Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki komona Nzambe oyo amonanaka te?

Okoki komona Nzambe oyo amonanaka te?

“NZAMBE azali Elimo,” bato bakoki komona ye te. (Yoane 4:24) Ata bongo, Biblia elobi ete na lolenge moko to mosusu, bato mosusu bamoná Nzambe. (Baebre 11:27) Ndenge nini ekoki kosalema? Okoki mpenza komona Nzambe “oyo amonanaka te?”​—Bakolose 1:15.

Tózwa naino ndakisa ya moto oyo akufá miso bandá kobotama. Lokola amonaka te, yango elingi koloba ete akoki te koyeba makambo oyo esalemaka na esika afandi? Mpenza te. Moto oyo akufá miso azwaka bansango na balolenge ekeseni oyo esalisaka ye ayeba bato, biloko mpe makambo oyo ezali kosalema na esika afandi. Moto moko oyo akufá miso alobi boye: “Atako namonaka te, kasi nakoki koyeba makambo oyo ezali kosalema na esika nafandi.”

Ndenge moko mpe, atako okoki te kosalela miso na yo mpo na komona Nzambe, okoki kosalela ‘miso ya motema na yo’ mpo na komona ye. (Baefese 1:18) Tótala makambo misato oyo ekoki kosalisa yo osala bongo.

“EZALI KOMONANA POLELEPOLELE BANDA NA KOZALISAMA YA MOKILI”

Makoki ya koyoka mpe ya kosimba ya moto oyo akufá miso esalaka malamu koleka mpo esalisaka ye ayeba biloko oyo akoki komona te. Ndenge moko mpe, okoki kosalela miso na yo mpo na kotalatala biloko oyo ezali zingazinga na yo mpo omona Nzambe oyo amonanaka te, oyo akelaki yango. “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.”​—Baroma 1:20.

Na ndakisa, meká naino kokanisa mabele oyo tofandi. Nzambe asalaki mabele kaka te mpo bato bafanda kasi basepela mpe na bomoi. Ntango tozali kozwa mwa mopepe kitoko, koyoka mwa moi, kolya mbuma ya elɛngi to koyoka ndenge bandɛkɛ ezali koyemba, epesaka biso esengo. Makabo wana nyonso emonisaka te ete Mozalisi akipaka biso, azali boboto mpe mabɔkɔ pɛtɛɛ?

Makambo oyo tomonaka na likoló to na mabele ekoki koteya biso nini mpo na Nzambe? Likoló emonisaka nguya ya Nzambe. Makambo oyo bato ya siansi bauti komona kala mingi te emonisi kaka te ete molɔ́ngɔ́ ezali kokóma monene, kasi ezali kosala bongo nokinoki! Ntango ozali kotala likoló na butu, omituna boye: ‘Nguya oyo esalaka ete molɔ́ngɔ́ ekóma monene eutaka wapi?’ Biblia eyebisi biso ete Mozalisi azali na “makasi mingi.” (Yisaya 40:26) Biloko oyo Nzambe asalá emonisaka ete azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso”​—oyo “Atombwami na nguya.”​—Yobo 37:23.

“MOTO ALIMBOLI YE”

Mama moko ya bana mibale oyo bakufá miso, alobi boye: “Koloba nde esalisaka bango mingi mpo báyekola makambo. Ntango obimi libanda, kozangaka te koyebisa bango makambo nyonso oyo omoni mpe oyoki. Yo nde okómi miso na bango.” Ndenge moko mpe, atako “moto ata moko te amoná Nzambe,” Mwana ya Nzambe, Yesu, “oyo azali na ntolo ya Tata nde moto alimboli ye.” (Yoane 1:18) Yesu akómi “miso” na biso mpo tóyeba makambo oyo elekaka na likoló mpo azali ekelamu ya libosoliboso ya Nzambe, Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki mpe moninga ya Nzambe ya motema. Ye nde akoki kopesa biso bansango ya solosolo etali Nzambe oyo amonanaka te.

Talá mwa makambo oyo Yesu, moto oyo alekisaki bambula mingi ná Tata na ye, alobi mpo na Nzambe:

  • Nzambe alɛmbaka te na mosala. “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo.”​—Yoane 5:17.

  • Nzambe ayebi bamposa na biso. “Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango liboso kutu bósɛnga ye.”​—Matai 6:8.

  • Na motema mawa na ye, Nzambe akokisaka bamposa na biso. “Tata na bino oyo azali na likoló . . . abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.”​—Matai 5:45.

  • Nzambe apesaka mokomoko na biso valɛrɛ. “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo ya bibende moko ya motuya moke, boye te? Nzokande ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te. Kasi nsuki nyonso ya motó na bino etángami. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”​—Matai 10:29-31.

MOTO OYO AMONISAKI BIZALELI YA NZAMBE OYO AMONANAKA TE

Mbala mingi bato oyo bakufá miso bakangaka ntina ya makambo ndenge moko te ná bato oyo bamonaka. Moto oyo akufá miso ayebaka te ete esika oyo malili ezali ezangi moi mpe ezali molili, kasi nde esika malamu ya komibatela na moi. Kaka ndenge moto oyo akufá miso akoki komona te esika oyo malili to pole ya moi ezali, tokoki te koyeba Yehova kaka na ndenge na biso. Yango wana, Yehova atindelaki biso moto oyo amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli mpe bomoto na ye.

Moto yango ezalaki Yesu. (Bafilipi 2:7) Yesu asukaki kaka te na koloba makambo etali Tata na ye kasi amonisaki mpe ndenge oyo Nzambe azalaka. Filipi moko ya bayekoli ya Yesu atunaki ye boye: “Nkolo, lakisá biso Tata.” Yesu ayanolaki ye ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:8, 9) Okoki ‘komona’ nini epai ya Tata na makambo oyo Yesu asalaki?

Yesu azalaki malilimalili te, azalaki na komikitisa mpe bato bazalaki kobanga te koya epai na ye. (Matai 11:28-30) Ndenge oyo azalaki kokitisa bato mitema esalaki ete báya epai na ye. Yesu azalaki kokabola esengo mpe mawa ná bato. (Luka 10:17, 21; Yoane 11:32-35) Ntango ozali kotánga to koyoka masolo ya Yesu na Biblia, salá lokola nde ozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema. Soki okanisi ndenge Yesu azalaki kosalela bato makambo, okozala na likoki ya komona polele bizaleli kitoko ya Nzambe mpe okopusana penepene na Ye.

KOSANGISA MAKAMBO ESIKA MOKO

Mokomi moko akomaki boye mpo na ndenge bato bakufá miso bayebaka makambo oyo ezali koleka na mokili: “Moto yango akoki (kosimba, koyoka nsolo, koyoka mpe bongo na bongo) mpo na kozwa bansango ndambondambo mpe na nsima kosangisa yango mpo ebima mobimba.” Ndenge moko mpe, ntango ozali kotala biloko oyo Nzambe asalá, kotánga makambo oyo Yesu alobá mpo na Tata na ye mpe koyekola ndenge amonisaki bizaleli ya Nzambe, okomona ndenge Yehova azalaka. Akokóma moto ya solo mpo na yo.

Yobo, moto moko na ntango ya kala, amonaki likambo yango. Liboso, alobaki kozanga “kososola.” (Yobo 42:3) Kasi nsima ya kotalela malamumalamu biloko kitoko oyo Nzambe asalá, etindaki ye aloba boye: “Nayokaki yo na nsango, kasi sikoyo liso na ngai emoni yo.”​—Yobo 42:5.

‘Soki oluki Yehova, akosala ete omona ye’

Ekoki mpe kozala bongo mpo na yo. “Soki oluki [Yehova], akosala ete omona ye.” (1 Ntango 28:9) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oluka mpe omona Nzambe oyo amonanaka te.