Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso

Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso

Ezali mpasi tóyeba soki bikateli na biso ezali ya malamu soki tozali kotalela kaka ndenge oyo biso to bato mosusu bamonelaka makambo. Biblia eyebisi biso ntina, kasi elobeli mpe makambo mosusu mingi. Biblia ezali na mibeko oyo etali bizaleli malamu oyo tokoki kotyela motema—litambwisi oyo ebongi soki tolingi kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.

LITAMBWISI OYO EBONGI

Na Biblia, Yehova a Nzambe amonisi ete asalaki bato mpo bámitambwisa bango moko te, kasi mpo ye nde atambwisa bango. (Yirimia 10:23) Mpo na ntina wana nde akomisá na Biblia mibeko etali malamu ná mabe. Alingaka bato mingi mpe alingaka te tózwa bikateli ya mabe oyo ekobimisela biso bampasi mpe kokómisa bomoi na biso bololo. (Kolimbola Mibeko 5:29; 1 Yoane 4:8) Likambo eleki ntina, Mozalisi na biso azali na bwanya mpe boyebi oyo esengeli mpo na kopesa biso batoli eleki malamu oyo tokoki kozwa. (Nzembo 100:3; 104:24) Ata bongo, Nzambe atindaka bato na makasi te básalela mibeko na ye.

Yehova apesaki Adama ná Eva, mwasi ná mobali ya liboso, nyonso oyo basengelaki na yango mpo bázala na esengo. (Ebandeli 1:​28, 29; 2:​8, 15) Apesaki bango mpe malako ya pɛtɛɛ oyo basengelaki kotosa. Kasi, atikelaki bango moko nzela bápona soki bakotosa malako yango to te. (Ebandeli 2:​9, 16, 17) Likambo ya mawa, Adama ná Eva baponaki kosala oyo bango balingaki na esika bátosa mibeko ya Nzambe. (Ebandeli 3:6) Yango ebimisaki likambo nini? Bomoi ya bato ezali sikoyo malamu mingi lokola balingaki bango moko bákata oyo ezali malamu to mabe? Ata moke te. Makambo oyo esalemá na kala emonisi ete koboya kotosa mibeko ya Nzambe epesaka kimya mpe bolamu ya solosolo te.—Mosakoli 8:9.

Biblia ezali eloko oyo ekosalisa biso mpo tózwa bikateli ya malamu ezala toutá wapi to tofandaka wapi. (2 Timote 3:​16, 17; talá etanda “ Buku moko mpo na bato ya bikólo nyonso.”) Talá ndenge Biblia esalaka yango.

Luká koyeba mpo na nini babengaka Biblia “liloba ya Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13. Talá na jw.org video Biblia ezali mokanda ya nani?

BIBLIA EYEBISI BISO OYO NZAMBE ALINGI TÓSALA

Na kati ya Biblia, tokokuta masolo oyo emonisi ndenge Nzambe asalelaka bato makambo. Makambo oyo ezali na Biblia esalisaka biso tóyeba nini oyo Nzambe amonaka malamu to mabe, makambo oyo ebongi mpe oyo epesaka mpasi. (Nzembo 19:​7, 11) Mateya oyo tozwaka na Biblia ezalaka ntango nyonso solo mpe esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mikolo nyonso ya bomoi na biso.

Na ndakisa, tótalela toli oyo ezali na Masese 13:20: “Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.” Toli yango ezali na ntina lelo kaka ndenge ezalaki mpe na ntina na ntango ya kala. Na Biblia okokuta batoli ya ndenge wana ebele.—Talá etanda “ Bwanya ya Biblia esilaka ngala te.”

Kasi okoki komituna, ‘Nini elakisi ete batoli ya Biblia ekoki mpenza kosalisa ngai?’ Lisolo oyo elandi ekolobela mwa masolo ya bomoi ya bato oyo endimisi likambo yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.