Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Koyina bato ya mposo mosusu

Koyina bato ya mposo mosusu

Mposo ya bato eutá wapi?

“Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva, mpamba te asengelaki kokóma mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.”​Ebandeli 3:20.

OYO BATO YA MAYELE BALOBI

Ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka makambo etali kelasi, siansi mpe mimeseno ya bato (UNESCO) elobi ete “bato nyonso bazali bato ya motindo moko mpe bautá na nkɔkɔ moko.”​—Declaration on Race and Racial Prejudice, 1978.

BIBLIA ELOBI NINI?

Nzambe akelaki bato mibale, Adama ná Eva, mpe alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Ebandeli 1:28) Na yango, Adama ná Eva bakómaki baboti ya bato nyonso. Na nsima, ntango mpela ekɔmbaki ebele ya bato awa na mabele, kaka Noa ná mwasi na ye, mpe bana na ye misato ná basi na bango nde babikaki. Biblia eteyaka ete biso nyonso tozali bakitani ya bana ya Noa.​—Ebandeli 9:18, 19.

Ezali na mposo moko oyo eleki ya basusu?

“[Nzambe] asalaki bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele.”​Misala 17:26.

OYO BATO MOSUSU BALOBAKI

Na boumeli ya siɛklɛ ya 20, bituluku mingi ya bato bandimaki likanisi ya komona ete mposo boye to boye eleki ya bamosusu. Na ndakisa, Banazi bazalaki koloba ete mposo na bango eleki oyo ya bato mosusu. Nzokande, mokanda ya UNESCO oyo tolobelaki liboso elobi ete “mposo nyonso ezali ndenge moko mpo bato nyonso bazali na nkɔkɔ kaka moko.”

BIBLIA ELOBI NINI?

Mokanda ya Misala 10:34, 35 elobi ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” Mpo na ntina oyo, moto moko te akoki komona ete mposo boye eleki oyo ya basusu.

Yesu atikelá bakristo ndakisa moko ya malamu ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Abondelaki ete bayekoli na ye bázala moto moko to “bázala mpenza na bomoko ya solosolo,” kasi bázala te na bokabwani.​—Yoane 17:20-23; 1 Bakorinti 1:10.

Ezaleli ya koyina bato ya mposo mosusu ekosila mokolo mosusu?

“Na eleko ya nsuka ya mikolo: ngomba ya ndako ya Yehova ekopikama makasi . . . , mpe bikólo nyonso ekosopana kuna.”​Yisaya 2:2.

OYO BATO MOSUSU BAKANISAKA

Kowelana na likambo etali mposo etindi bato ya mikili mingi bátuna soki bakonzi bakokoka mpenza kosilisa likambo yango. Basusu kutu balobi ete ekosalema ata mokolo moko te ete bato ya mposo nyonso bázala ndenge moko.

BIBLIA ELOBI NINI?

Nzambe akotika te ete likambo etali koyina mposo ya bato mosusu etikala libela na libela. Kutu, na Boyangeli na ye, mibali mpe basi oyo bakouta na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bakosalela ye na bomoko, mpe bakomoniselana bolingo ya solosolo. (Emoniseli 7:9) Bokonzi ya Nzambe ezalaka te na motema ndenge bato balobaka. Kasi, ezali nde guvɛrnema oyo ekosala makambo kitoko awa na mabele, esika oyo mokano ya Nzambe ezalaki ete bato nyonso báfanda kozanga ete likambo ya mposo ekabola bango. *

^ par. 15 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.