Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

[kobanda na lobɔkɔ ya mwasi tii ya mobali] Marcelo, Yomara, mpe Hiver. Bango nyonso basimbi volimi moko ya Biblia Libongoli ya Mokili ya sika na ekomeli ya Braille na Espagnol

Bandeko ya lisangá bamoniselaki bango bolingo

Bandeko ya lisangá bamoniselaki bango bolingo

YOMARA ná ndeko ye Marcelo mpe Hiver bafandaka na mboka moko ya moke na Guatémala. Yomara akómaki koyekola Biblia na batatoli Yehova, mpe nsukansuka bandeko na ye mpe bakómaki koyekola Biblia. Kasi ezalaki na mokakatano moko. Bango nyonso misato bakufá miso, mpe bayebaki kotánga ekomeli ya Braille te. Yango wana, ndeko oyo azalaki koyekola na bango Biblia azalaki kotángela bango makambo oyo bazalaki koyekola mpe bavɛrsɛ ya Biblia ya mateya oyo bazalaki koyekola.

Kokende makita mpe ezalaki mokakatano mpo na bango. Bango moko bazalaki kokoka te kotambola miniti 40 mpo na kokóma na ndako ya bokonzi oyo ezalaki pene na bango. Kasi bandeko bazwaki bibongiseli mpo bamemaka bango na makita nyonso ya lisangá. Mpe ntango bango misato babandaki kosala masolo na makita ya kati ya pɔsɔ, bandeko ya lisangá bazalaki kosalisa bango bákanga na motó masolo na bango.

Na nsanza ya 05/2019, makita ya lisangá ekómaki kosalema na mwa mboka na bango. Na yango, ndeko mwasi moko ná mobali na ye oyo bazalaki babongisi nzela bakendaki na mboka yango. Bazwaki mokano ya kolakisa bandeko yango misato ekomeli ya Braille, atako bango moko mpe bayebaki Braille yango te. Bakendaki esika babombaka babuku mpe bazwaki babuku oyo elobeli ekomeli ya Braille mpo báyekola ndenge ya kotángisa yango.

Marcelo azali kopesa eyano na makita ya lisangá

Mwa bansanza na nsima, bandeko yango misato bakómaki kotánga malamu ekomeli ya Braille, yango esalisaki bango bákola malamu na elimo. Sikoyo Yomara, Marcelo, mpe Hiver bazali babongisi nzela. Marcelo azali mosaleli na misala. Bazalaka na makambo mingi ya kosala mpo na Yehova pɔsɔ mobimba. Molende na bango esalisi bandeko mingi mpe bákoma na molende.

Bandeko oyo misato bazali na botɔndi mpo na lisalisi ya bolingo oyo bandeko bapesaki bango. Yomara alobi: “Batatoli ya Yehova bamoniselaki biso bolingo ya solosolo kobanda mbala ya liboso oyo tokutanaki na bango”. Marcelo abakisi: “Tozali na baninga ya malamu na lisangá na biso, mpe tozali na kati ya libota ya bandeko na mokili mobimba, libota oyo esimbami na bolingo”. Yomara ná bandeko na ye bazali kozela na mposa makasi komona mokolo oyo mabele ekokóma paradiso.​—Nz. 37:10, 11; Yis. 35:5.