Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ezali bongolabongola?

Biblia ezali bongolabongola?

Eyano ya Biblia

 Te, makambo nyonso oyo ezali na Biblia ezali na boyokani. Ata soki bavɛrsɛ mosusu emonisaka lokola ete Biblia ezali bongolabongola, okoki kokanga ntina na yango soki osali makambo oyo elandi:

  1.   Talelá lisolo mobimba. Okoki kokanisa ete mokomi moko azali bongolabongola soki otaleli te makambo nyonso oyo akomi na lisolo.

  2.   Talelá makanisi ya mokomi. Bato oyo bamoni likambo oyo esalemi balobelaka yango bango nyonso ndenge moko te mpe basalelaka maloba ndenge moko te.

  3.   Talelá ndenge makambo ezalaki kosalema ntango lisolo yango ekomamaki.

  4.   Yebá bisika oyo mokomi asaleli liloba moko na ndenge ya elilingi.

  5.   Yebá ete bakoki koloba ete moto asali likambo moko, ata soki ye moko te nde asali yango. a

  6.   Salelá Biblia oyo ebongolami malamu.

  7.   Koluka te koyokanisa makambo oyo Biblia elobi na makanisi mpe mateya ya lokuta ya mangomba.

 Bandakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo makambo oyo tolobeli ekoki kosalisa yo mpo na bavɛrsɛ oyo emonanaka ete ezali bongolabongola.

Likambo 1: Lisolo mobimba

 Soki Nzambe apemaki mokolo ya nsambo, na ndenge nini akobaki kosala? Lisolo mobimba ya bozalisi oyo ezali na mokanda ya Ebandeli emonisi ete maloba: Nzambe “abandaki kopema na mokolo ya nsambo na mosala na ye oyo asalaki” etaleli mosala ya kokela biloko awa na mabele. (Ebandeli 2:2-4) Nzokande, ntango Yesu alobaki ete Nzambe “azali kokoba kosala tii sikoyo,” atyaki ntembe na maloba wana te mpo ye azalaki kolobela misala mosusu ya Nzambe. (Yoane 5:17) Na kati ya misala ya Nzambe, tokoki kotánga kotambwisa bato na elimo santu mpo bákoma Biblia, kopesa bato litambwisi mpe kobatela bango.​—Nzembo 20:6; 105:5; 2 Petro 1:21.

Likambo 2 mpe 3: Makanisi ya mokomi mpe ndenge makambo ezalaki

 Na engumba nini Yesu abikisaki moto oyo akufá miso? Mokanda ya Luka elobi ete Yesu abikisaki moto moko oyo akufá miso ntango “azalaki kopusana pene na Yeriko”; nzokande mokanda ya Matai elobeli bato mibale mpe ete Yesu abikisaki bango ntango azalaki “kobima na Yeriko.” (Luka 18:35-43; Matai 20:29-34) Lisolo yango emonisi makanisi ya bakomi mibale, kasi, mokomi mokomoko alobeli likambo oyo mosusu azangaki kolobela. Matai alobi ete bato bazalaki mibale, kasi Luka atyaki likebi mingi kaka epai ya moto oyo Yesu asololaki na ye. Na oyo etali engumba, bato ya arkeoloji bamoni ete na ntango ya Yesu, engumba Yeriko ezalaki mibale: Yeriko ya kala, oyo Bayuda batongaki ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki moko ná ndambo na Yeriko oyo Baroma batongaki na nsima. Mbala mosusu Yesu azalaki na nzela, na katikati ya bingumba yango mibale.

Likambo 4: Maloba ya elilingi

 Mabele ekobebisama? Na Mosakoli 1:4, Biblia elobi ete “mabele ezali koumela seko,” nzokande bato mosusu bamonaka ete eyokani te na maloba oyo: “Bilɔkɔ bikonangwa na mɔtɔ makasi; nse [mabele] mpe misala yɔnsɔ kati na yango ikotumbama.” (2 Petro 3:10, haut fleuve) Nzokande, Biblia esaleli liloba “mabele” mpo na kolobela esika oyo tofandi, mpe na ndenge ya elilingi mpo na kolobela bato oyo bafandi na mabele. (Ebandeli 1:1; 11:1) Kobebisama ya “mabele” oyo 2 Petro 3:10 elobeli ezali ‘kobebisama ya bato oyo batyolaka Nzambe’; kasi elimboli te ete mabele, esika oyo tofandi ekozika na mɔtɔ.​—2 Petro 3:7.

Likambo 5: Moto oyo asali likambo

 Na Kapernaume, nani ayebisaki Yesu likambo ya mokonzi ya basoda? Matai 8:5, 6 elobi ete mokonzi ya basoda ye moko ayaki epai ya Yesu, kasi Luka 7:3 elobi ete mokonzi ya basoda atindaki mikóló ya Bayuda epai ya Yesu. Ndenge nini kolimbola likambo yango oyo emonani lokola bongolabongola? Mokonzi ya basoda nde asɛngaki likambo yango, kasi atindaki mikóló yango lokola bamonisi na ye.

Likambo 6: Biblia oyo ebongolami malamu

 Biso nyonso tosalaka masumu? Biblia elobi ete biso nyonso tozwá lisumu ya moto ya liboso, Adama. (Baroma 5:12) Kasi, mpo na kotɛmɛla likanisi yango, Babiblia mosusu elobaka ete moto malamu “akosalaka masumu tɛ.” (1 Yoane 3:6, haut fleuve) Nzokande, na monɔkɔ ya Grɛki ya ebandeli, maloba ‘kosala lisumu’ na 1 Yoane 3:6 emonisaka likambo oyo ezali kokoba kosalema to ekómi momeseno. Bokeseni ezali kati na lisumu oyo tozwá epai ya Adama, oyo tokoki kokima te, mpe momeseno ya kosala lisumu, to kobuka mibeko ya Nzambe na nko. Yango wana mabongoli mosusu ya Biblia engɛngisi likanisi yango na ndenge esaleli maloba lokola “asalaka lisumu te” to “asalaka lisusu masumu té.”​—Libongoli ya Mokili ya Sika; Bible na lingala ya lelo oyo.

Likambo 7: Ndimá oyo Biblia elobi, kasi te mateya ya mangomba

 Yesu azali ndenge moko na Nzambe to Nzambe aleki ye? Mokolo moko, Yesu alobaki boye: “Ngai ná Tata tozali moko”; yango emonani lokola ete eyokani te na maloba na ye oyo ete “Tata aleki ngai.” (Yoane 10:30; 14:28) Mpo na kokanga ntina ya bavɛrsɛ yango malamu, tosengeli kotalela oyo Biblia elobi mpenza mpo na Yehova mpe Yesu na esika ya koluka koyokanisa bavɛrsɛ yango na liteya ya Bosato, oyo euti na Biblia te. Biblia emonisi ete Yehova azali Tata ya Yesu; kasi azali mpe Nzambe ya Yesu, Moto oyo Yesu asambelaka. (Matai 4:10; Marko 15:34; Yoane 17:3; 20:17; 2 Bakorinti 1:3) Yesu azali ndenge moko na Nzambe te.

 Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya maloba oyo ya Yesu ete “Ngai ná Tata tozali moko,” emonisi ete alobaki bongo mpo ye ná Tata na ye, Yehova Nzambe bazalaki na mokano moko. Na nsima, Yesu alobaki: “Tata azali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na Tata.” (Yoane 10:38) Yesu azalaki mpe na bomoko wana elongo na bayekoli na ye, mpo asambelaki mpo na bango ete: “Napesi bango nkembo oyo opesi ngai, mpo bango mpe bázala moko ndenge biso tozali moko. Ngai na bomoko elongo na bango mpe yo na bomoko elongo na ngai.”​—Yoane 17:22, 23.

a Na ndakisa, na esika oyo elobeli ndako monene Taj Mahal, buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete “amperɛrɛ Chah Djahan nde atongaki yango.” Nzokande, ye te nde atongaki yango, mpo lisolo yango ebakisi ete “bato koleka 20 000 basalaki mosala” mpo na kotonga yango.