Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Bobola ekosila mokolo mosusu?

Ndenge nini Nzambe akolongola bobola na mokili?​—Matai 6:9, 10.

Mbula nyonso bamilio ya bato bakufaka mpo na maladi mpe kozanga kolya malamu mpo bazali mpenza babola. Atako bikólo mosusu ezali na bomɛngo, ebele ya bato bazali kaka babola mpenza. Biblia emonisi ete bobola ezali likambo oyo enyokolaka bato ntango nyonso.​—Tángá Yoane 12:8.

Mpo bobola esila, ekosɛnga ete mokili mobimba ezala na guvɛrnema moko oyo ezali na likoki ya kokabola bomɛngo ya mabele na bosembo mpenza mpe ya kosilisa bitumba, likambo oyo esalaka mpenza ete bato bázala babola. Nzambe alaki nde guvɛrnema ya ndenge wana.​—Tángá Danyele 2:44.

Nani akoki kosilisa bobola?

Nzambe atye Mwana na ye, Yesu, ayangela bato nyonso. (Nzembo 2:4-8) Yesu akosikola babola mpe akosilisa minyoko mpe mobulu.​—Tángá Nzembo 72:8, 12-14.

Lokola Yesu azali “Nkumu ya Kimya” oyo Biblia esakolaki, akotya kimya na mokili. Bato nyonso bakofanda na bandako na bango moko, bakozala na misala ya malamu mpe bilei mingi.​—Tángá Yisaya 9:6, 7; 65:21-23.