Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Kozala moto oyo akufá matoi epekisaki ngai te koteya basusu

Kozala moto oyo akufá matoi epekisaki ngai te koteya basusu

Nazwaki batisimo na mobu 1941, ntango nazalaki na mbula 12. Kasi, ezalaki kaka na mobu 1946 nde nakómaki mpenza kokanga ntina ya mateya ya Biblia. Mpo na nini bongo? Tiká nabɛtɛla bino lisolo ya bomoi na ngai.

NA MOBU soki 1910, baboti na ngai balongwaki na engumba Tbilissi, na ekólo Géorgie, bayaki kofanda na Canada. Bazalaki kofanda na ndako moko ya moke na ferme, pene na engumba Pelly, na etúká ya Saskatchewan, na wɛsti ya Canada. Nabotamaki na mobu 1928, nazalaki mwana ya nsuka, na libota ya bana 6. Tata na ngai akufaki sanza 6 liboso ete nabotama, mpe mama na ngai akufaki ntango nazalaki mwana moke mpenza. Mwa moke na nsima, Lucy, yaya na ngai ya mwasi, akufaki ntango azalaki na mbula 17. Yango wana, nɔkɔ na ngai Nick azwaki ngai ná bandeko na ngai mpo abɔkɔla biso.

Mokolo moko, ntango nazalaki mwana moke mpe nabandi kotambola, bato ya libota na biso bamonaki ete nazali kobenda mokila ya mpunda na biso moko. Lokola bazalaki kobanga ete mpunda yango etuta ngai, bagangelaki ngai mpo natika mokila yango. Kasi, nabalukaki te mpo na kotala bango mpamba te nayokaki te ntango bazalaki kogangela ngai. Likambo ya esengo, mpunda yango ezokisaki ngai te. Kasi ezalaki mokolo wana nde bato ya libota na biso bayebaki ete nakufá matoi.

Moninga moko ya libota na biso alobaki ete ekozala malamu bákɔtisa ngai na kelasi ya bana oyo bakufá matoi. Yango wana, nɔkɔ Nick atindaki ngai na eteyelo moko ya bato oyo bakufá matoi, na engumba Saskatoon, na etúká ya Saskatchewan. Eteyelo yango ezalaki mosika na libota na biso, mpe lokola nazalaki na mbula 5 mpamba, nazalaki kobanga. Nakokaki kokende kotala bato ya libota na biso kaka na ntango ya konje. Nsukansuka, nayekolaki elobeli ya bajɛstɛ mpe nakómaki kosakana elongo na bana mosusu.

NAYEKOLI MATEYA YA BIBLIA

Na mobu 1939, yaya na ngai ya mwasi Marion abalanaki ná Bill Danylchuck, mpe bazwaki ngai ná ndeko ya ngai ya mwasi Frances epai na bango mpo na kosunga biso. Bazalaki bato ya liboso na libota na biso oyo babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Na konje ya monene, ntango nazalaki kofanda epai na bango, bazalaki kosala nyonso oyo esengeli mpo na koyebisa ngai makambo oyo bazalaki koyekola na Biblia. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosolola na bango, mpamba te bayebaki elobeli ya bajɛstɛ te. Atako bongo, bakokaki komona ete nazalaki mpenza kosepela na makambo ya Yehova oyo nazalaki koyekola. Nasosolaki ete makambo oyo bazalaki kosala eyokanaki na oyo Biblia elobi, yango wana nazalaki kokende elongo na bango ntango babimi na mosala ya kosakola. Eumelaki te, nazalaki na mposa ya kozwa batisimo, yango wana mokolo ya 05/09/1941, Bill abatisaki ngai na tɔnɔ moko oyo etondaki na mai ya libulu. Mai yango ezalaki malili makasi!

Elongo na bandeko oyo bakufá matoi na liyangani ya Cleveland, na Ohio, na 1946

Na mobu 1946, tozwaki konje ya monene mpe nakendaki na ndako; mpe tokendaki na liyangani oyo esalemaki na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Mokolo ya liboso ya liyangani, bandeko na ngai ya basi bazalaki kokomela ngai mwa makambo mpo nalanda liyangani yango. Kasi mokolo ya mibale, nasepelaki mingi koyoka ete ezalaki na etuluku moko ya bato oyo bakufá matoi mpe na mobongoli moko ya elobeli ya bajɛstɛ na liyangani yango. Na ndenge wana, nakokaki sikoyo kolanda liyangani nyonso mpe nasepelaki mingi kokanga ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka!

NABANDI KOTEYA SOLO

Na ntango wana, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eutaki kosila, mpe bato bazalaki kolinga komonisa ete balingaka ekólo na bango. Kasi ntango nautaki na liyangani mpe nazongaki na kelasi, nazalaki na ekateli makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova. Yango wana, natikaki kopesa drapo losako, koyemba loyembo ya kokumisa ekólo, mpe kosala bafɛti ya ekólo to ya mangomba. Natikaki mpe kokende na losambo ya lingomba elongo na baninga mosusu ya kelasi. Balakisi ya eteyelo basepelaki te, mpe bazalaki kotumola ngai mpe koyebisa ngai makambo ya lokuta mpo na kotinda ngai nabongola makanisi na ngai. Baninga na ngai mosusu ya kelasi bazalaki komona makambo oyo bazalaki kosala ngai, mpe mpo na yango, nazwaki mabaku mingi ya kopesa bango litatoli. Nsukansuka, baninga na ngai mosusu ya kelasi, na ndakisa Larry Androsoff, Norman Dittrick, mpe Emil Schneider, bayambaki solo, mpe tii lelo bazali kosalela Yehova.

Ntango nazalaki kokende na bingumba mosusu, nazalaki ntango nyonso kosala makasi mpo na kosakwela bato oyo bakufá matoi. Na ndakisa, na engumba Montréal, nakendaki na esika moko oyo bato oyo bakufá matoi bazalaki kokutana. Kuna, nasakwelaki Eddie Tager, elenge mobali moko oyo azalaki na etuluku moko ya bato ya mobulu. Tii na liwa na ye na mbula eleki, azalaki na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ na Laval, na etúká ya Québec. Nakutanaki mpe na elenge moko na nkombo Juan Ardanez. Lokola bato ya Beroya na ntango ya kala, azalaki kosala bolukiluki mpo na koyeba soki makambo oyo azalaki koyekola euti mpenza na Biblia. (Misala 17:10, 11) Ye mpe ayambaki solo, mpe tii na liwa na ye, azalaki nkulutu na lisangá moko na engumba Ottawa, na etúká ya Ontario.

Nazali kopesa litatoli na balabala na ebandeli ya bambula 1950

Na mobu 1950, nakendaki kofanda na engumba Vancouver. Atako nasepelaka mingi kosakwela bato oyo bakufá matoi, nabosanaka te likambo oyo nakutanaki na yango ntango napesaki Chris Spicer, mwasi moko oyo ayokaka, litatoli na balabala. Andimaki kosala abonema mpo na kozwaka bazulunalo na biso mpe alingaki ete nakutana na mobali na ye, Gary. Nakendaki kotala bango na ndako, mpe tosololaki ntango molai; nazalaki kokoma likambo oyo nalingi koloba na papye, na nsima, bango mpe bazalaki kokoma. Banda wana, tomonanaki lisusu te; kasi mokolo moko, mwa bambula na nsima, nakamwaki mingi ntango bayaki kopesa ngai mbote na liyangani moko na engumba Toronto, na etúká ya Ontario. Gary azwaki batisimo mokolo wana. Likambo wana ekundwelaki ngai ntina ya kokoba kosakola, mpamba te toyebi te soki ata ndɛlɛ moto moko oyo topesi litatoli akoyamba solo.

Na nsima, nazongaki na Saskatoon. Kuna, nakutanaki na mwasi moko oyo asɛngaki ngai nayekola Biblia na bana na ye mibale ya basi oyo bazalaki mapasa: Jean mpe Joan Rothenberger. Bazalaki kotánga na eteyelo ya bato oyo bakufá matoi, esika ngai mpe natángaki. Eumelaki te, bana basi yango mibale bazalaki koyebisa baninga na bango ya kelasi makambo oyo bazalaki koyekola. Nsukansuka, baninga na bango ya kelasi 5 bakómaki Batatoli ya Yehova. Moko na bango nkombo na ye Eunice Colin. Nakutanaki na Eunice mpo na mbala ya liboso na mbula na ngai ya nsuka na eteyelo ya bato oyo bakufá matoi. Na ntango wana, apesaki ngai bɔmbɔ mpe atunaki ngai soki tokoki kozala baninga. Na nsima, akómaki moto ya ntina mingi mpo na ngai. Nsukansuka, tobalanaki!

Elongo na Eunice na 1960 mpe na 1989

Ntango mama ya Eunice ayebaki ete azali koyekola Biblia, asɛngaki mokambi ya eteyelo apekisa Eunice koyekola. Atako mokambi yango amekaki kopekisa ye mpe abɔtɔlaki ye ata mikanda oyo azalaki koyekola na yango, Eunice azalaki na ekateli makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova. Ntango alingaki kozwa batisimo, baboti na ye bayebisaki ye ete: “Soki okómi Motatoli ya Yehova, tokobengana yo na ndako na biso!” Yango wana, ntango Eunice akómaki na mbula 17, alongwaki na ndako ya baboti na ye mpe akendaki kofanda epai ya libota moko ya Batatoli ya Yehova. Akobaki koyekola Biblia, na nsima azwaki batisimo. Ntango tobalanaki na mobu 1960, baboti na ye bayaki te na mokolo ya libala na biso. Kasi, nsima ya bambula, bakómaki kopesa biso limemya mingi mpo na bindimeli na biso mpe mpo na ndenge oyo tozalaki kobɔkɔla bana na biso.

YEHOVA ASUNGI NGAI MINGI

Mwana na ngai Nicholas ná mwasi na ye Deborah, basalaka na Betele ya Londres

Lokola tozali baboti oyo bakufá matoi, ezalaki pɛtɛɛ te kobɔkɔla bana mibali 7 oyo bayokaka. Kasi tosalaki makasi ete báyeba elobeli ya bajɛstɛ mpo tósololaka na bango malamu mpe tóteya bango mateya ya solo. Bandeko mibali mpe basi ya lisangá basalisaki biso mingi. Na ndakisa, ndeko moko oyo azali mpe moboti akomelaki biso mwa mokanda mpo na koyebisa biso ete mwana na biso moko azalaki koloba maloba mabe na Ndako ya Bokonzi. Tozwaki likoki ya kosalisa mwana yango na likambo wana nokinoki. Bana na biso minei, James, Jerry, Nicholas, mpe Steven bazali bankulutu mpe bazali kosalela Yehova na bosembo elongo na basi na bango mpe bana na bango. Longola yango, Nicholas ná mwasi na ye Deborah bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda na elobeli ya bajɛstɛ na Betele ya Grande-Bretagne, mpe Steven ná mwasi na ye Shannan, basalaka na ekipi ya kobongola mikanda na elobeli ya bajɛstɛ na Betele ya États-Unis.

Bana na ngai James, Jerry, mpe Steven ná basi na bango bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola na elobeli ya bajɛstɛ na ndenge mingi

Likambo ya mawa, sanza moko liboso ete tókokisa mbula 40 ya libala, Eunice akufaki na maladi ya kansɛr. Na boumeli ya ntango wana ya mpasi liboso ya liwa na ye, kondima oyo azalaki na yango na lisekwa esalisaki ye akoba kozala makasi. Nazali kozela na mposa makasi mokolo oyo nakomona ye lisusu.

Faye ná James, Jerry ná Evelyn, Shannan ná Steven

Na sanza ya mibale 2012, nakweaki mpe nabukanaki na loketo. Namonaki ete nasengeli na lisalisi, yango wana nakendaki kofanda epai ya mwana na ngai moko ya mobali ná mwasi na ye. Sikoyo, tozali na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ na engumba Calgary, epai nazali nkulutu. Mpo na koloba solo, ezali mbala ya liboso ete nazala na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ! Kasi, ndenge nini nakobaki kobatela boyokani na ngai ná Yehova makasi bambula wana nyonso oyo nazalaki na lisangá ya Lingelesi? Yehova asungaki ngai. Akokisaki elaka oyo apesaki ya kosalisa bana oyo batata bakufá. (Nzembo 10:14) Nazali na botɔndi mingi mpo na bandeko nyonso oyo bazalaki kokomela ngai mwa makambo, koyekola elobeli ya bajɛstɛ, mpe kosala nyonso mpo na kobongolela ngai makambo.

Nakɔtaki eteyelo ya babongisi-nzela na elobeli ya bajɛstɛ, ntango nazalaki na mbula 79

Na bantango mosusu, nazalaki kokanga ntina te ya makambo oyo bato bazalaki koloba, to nazalaki komona ete moto moko te ayebi mpenza ndenge ya kosalisa bato oyo bakufá matoi. Na bantango ya ndenge wana, ntango nazalaki koyoka mpasi na motema mpe kolinga kotika, nazalaki kokanisa maloba oyo Petro ayebisaki Yesu: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoane 6:66-68) Lokola bandeko mosusu mingi oyo bakufá matoi mpe bazali na kati ya solo banda bambula mingi, nayekolaki kozala na motema molai. Nayekolaki kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema, mpe yango ememeli ngai matomba mingi. Lelo oyo, ezali na mikanda mingi na monɔkɔ na ngai, elingi koloba elobeli ya bajɛstɛ; mpe nazali na esengo mpo nakoki koyangana na makita mpe na mayangani na elobeli ya bajɛstɛ ya Amerika. Ya solo, nalekisi bomoi ya esengo mpe oyo etondi na mapamboli na mosala ya Yehova, Nzambe na biso monene.