Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | SARA

“Ozali mwasi moko kitoko mingi”

“Ozali mwasi moko kitoko mingi”

SARA atɛlɛmi na katikati ya shambrɛ mpe azali kotala epai na epai. Meká naino komona na makanisi ndenge mwasi wana ya Moyen-Orient afungoli miso mpe ezali komonana polele ete likambo ezali. Ezali komonana ete azali na mawa? Soki ɛɛ, ezali mpasi te tóyeba mpo na nini azali na mawa. Ndako yango ezali kotinda ye akanisa makambo mingi. Ye ná mobali na ye Abrahama balekisá bantango mingi ya esengo wana. * Bapesanaki mabɔkɔ mpo ndako yango etongama.

Bazalaki kofanda na Ure, engumba moko ya bozwi oyo ezalaki na ebele ya bato ya misala ya mabɔkɔ mpe bakomelesa. Boye, bazalaki mpe na biloko mingi. Kasi mpo na Sara, ndako yango ezalaki kaka te esika ya kobomba biloko. Ye ná mobali na ye balekisaki bambula mingi ya esengo mpe ya mpasi. Ezali esika oyo bazalaki mbala mingi kobondela Nzambe na bango Yehova. Sara azalaki na bantina mingi ya kolinga esika yango.

Ata bongo, Sara andimaki kotika makambo wana nyonso oyo amesanaki na yango. Atako azalaki na mbula soki 60, asengelaki kosala mobembo mpo na kokende esika oyo ayebi te, kobanda bomoi ya sika oyo etondi na makama mpe azalaki na elikya te ete akozonga lisusu na Ure. Nini etindaki ye andima mbongwana wana na bomoi na ye? Kondima na ye ekoki koteya biso nini lelo?

“LONGWÁ NA MBOKA NA YO”

Ekoki kozala ete Sara akolaki na Ure. Lelo oyo, esika engumba yango ezalaká ebebábebá mpe bato bafandaka kuna te. Kasi na eleko ya Sara, bakomelesa bazalaki kouta na biloko ya valɛrɛ mosika mpo na koya na yango na engumba wana ya bozwi na bamasuwa oyo ezalaki kotambola na bamai mpe banzela ya mai ya Ebale Efrate. Bato bazalaki kotondana na babalabala na yango ya ngombangomba, bamasuwa ezalaki kotandana pembenipembeni ya mai mpe biloko ezalaki kotondana na bazando. Meká naino komona ndenge Sara azalaki kokola na engumba wana ya loyenge, mpe ayebaki bato mingi na bankombo. Na ntembe te, bato yango mpe babosanaki ye te mpo azalaki mwasi moko kitoko mingi. Azalaki mpe na bandeko mingi kuna.

Sara ayebani na Biblia mpo na kondima monene oyo azalaki na yango; kasi kondima yango ezalaki te epai ya nzambe-sanza oyo bato mingi ya Ure bazalaki kosambela mpe batɛlɛmisaki monima ya nzambe yango na engumba. Kasi, Sara azalaki kosambela Yehova, Nzambe ya solo. Biblia elobeli te ndenge akómaki na kondima yango. Papa na ye, azalaki mosambeli ya bikeko mpo na mwa ntango. Ezala ndenge nini, Sara abalanaki na Abrahama, mobali oyo alekaki ye na mbula 10 ya kobotama. * (Ebandeli 17:17) Na nsima, Abrahama ayebanaki lokola “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.” (Baroma 4:11) Libala na bango mibale ezalaki malamu, makasi mpe bazalaki komoniselana limemya, kosolola malamu, bazalaki mpe kopesana mabɔkɔ na ntango ya mikakatano. Kasi oyo eleki nyonso, bolingo mpo na Nzambe nde esimbaki libala na bango.

Sara alingaki mobali na ye mingi mpe bango mibale batongaki ndako na bango na Ure esika bandeko na bango bazalaki kofanda. Kasi likambo moko etungisaki bango. Biblia elobi ete Sara “azalaki kaka ekomba: azalaki na mwana te.” (Ebandeli 11:30) Ezalaki mokakatano monene epai ya Sara mpo na mimeseno ya ntango wana. Kasi Sara azalaki sembo epai ya Nzambe mpe epai ya mobali na ye. Emonani ete, Lota, mwana ya ndeko na bango oyo azalaki na tata te, akómaki lokola mwana na bango. Bomoi na bango ekobaki bongo tii ntango makambo nyonso ebongwanaki.

Abrahama ayei epai ya Sara na esengo makasi. Azali kondima te likambo euti kokómela ye. Nzambe oyo basambelaka auti kosolola na ye; auti kobimela ye, na ntembe te, na nzela ya anzelu moko! Meká naino komona ndenge Sara azali kotala mobali na ye, abendi pema mpe atuni: “Ayebisi yo nini? Nabondeli yo, yebisá ngai!” Ekoki kozala ete liboso Abrahama afandaki naino mpo na kotya makanisi esika moko. Na nsima ayebisaki Sara makambo Yehova alobaki: “Bimá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe yaká na mokili oyo nakolakisa yo.” (Misala 7:2, 3) Ntango esengo oyo bayokaki ekitaki, bakanisaki na mokumba oyo Yehova apesaki bango. Basengelaki kotika ndako mpe bomoi ya malamu oyo bazalaki na yango mpo bákóma kotambolatambola! Sara alingaki kosala nini? Na ntembe te, Abrahama atalaki ye na miso. Sara alingaki kondima kopesa ye mabɔkɔ na mbongwana wana monene oyo elingaki kokɔta na bomoi na bango?

Ekateli oyo Sara asengelaki kozwa ekoki kokamwisa biso. Tokoki komilobela, ‘ Nzambe asɛngá ngai naino te to molongani na ngai likambo ya bongo!’ Kasi, biso nyonso tozali kokutana na likambo ya bongo. Mokili oyo tofandi elingi bato bázala na biloko ebeleebele mpe ezali kotinda biso tótya makambo, biloko mpe kimya na biso na esika ya liboso. Kasi Biblia esɛngi biso nde tótya makambo ya Nzambe na esika ya liboso; tóluka naino kosepelisa Nzambe na esika ya komisepelisa. (Matai 6:33) Soki totali oyo Sara asalaki, tokoki komituna, ‘ekateli nini nakozwa na bomoi na ngai?’

“BABIMAKI NA MOKILI YANGO”

Ntango Sara azalaki kokanga biloko, ayebaki te azwa nini to atika nini. Asengelaki te kozwa biloko ya minene mpo bampunda ná bakamela ekokaki komema yango te, biloko oyo ezalaki na ntina te na bomoi ya bitambolátambola. Na ntembe te, esɛngaki bátɛka to básundola biloko mingi oyo bazalaki na yango. Basengelaki mpe kobosana matomba ya kofanda na engumba; na ndakisa kokende zando na pɛtɛɛ nyonso epai bakokaki kosomba ndunda, misuni, mbuma, bilamba mpe biloko mosusu oyo bazalaki na yango mposa.

Kondima ya Sara etindaki ye asundola ndako ya kitoko oyo azalaki na yango

Mbala mosusu ezalaki mpe mpasi Sara atika ndako na ye. Soki ezalaki lokola bandako mingi oyo bato ya arkeoloji bautaki kokundola na Ure, boye Sara asundolaki ndako ya kitoko mpenza. Bandako yango mosusu ezalaki na ebele ya bashambre mpe bapɔmpi ya mai ya pɛto. Ata ndako ya monene te ezalaki na nsamba ya makasi mpe porte oyo ekokaki kokangama makasi. Bahema ekokaki kobatela bango ndenge wana na miyibi? To kobatela bango na bankɔsi, bankɔi, bambwa ya zamba; banyama oyo ezalaki mingi na ntango wana na mikili oyo Biblia elobeli?

Bongo libota? Sara asengelaki kotika banani? Mobeko oyo ya Nzambe: “Longwá na mboka na yo mpe tiká bandeko na yo” ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Sara. Lokola azalaki mwasi moko ya boboto mpe bolingo, na ntembe te azalaki na bandeko ya basi mpe mibali, bana na bango, batata-mwasi mpe banɔkɔ oyo azalaki kolinga mingi mpe akokaki lisusu komona bango te. Ata bongo, na mpiko nyonso Sara azongaki nsima te mpe mokolo na mokolo azalaki komibongisa mpo na mobembo.

Atako ezalaki pɛtɛɛ te, Sara asilisaki kokanga biloko mpe amibongisaki mpo na kokende na mokolo oyo batyaki. Tata na bango Tera asengelaki kokende elongo na Abrahama ná Sara, atako azalaki na mbula soki 200. (Ebandeli 11:31) Na ntembe te, Sara azalaki na mosala mingi ya kosala mpo na kobatela tata wana ya mobange. Lota mpe akendaki elongo na bango ntango ‘babimaki na mokili ya Bakaladea’ mpo na kotosa etinda ya Yehova.​—Misala 7:4.

Batambolaki pembenipembeni ya Ebale Efrate, mobembo ya kilomɛtrɛ soki 960 na nɔrdi-wɛsti mpo na kokóma na Harane, epai bafandaki liboso mpo na mwa ntango. Ekoki kozala ete Tera abɛlaki yango akokaki lisusu te kokoba mobembo yango. Libota mobimba efandaki wana tii ntango Tera akufaki na mbula 205. Na ntango moko boye, liboso bákoba mobembo na bango, Yehova asololaki lisusu na Abrahama mpe ayebisaki ye lisusu alongwa na mokili yango mpe akende na mokili oyo akolakisa ye. Kasi na mbala oyo, Nzambe abakisaki elaka kitoko oyo: “Nakosala ete ekólo moko monene euta na yo.” (Ebandeli 12:2-4) Kasi ntango balongwaki na Harane, Abrahama azalaki na mbula 75 mpe Sara mbula 65 mpe babotaki te. Ndenge nini ekólo moko ekokaki kobima na nzela ya Abrahama? Asengelaki kozwa mwasi mosusu? Na ntango wana bato mingi bazalaki kobala basi ebele, boye Sara akanisaki na likambo yango.

Ezala ndenge nini, balongwaki na Harane mpe bakobaki mobembo. Kasi talá sikoyo banani bazalaki elongo na bango. Lisolo yango elobi ete Abrahama ná bato ya libota na ye balongwaki na ebele ya biloko mpe “milimo oyo bazwaki na Harane.” (Ebandeli 12:5) Bato yango bazalaki banani? Ekoki kozala bazalaki bato na ye ya misala. Kasi na ntembe te, Abrahama ná Sara bateyaki bato yango makambo ya Nzambe na bango. Kasi bakomantɛrɛ oyo Bayuda mosusu ya kala basalá mpo na vɛrsɛ yango elobi ete bato oyo vɛrsɛ yango elobeli bazalaki mpe baprozelite, bato oyo bakómaki kosambela Yehova elongo na Abrahama mpe Sara. Soki ezali bongo, boye kondima makasi ya Sara esalaki ete andimisa basusu makambo oyo azalaki koyebisa bango na ntina etali Nzambe na ye mpe elikya na ye. Ezali na ntina tókanisa yango mpo tozali na eleko oyo ekómi mpasi komona bato bázala na kondima mpe elikya. Soki oyekoli likambo moko ya malamu na Biblia, okoki koyebisa yango basusu?

‘AKITI NA EZIPITO’

Nsima ya kokatisa Ebale Efrate, ekoki kozala na mokolo ya 14 Nisana, 1943 liboso ya ntango na biso, bakendaki na sudi, na mokili oyo Yehova alakaki bango. (Kobima 12:40, 41) Meká naino komona ndenge Sara azali kotala epai na epai, mpo biloko ndenge na ndenge mpe klima kitoko ya mokili yango ezali kosepelisa ye. Yehova abimeli lisusu Abrahama pene ya nzete monene ya More, na Shekeme, mpe na mbala oyo alobi na ye: “Nakopesa momboto na yo mokili oyo.” Aha, liloba “momboto” ezalaki na ndimbola monene epai ya Abrahama! Na ntembe te, etindaki ye akanisa lisusu elanga ya Edene, epai Yehova alobaki ete mokolo mosusu momboto moko akoboma Satana. Yehova ayebisaki Abrahama ete ekólo oyo ekouta na ye ekosala ete bato ya mabele mobimba bázwa mapamboli.​—Ebandeli 3:15; 12:2, 3, 6, 7.

Ata bongo, libota yango esengelaki mpe kokutana na mikakatano ya mokili oyo. Nzala ekɔtaki na mokili ya Kanana, yango wana Abrahama azwaki ekateli ya komema libota na ye na sudi, na Ezipito. Kasi, amonaki likama moko na mokili yango. Yango wana, alobaki na Sara boye: “Nabondeli yo, yoká ngai! Nayebi malamu ete ozali mwasi moko kitoko mingi. Na bongo, kozanga ntembe, Baezipito bakomona yo mpe bakoloba ete: ‘Oyo mwasi na ye.’ Mpe bakoboma ngai, kasi bakotika yo na bomoi. Nabondeli yo, lobá ete ozali ndeko na ngai, mpo básala ngai malamu likoló na yo, mpe molimo na ngai ekozala mpenza na bomoi mpo na yo.” (Ebandeli 12:10-13) Mpo na nini Abrahama asɛngaki ye likambo ya bongo?

Abrahama azalaki moto ya lokuta te, bibangabanga mpe te ndenge bato mosusu balobaka. Sara azalaki mpenza leki na ye, mwana ya mama mosusu. Abrahama azalaki ekɛngɛ na ntina. Ye ná Sara bayebaki ete likambo eleki ntina ezalaki mokano ya Nzambe ya kobimisa moto moko ya ntina mpe ekólo moko na nzela ya Abrahama, yango wana komibatela ekómaki na ntina mingi mpo na Abrahama. Lisusu, arkeoloji emonisi ete ezalaki likambo ya sika te bakonzi ya Ezipito bábotola mwasi ya moto mpe báboma mobali na ye. Boye, Abrahama asalaki makambo na bwanya mpe na komikitisa nyonso Sara andimaki ekateli na ye.

Eumelaki te, makambo oyo esalemaki emonisaki ete Abrahama abangaki na ntina; bankumu mosusu ya Farao bamonaki ete Sara azalaki bonzenga mpenza​—na mbula oyo azalaki na yango, kitoko ya Sara ebendaki likebi na bango. Bayebisaki yango Farao mpe asɛngaki bámemela ye Sara! Kanisá naino ndenge Abrahama amitungisaki mpe Sara abangaki. Kasi, emonani ete basalelaki ye makambo lokola mopaya moko ya lokumu kasi te lokola moto oyo bakangi kokanga. Mbala mosusu Farao akanaki kosomba motema na ye mpe kokamwisa ye na bozwi na ye mpe na nsima koyokana na “ndeko” na ye mpo azwa ye lokola mwasi na ye.​—Ebandeli 12:14-16.

Kanisá naino ndenge Sara azali kotala mokili ya Ezipito na fenetre to na balcon ya ndako ya mokonzi. Amiyokaki ndenge nini ntango azongelaki lisusu kofanda na ndako oyo ezalaki na nsamba mpe biloko kitoko ya kolya? Abendamaki na bomoi wana ya bozwi; ntango mosusu bozwi koleka nyonso oyo azalaki na yango na Ure? Kanisá esengo oyo Satana alingaki koyoka soki Sara asundolaki Abrahama mpe akómaki mwasi ya Farao yango! Kasi Sara asalaki likambo ya ndenge wana te. Azalaki sembo epai ya mobali na ye, na libala na ye mpe epai ya Nzambe na ye. Elingaki kozala malamu soki baoyo nyonso babalá bamonisaka bosembo ya ndenge wana na mokili oyo mabe! Okoki komekola bosembo ya Sara na ndenge na yo ya kosalela bandeko mpe baninga na yo makambo?

Atako amekamaki na ndako ya Farao, Sara azalaki sembo epai ya mobali na ye

Yehova akɔtaki likambo yango mpo na kobatela mwasi yango, abimiselaki Farao ná bato ya ndako na ye bampasi. Ntango Farao ayaki koyeba ete Sara azalaki mwasi ya Abrahama, azongisaki ye epai ya mobali na ye mpe asɛngaki bango nyonso bálongwa na Ezipito. (Ebandeli 12:17-20) Abrahama asepelaki mpenza ntango Sara azongelaki ye! Kobosana te ete alobaki na ye na boboto nyonso ete: “Nayebi malamu ete ozali mwasi moko kitoko mingi.” Kasi asepelaki na kitoko mosusu oyo Sara azalaki na yango koleka kitoko ya nzoto. Sara azalaki na kitoko ya solosolo ya kati, kitoko oyo Yehova azwaka na valɛrɛ mingi. (1 Petro 3:1-5) Ezali kitoko ya ndenge wana nde biso nyonso tosengeli kokóma na yango. Soki totye makambo ya Nzambe liboso ya biloko ya mokili, toyebisi basusu makambo na ye mpe na bosembo nyonso tokangami na mibeko ya Nzambe ata na ntango ya komekama, tokomekola kondima ya Sara.

^ par. 3 Na ebandeli bankombo na bango ezalaki Abrama ná Sarai, kasi na nsima bayebanaki na bankombo oyo Yehova apesaki bango.​—Ebandeli 17:5, 15.

^ par. 8 Sara azalaki leki ya Abrahama. Tera nde tata na bango, kasi moto na moto azalaki na mama na ye. (Ebandeli 20:12) Atako lelo oyo libala ya ndenge wana ezali mabe, ezali na ntina tóbosana te ete makambo ezalaki ndenge moko te na eleko wana. Kozanga kokoka oyo Adama ná Eva bamemelá bato ekɔtaki naino makasi te na ntango wana. Atako bazalaki kobalana mpenza na bandeko na bango ya makila, bato yango bazalaki makasi mingi mpenza yango wana bana oyo bazalaki kobota bazalaki makila makasi. Kasi bambula 400 na nsima, bakómaki koumela na bomoi ndenge moko na biso. Na ntango yango, Mibeko ya Moize epekisaki kosangisa nzoto na moto oyo azali mpenza ndeko ya makila.​—Balevi 18:6.