Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Nzembo 23:4​—“Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi”

Nzembo 23:4​—“Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi”

 “Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi, nabangaka eloko ya mabe ata moko te, mpo ozali elongo na ngai; nzete na yo mpe lingenda na yo ezali biloko oyo ebɔndisaka ngai.”​—Nzembo 23:4, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Yawe, ata nazali kotambola na kati ya molili ya somo, nakoki kobanga eloko té; pamba té otambolaka nzela moko ná ngai; olakisaka ngai nzela, obatelaka ngai na makama nyonso.”​—Nzembo 23:4, Biblia na lingala ya lelo oyo.

Ndenge Nzembo 23:4 elimbolami a

 Nzambe abatelaka mpe akokisaka bamposa ya bato oyo basambelaka ye, ata ntango bazali kokutana na makambo ya mpasi. Vɛrsɛ oyo esaleli liloba mpate oyo azali na nse ya libateli ya mobateli ya mpate mpo na komonisa ndenge Nzambe abatelaka bato oyo basambelaka ye. b Bamiyokaka te ete bazali bango moko ntango bakutani na makambo ya mpasi, ndenge vɛrsɛ emonisi yango lokola na lobwaku ya molili makasi to ya liwa. Bamiyokaka ete babatelami malamu, lokola nde Nzambe azali wana elongo na bango.

 Na ntango ya kala, mobateli ya mpate azalaki kosalela lingenda to nzete mpo na kobatela etonga na banyama mabe. Azalaki mpe kosalela nzete yango, mingimingi ezalaki mwa nzete moko ya molai oyo egumbamá na nsɔngɛ na yango mpo na kotambwisa mpe kobatela bampate na makama. Ndenge moko mpe, Yehova Nzambe azali lokola mobateli ya mpate ya bolingo oyo abatelaka mpe akambaka bato oyo basambelaka ye. Ata na ntango ya mpasi mpenza, Yehova akipaka bango na lolenge mingi.

  •   Ateyaka mpe abɔndisaka bango na nzela ya Biblia, Liloba na ye.​—Baroma 15:4.

  •   Ayokaka mabondeli na bango, mpe apesaka bango kimya ya makanisi.​—Bafilipi 4:6, 7.

  •   Asalelaka bandeko na bango bakristo mpo na kolendisa bango.​—Baebre 10:24, 25.

  •   Alaki bango bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, ntango akolongola makambo nyonso ya mabe oyo bazali kokutana na yango lelo oyo.​—Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3-5.

Makambo oyo bazali kolobela na Nzembo 23:4

 Davidi nde akomaki Nzembo 23, azalaki mobateli ya mpate ntango azalaki elenge mpe na nsima akómaki mokonzi na ekólo Yisraele. (1 Samwele 17:34, 35; 2 Samwele 7:8) Nzembo yango ebandi na komonisa Yehova lokola mobateli ya mpate oyo azali kokamba, koleisa mpe kobɔndisa bato oyo basambelaka ye, kaka ndenge mobateli ya mpate abatelaka bampate na ye.​—Nzembo 23:1-3.

 Na Nzembo 23:4, ntango Davidi alobelaki Nzambe lokola mobateli, asalelaki liloba “yo” mpo na kolobela Nzambe na esika asalela liloba “ye.” Yango emonisi boyokani ya makasi oyo Davidi azalaki na yango ná Yehova. Davidi ayebaki ete Nzambe azalaki kotyela ye likebi mpe ete ayebaki mikakatano oyo azalaki kokutana na yango. Yango wana, Davidi azalaki kobanga ata eloko moko te.

 Na bavɛrsɛ mibale oyo elandi ya Nzembo 23, vɛrsɛ 5 mpe 6, na esika bálobela mobateli ya mpate ná etonga, balobeli nde moyambi-bapaya ná mopaya na ye. Lokola moyambi-bapaya oyo azali mpenza mokabi, Yehova ayambaki Davidi lokola mopaya oyo azali na lokumu mpenza. Ata banguna ya Davidi bakokaki te kopekisa Nzambe akokisa bamposa na ye. Na nsuka ya mokapo ya Nzembo yango, Davidi amonisi ndenge Nzambe akomonisela ye bolamu mpe bolingo bomoi na ye mobimba.

 Maloba ya elilingi oyo esalelami na Nzembo 23 emonisi ete Nzambe akobaka kolinga mpe kobatela bato oyo basambelaka ye.​—1 Petro 2:25.

a Na Babiblia mosusu okokuta yango na Nzembo 22. Atako mokanda ya Nzembo ezalaka na mikapo 150, Babiblia mosusu etyaka mikapo na kolanda makomami ya Ebre ya Bamasorete, mpe mosusu etyaka mikapo na kolanda Libongoli ya Grɛki oyo babengi Septante, Libongoli ya makomami ya Ebre oyo basilisaki kobongola na siɛklɛ ya mibale L.T.B.

b Nzambe oyo nkombo na ye ezali Yehova, mbala mingi Biblia ebengaka ye Mobateli ya mpate oyo atondi na boboto. Bato oyo basambelaka ye, bazali lokola etonga, oyo ye abatelaka mpe asungaka.​—Nzembo 100:3; Yisaya 40:10, 11; Yirimia 31:10; Ezekiele 34:11-16.