Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosalela Nzambe nde nkisi na ye!

Kosalela Nzambe nde nkisi na ye!

Na Kenya, babongisi-nzela mibale oyo bazalaki na mosala ya kosakola babɛtaki kɔkɔkɔ na ndako moko mpe basɛngaki bango bákɔta. Ntango bakɔtaki, bakamwaki komona mwa moto moko alali na mbeto. Azalaki na ntolo ya moke mpenza mpe mabɔkɔ na ye ezalaki mikuse. Ntango batángelaki ye elaka ya Nzambe oyo elobi ete “motɛngumi akopumbwa lokola serfe,” mwana mobali yango asepelaki mingi.​—Yis. 35:6.

Na nsima, babongisi-nzela yango bayaki koyeba ete mwana mobali yango nkombo na ye Onesmus; azalaki na mbula pene na 40, mpe abotamaki na maladi moko oyo esalaka ete mikuwa ebukanaka mpambampamba. Mikuwa ya nzoto na ye ezalaki pɛtɛɛ mpenza; soki kaka bafini ye to batindiki ye mwa moke, abukani. Lokola maladi yango ezalaka mpenza na nkisi ya kosilisa yango te, Onesmus ayebaki ete akobanda koyoka nzoto mpasi mpe akofanda na kiti ya bibɔsɔnɔ bomoi na ye mobimba.

Onesmus andimaki koyekola Biblia. Kasi mama na ye apekisaki ye ayanganaka na makita ya lisangá, mpo amonaki ete ekobakisela ye mpasi na nzoto. Na yango, bandeko bazalaki kotyela Onesmus makambo oyo ezalaki kolobama na makita na CD mpo ayokaka yango na ndako. Nsima ya koyekola sanza mitano, Onesmus azwaki ekateli ya koyangana na makita ata soki yango ekosala ye nini.

Koyangana na makita ebakisaki nde mpasi ya Onesmus? Te. Kutu, ye moko alobi boye: “Ntango nazali na makita, namonaka lokola mpasi na ngai ekiti.” Amonaki ete elikya oyo akómaki na yango nde ezalaki kosalisa ye amiyoka malamu. Mama ya Onesmus amonaki ete mwana na ye azalaki lisusu mawamawa te mpe akómaki na esengo mingi, yango wana ye mpe andimaki koyekola Biblia. Mama na ye alobi boye: “Kosalela Nzambe nde nkisi ya mwana na ngai.”

Eumelaki te, Onesmus akómaki mosakoli. Na nsima, azwaki batisimo mpe sikoyo azali mosaleli na misala. Atako makolo na ye mpe lobɔkɔ na ye moko esalaka te, Onesmus azali na mposa ya kosala nyonso oyo akoki kosala na mosala ya Yehova. Azalaki na mposa ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi, kasi azalaki kokakatana mpo na kotondisa formilɛrɛ. Mpo na nini? Mpo ayebaki ete ekosɛnga azalaka ntango nyonso na moto mpo na kotindika ye na velo na ye ya bibɔsɔnɔ. Ntango ayebisaki bandeko ya lisangá mokakatano yango, balakaki ete bakosunga ye. Lokola basalaki yango, Onesmus akómaki mobongisi-nzela mosungi.

Ntango Onesmus alingaki kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amitungisaki lisusu mpo na likambo wana. Kasi mokolo moko, mokapo ya mokolo elendisaki ye na likambo yango. Mokapo yango ezalaki Nzembo 34:8: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.” Nsima ya komanyola maloba ya vɛrsɛ wana, Onesmus azwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lelo oyo, abimaka na mosala ya kosakola mikolo minei na pɔsɔ mpe azali koyekola Biblia na bato ebele, oyo bazali kokola malamu na elimo. Na 2010, akɔtaki na Eteyelo ya babongisi-nzela. Kanisá esengo oyo Onesmus azalaki na yango ntango amonaki ete molakisi moko na eteyelo yango ezalaki moko ya bandeko mibale oyo basololaki na ye mpo na mbala ya liboso!

Lelo oyo, baboti ya Onesmus bazali lisusu na bomoi te, kasi bandeko ya lisangá basalisaka ye akokisa bamposa na ye ya mokolo na mokolo. Azali na botɔndi mingi mpo na mapamboli nyonso oyo azali kozwa sikoyo, mpe azali kozela ntango oyo “moto moko te . . . akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yis. 33:24.