 (to 30 %) balingaki mpenza komiboma.

  •   Pene na bilenge basi 3 kati na bilenge basi 5 (to 57 %) bazalaki mawamawa mpe komiyoka ete bazangi elikya.

 Ankɛtɛ yango ezali mpenza kopesa mpasi na motema mpamba te bolenge esengeli kozala eleko moko ya esengo mpe ya nsai. Nini ekoki kosalisa bilenge bálonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo oyo? Biblia elobi nini?

Batoli ya Biblia mpo na bilenge

 Biblia elobelá na bosikisiki ntango oyo ya mpasi tozali kobika lelo oyo. Ebengi yango “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1-5) Kasi, Biblia ezali na batoli mingi oyo ezali kosalisa bamilio ya bilenge na mokili mobimba bálonga atako bazali kokutana na mikakatano. Tiká tótalela masolo oyo ezali kolobela Biblia.

 Lisalisi mpo na bilenge oyo bazali kobundana na makanisi ya komiboma

 Lisalisi mpo na bilenge oyo bazali kotungisama na makanisi, bazali mawamawa, to na makanisi mabe

 Lisalisi mpo na bilenge oyo bazali kotumola bango na eteyelo to na nzela ya Internet

 Lisalisi mpo na bilenge oyo bazali koluka kosangisa na bango nzoto na makasi mpe oyo basangisá na bango nzoto na makasi

Batoli ya Biblia mpo na baboti

 Biblia ezali mpe kopesa batoli oyo ebongi mpo na kosalisa baboti básalisa bana na bango oyo bazali bilenge báyikela mikakatano ya bomoi mpiko. Tiká tótalela masolo oyo ezali kolobela Biblia.