Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 12

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

1. Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?

Nzambe azali kobenga bato ya ndenge nyonso ete bápusana penepene na ye, na nzela ya libondeli. (Nzembo 65:2) Atako bongo, ayokaka mpe andimaka mabondeli nyonso te. Na ndakisa, aboyaka koyoka mabondeli ya mobali oyo azali konyokola mwasi na ye. (1 Petro 3:7) Mpe lisusu, ntango Bayisraele bakobaki kosala mabe, Nzambe aboyaki koyoka mabondeli na bango. Ezali polele ete libondeli ezali libaku malamu oyo Nzambe apesá biso. Kutu, akoki kondima ata mabondeli ya bato oyo basali masumu minene soki babongoli motema.​—Tángá Yisaya 1:15; 55:7.

Talá video Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?

2. Tosengeli kobondela ndenge nini?

Libondeli ezali moko ya makambo ya losambo na biso, yango wana tosengeli kosambela kaka Yehova, Mozalisi na biso. (Matai 4:10; 6:9) Lisusu, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kobondela na nkombo ya Yesu mpo akufaki mpo na masumu na biso. (Yoane 14:6) Yehova alingi te ete tózongelaka mabondeli oyo tokangá na motó to oyo bakomá na papye. Alingaka ete mabondeli na biso eutaka na motema.​—Tángá Matai 6:7; Bafilipi 4:6, 7.

Mozalisi na biso akoki koyoka ata mabondeli ya nse ya motema. (1 Samwele 1:12, 13) Asɛngaka biso tóbondela ye na bantango nyonso, na ndakisa, ntango tolamuki na ntɔngɔ to na butu ntango tolingi kolala, na ntango ya kolya mpe ntango tokutani na mikakatano.​—Tángá Nzembo 55:22; Matai 15:36.

3. Mpo na nini bakristo bayanganaka elongo?

Kopusana penepene na Nzambe ezali pɛtɛɛ te mpamba te tofandi ná bato oyo bandimaka Nzambe te mpe batyolaka elaka oyo apesi ya kotya kimya na mabele. (2 Timote 3:1, 4; 2 Petro 3:3, 13) Yango wana, tosengeli koyanganaka elongo na bandeko na biso mpo na kolendisanaka.​—Tángá Baebre 10:24, 25.

Koyangana elongo na bato oyo balingaka Nzambe esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe. Makita ya Batatoli ya Yehova ezalaka ntango moko ya malamu ya kolendisama na kondima ya basusu.​—Tángá Baroma 1:11, 12.

4. Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

Okoki kopusana penepene na Yehova soki ozali kokanisa na makambo oyo oyekoli na Liloba na ye. Kanisá na mateya oyo okoki kozwa na misala na ye, batoli mpe bilaka na ye. Kobondela mpe kokanisa na mozindo ekoki kosalisa biso tókóma na botɔndi mpo na bolingo mpe bwanya ya Nzambe.​—Tángá Yosua 1:8; Nzembo 1:1-3.

Okoki kopusana penepene na Nzambe kaka soki otyeli ye motema, mpe soki ondimeli ye. Kondima ezali lokola eloko nyonso oyo esɛngaka báleisa yango. Okoki kokolisa kondima na yo ntango nyonso soki ozali kotalela mateya oyo ondimaka.​—Tángá Matai 4:4; Baebre 11:1, 6.

5. Matomba nini okozwa soki opusani penepene na Nzambe?

Yehova abatelaka bato oyo balingaka ye. Abatelaka bango na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa kondima na bango mpe elikya na bango ya bomoi ya seko. (Nzembo 91:1, 2, 7-10) Akebisaka biso na bizaleli oyo ekoki kobebisa nzoto na biso mpe kosilisa biso esengo. Yehova ateyaka biso bizaleli oyo esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu mpenza.​—Tángá Nzembo 73:27, 28; Yakobo 4:4, 8.