Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?

Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?

“NAZALI na elikya moko.” Eleki sikoyo mbula 50 banda Martin Luther King moto oyo azalaki kobundela ntomo ya bato ya Amerika alobaki maloba yango, na diskur na ye oyo ekendá nsango, oyo asalaki mokolo ya 28/08/1963. King azongelaki maloba yango mbala na mbala mpo na komonisa elikya oyo azalaki na yango ete mokolo mosusu, bato bakofanda na mokili oyo ezaleli ya koyina bato ya mposo mosusu ekozala te. Atako alobaki maloba yango liboso ya ebele ya bato na États-Unis, bikólo mingi bandimaki mpe makanisi na ye.

Martin Luther King, ntango azali kosala diskur etali ntomo ya bato

Sanza misato nsima ya diskur yango, na mokolo ya 20/11/1963, bikólo koleka 100 endimaki makambo oyo ONU elobaki mpo na kosilisa likambo nyonso ya kozwa bato ya mposo boye na valɛrɛ koleka basusu. Na bambula oyo elandaki, maloba mosusu ya ndenge wana endimamaki. Milende wana nyonso ebimisi motuna oyo: Matomba nini emonani?

Na mokolo ya 21/03/2012, Ban Ki-moon secrétaire général ya ONU alobaki boye: “Atako boyokani mpe makambo ndenge na ndenge esalemi mpo na koboya to kolongola makambo lokola koyina bato ya mposo mosusu, kozwa bango na valɛrɛ te, koyina bato ya bikólo mosusu mpe makambo mosusu ya ndenge wana; likambo ya koyina bato ya mposo mosusu ezali kokoba konyokola bamilio ya bato na mokili.”

Ata na mikili oyo mwa milende esalemi mpo na kosilisa likambo ya koyina bato ya mposo mosusu mpe lolenge nyonso ya kokanisela basusu mabe; tokoki kaka komituna boye: Milende yango elongoli makanisi oyo ezwá misisa na mitema ya bato to esali kaka ete bámonisa yango polele te? Bamosusu bamonaka ete milende ya ndenge wana epekisaka kaka ezaleli ya kozwa basusu na valɛrɛ te, kasi ekokaka mpenza te kolongola ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Mpo na nini? Mpo kozwa basusu na valɛrɛ te, ezali likambo oyo emonanaka polele mpe Leta ekoki kopesa moto etumbu mpo na yango, nzokande ezaleli ya kokanisela basusu mabe ezalaka nde na mitema mpe na makanisi ya bato, mpe ezalaka mpasi mpo Leta etyela yango mibeko.

Na yango, mpo na kosilisa likambo ya kokanisela basusu mabe, esengeli kaka te kopekisa makambo oyo esalaka ete moto azwa bamosusu na valɛrɛ te, kasi esengeli mpe kobongola makanisi oyo moto azalaka na yango mpo na bato ya bikólo mosusu. Yango ekoki mpenza kosalema? Soki ɛɛ, ndenge nini? Tótalela naino bandakisa ya makambo oyo esalemaki mpenza, oyo ekosalisa biso tómona kaka te ete bato bakoki kobongwana kasi mpe eloko oyo ekoki kosalisa bango básala bongo.

BIBLIA ESALISAKI BANGO BÁTIKA KOKANISELA BASUSU MABE

“Namonaka ete nalongwá na boombo ya kokanisela basusu mabe.”​—Linda

Linda: Nabotamaki na Afrika ya Sudi. Nazalaki komona moto nyonso ya Afrika ya Sudi oyo azali mondɛlɛ te moto mpamba, atángá te, ebongi te kotyela ye motema, mpe azali kaka moombo ya mindɛlɛ. Kozanga koyeba, nakangamaki na motambo ya kokanisela basusu mabe. Kasi, ntango nakómaki koyekola Biblia ezaleli yango ebandaki kolongwa. Nayekolaki ete “Nzambe aponaka bilongi te” mpe ete motema ezali na ntina mingi koleka mposo ya nzoto na biso to monɔkɔ oyo tolobaka. (Misala 10:34, 35; Masese 17:3) Bafilipi 2:3 esalisaki ngai namona ete soki nazali kotalela basusu ete baleki ngai, nakotika ezaleli ya kokanisela bango mabe. Kosalela batoli ya Biblia lokola oyo, esalisaki ngai natyelaka bato mosusu likebi ata soki bazali bato ya mposo nini. Sikoyo, namonaka ete nalongwá na boombo ya kokanisela basusu mabe.

“Nayaki koyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka bato.”​—Michael

Michael: Nakolá na esika oyo bato mingi bazalaki mindɛlɛ ya Australie; mpe ezaleli ya kokanisela bato ya Azia mabe, mingimingi bato ya Chine, ekɔtelaki ngai mpenza. Ntango nazali kokumba motuka, soki namoni moto moko oyo azali lokola moto ya Azia, nazalaki kokitisa vitre mpe kolobela ye maloba mabe na mongongo makasi ete “moto ya Azia oyo, zongá epai na bino!” Na nsima, ntango nabandaki koyekola Biblia, nayaki koyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka bato. Alingaka bato nyonso, ata soki bautá wapi to bazali ndenge nini. Bolingo yango esimbaki motema na ngai, mpe koyina oyo nazalaki na yango esilaki. Soki natali ndenge nabongwaná, ekamwisaka ngai mpenza. Lelo oyo, nasepelaka kozala elongo na bato ya bikólo nyonso mpe ya lolenge nyonso. Yango esalá ete nakóma kotalela bomoi na ndenge mosusu mpe ememelá ngai esengo mpenza.

“Nabongolaki makanisi na ngai mpe nayokanaki na bango.”​—Sandra

Sandra: Mama na ngai azalaki moto ya engumba Umunede na etúká ya Delta, na Nigéria. Kasi tata azali moto ya etúká ya Edo mpe alobaka monɔkɔ ya Esan. Bokeseni wana esalaki ete bandeko ya tata báyina mama tii na mokolo oyo akufaki. Yango wana, nazwaki ekateli ete nakoyokana soki moke te ná moto nyonso oyo alobaka monɔkɔ ya Esan mpe nakondima te kobala mobali oyo azali moto ya etúká ya Edo. Kasi, ntango nabandaki koyekola Biblia, nakómaki kotalela makambo ndenge mosusu. Lokola Biblia elobi ete Nzambe aponaka bilongi te mpe andimaka moto nyonso oyo abangaka ye, ngai nde nani mpo nayina moto kaka mpo na ekólo to monɔkɔ oyo alobaka? Nabongolaki makanisi na ngai mpe nayokanaki na bandeko ya tata na ngai. Kosalela batoli ya Biblia epesá ngai esengo mpe kimya na motema. Esalisá ngai nayokanaka malamu na basusu, ata soki bazali bato ya ndenge nini, ya mposo nini, balobaka monɔkɔ nini to bazali bato ya ekólo nini. Boyebi soki nabalá moto ya wapi? Ya engumba Edo mpe alobaka monɔkɔ ya Esan!

Mpo na nini Biblia elongi kosalisa bato yango mpe bato mosusu mingi bátika ezaleli ya koyina mpe ya kokanisela basusu mabe oyo ezwá mpenza misisa na mitema na bango? Mpo Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Ezali na nguya ya kobongola makanisi ya moto mpe ndenge oyo atalelaka basusu. Lisusu, Biblia emonisi likambo mosusu oyo esengeli mpo na kosilisa likambo nyonso oyo etindaka moto akanisela basusu mabe.

BOKONZI YA NZAMBE EKOSILISA MAKAMBO NYONSO OYO ETINDAKA MOTO AKANISELA BASUSU MABE

Atako boyebi ya Biblia ekoki kosalisa moto alongola makanisi mabe oyo efandá mpenza na motema, ezali mpe na makambo mosusu mibale oyo esengeli kolongwa naino mpo ezaleli ya kokanisela basusu mabe esila libela. Ya liboso, ezali lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. Biblia elobi polele ete: “Ezali na moto moko te oyo asalaka lisumu te.” (1 Bakonzi 8:46) Na yango, ata soki tosali milende nini, biso nyonso tozalaka na mokakatano oyo ntoma Paulo mpe azalaki na yango; akomaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baroma 7:21) Na yango, na bantango mosusu, motema na biso ya kozanga kokoka ekoki kozongela “makanisi ya mabe” oyo ekoki kotinda biso tókanisela basusu mabe.​—Marko 7:21.

Ya mibale, Satana Zabolo mpe akoki kolendisa ezaleli yango. Biblia elobi ete azali “mobomi-bato” mpe “azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Yoane 8:44; Emoniseli 12:9) Yango nde ntina oyo ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mpe ezali mpasi mpo bato básilisa makambo lokola: Kozwa basusu na valɛrɛ te, koboma bato ya ekoló moko mpo na kosilisa bango, koyina mposo, lingomba mpe mimeseno ya basusu.

Na yango, mpo ezaleli ya kokanisela basusu mabe esila libela, ebongi naino lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka elongwa; Satana Zabolo mpe azala te. Biblia emonisi ete yango nde Bokonzi ya Nzambe ekosala.

Yesu Kristo ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe nde ekolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo, ata mpe oyo etindaka moto akanisela basusu mabe.

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, Satana ‘akokangama monyɔlɔlɔ,’ elingi koloba akozala na likoki ya ‘kokosa lisusu bikólo te.’ (Emoniseli 20:2, 3) Na nsima, ekozala na “mabele ya sika,” epai “boyengebene ekozala;” elingi koloba bato oyo Nzambe andimi. *​—2 Petro 3:13.

Baoyo bakofanda na mabele yango bakokóma bato ya kokoka, bakosikolama na lisumu. (Baroma 8:21) Lokola Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bango, “bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te.” Mpo na nini? “Mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yisaya 11:9) Na ntango yango, bato nyonso bakoyekola banzela ya Yehova Nzambe mpe bakolanda bizaleli na ye. Yango ekosilisa mpenza makambo nyonso oyo etindaka bato bákanisela basusu mabe, “mpo Nzambe aponaka bilongi te.”​—Baroma 2:11.

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo ekosala mosika te, talá mokapo 3, 8 mpe 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.