Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?

Eyano ya Biblia

 Nkombo ya mokanda Emoniseli, na Grɛki Apokalupsis (apocalypse), elimboli “kobimisa polele” to “koyebisa nsango.” Emonisi ntina ya mokanda yango: kobimisa makambo oyo ebombaná mpe koyebisa makambo oyo esengelaki kosalema bambula mingi nsima ya kokomama na yango. Makambo mingi oyo mokanda yango elobeli ekokisami naino te.

Makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli

Mwa lisalisi mpo na kokanga ntina ya mokanda ya Emoniseli

  1.   Bato oyo basalelaka Nzambe bamonaka ete Emoniseli elobeli makambo ya malamu, kasi te makambo ya kobangisa to ya nsɔmɔ. Bato mingi bamonaka ete liloba “apocalypse” elimboli likama moko monene; kasi banda na ebandeli tii na nsuka na yango, mokanda ya Emoniseli elobi ete baoyo bazali kotánga nsango na yango, kokanga ntina, mpe kosalela yango, bakozala na esengo.​—Emoniseli 1:3; 22:7.

  2.   Emoniseli esaleli “bilembo” ebele oyo ezali nde maloba ya elilingi.​—Emoniseli 1:1.

  3.   Mikanda mosusu ya Biblia elobelá bato, biloko, mpe bilembo mingi oyo mokanda ya Emoniseli mpe elobeli; na ndakisa:

  4.   Bimonaneli yango etali “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914, ntango Bokonzi ya Nzambe etyamaki mpe Yesu akómaki Mokonzi. (Emoniseli 1:10) Na yango, tokoki kozela ete makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ekokisama mingimingi na ntango na biso.

  5.   Mpo na kokanga ntina ya mikanda mosusu ya Biblia, tosengeli kozala na bwanya oyo euti na Nzambe mpe kondima ete bato oyo bakangá ntina na yango básalisa biso; ezali mpe bongo mpo na mokanda ya Emoniseli.​—Misala 8:26-39; Yakobo 1:5.