Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOBONDELA EZALI MPENZA NA NTINA?

Mpo na nini Nzambe asɛngi tóbondelaka ye?

Mpo na nini Nzambe asɛngi tóbondelaka ye?

Nzambe alingi okóma moninga na ye.

Baninga basololaka mpo boninga na bango ekóma makasi. Ndenge moko mpe, Nzambe asɛngaka biso tósololaka na ye mpo alingi tókóma baninga na ye. Alobi boye: “Bokobenga ngai mpenza, bokoya, bokobondela ngai, mpe ngai nakoyokela bino.” (Yirimia 29:12) Soki ozali kosolola na Nzambe, ‘okopusana penepene na ye mpe ye akopusana penepene na yo.’ (Yakobo 4:8) Biblia elobi boye: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” (Nzembo 145:18) Soki tozali kobondela Nzambe mingi, boninga na biso na ye ekokóma lisusu makasi.

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”​—Nzembo 145:18

Nzambe alingi kosalisa yo.

Yesu alobaki boye: “Moto nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mampa​—akopesa ye libanga? To, mbala mosusu soki asɛngi mbisi—​akopesa ye nyoka? Yango wana, soki bino . . . boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?” (Matai 7:9-11) Nzambe asɛngi obondelaka ye mpo ‘atyelaka yo likebi’ mpe alingi kosalisa yo. (1 Petro 5:7) Asɛngi yo kutu oyebisaka ye makambo oyo etungisaka yo. Biblia elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6.

Bato bazalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe.

Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bamonaki ete bamilio ya bato bayokaka mposa ya kobondela. Ata bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka mpe baoyo balobaka ete tokoki koyeba Nzambe te, bayokaka mpe mposa yango. * Yango emonisi ete bato bakelamá na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Lolenge moko oyo tokoki kokokisa mposa yango ezali ya kosololaka na Nzambe.

Soki tondimi kobondela Nzambe ndenge asɛngi, tokozwa matomba nini?

^ par. 8 Ankɛtɛ moko oyo Centre de recherche de Pew esalaki na États-Unis na 2012 emonisi ete bato mosusu (11%) oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka ná baoyo balobaka ete moto akoki koyeba Nzambe te babondelaka ata mbala moko na sanza.