Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | SARA

Sara “Mama ya Bakonzi”

Sara “Mama ya Bakonzi”

SARA atɛlɛmi mpo na konyɔlisa nzoto ntango azali kosala mosala, atali na mosika mpe azali kokanisa. Lokola azalaki na bwanya, basaleli na ye bazalaki na esengo mpe bazalaki komipesa na mosala. Sara ye moko mpe azalaki kosala mingi. Meká komona na makanisi ndenge azali konyɔlisa mabɔkɔ mpe kosimbasimba bisika oyo azali koyoka mpasi. Ntango mosusu azali kotonga mwa elamba na kati ya hema oyo bazalaki kofanda. Mwa elamba yango, oyo esalemi na nsuki ya ntaba, ebandi kobeba mpo ezwá moi mingi mpe ebɛtɛlá mbula mingi, ezali kokundwela Sara ebele ya bambula oyo basali na bomoi wana ya kotambolatambola. Tobandi kokóma mpokwa mpe moi ebandi kolala. Amonaki ndenge Abrahama * abimaki na ntɔngɔ, mpe sikoyo azali kotala nzela oyo akendaki. Ntango amoni mobali na ye na mosika, likoló ya ngomba moko pene na hema, abandi kosɛka.

Mbula zomi esilaki koleka banda Abrahama akambaki libota na ye monene na nzela ya Ebale Efrate mpo na kokende na Kanana. Sara andimaki kopesa mobali na ye mabɔkɔ na mobembo wana ya molai na esika oyo bayebaki liboso te, mpo ayebaki ete asengelaki kokokisa mokumba moko monene mpo mokano ya Yehova oyo etali kobimisa momboto mpe ekólo moko oyo epambwami ekokisama. Kasi, mokumba nini Sara asengelaki kokokisa? Sara azalaki kobota te, mpe sikoyo akómaki na mbula 75. Ntango mosusu azalaki komituna boye: ‘Ndenge nini elaka oyo Yehova apesaki Abrahama ekokokisama, nzokande ngai mwasi ya na ye nazali kobota te?’ Tokoki kokamwa te soki azalaki komitungisa, ata mpe kozanga motema molai.

Mbala mosusu biso mpe tomitunaka ntango nini bilaka ya Nzambe ekokokisama. Ntango mosusu tokómaka motema mokuse, mingimingi ntango tozali kozela ete likambo moko oyo tolingaka mingi ekokisama. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mwasi wana ya kondima makasi?

“YEHOVA AKANGÁ LIBUMU NA NGAI”

Libota ya Abrahama, oyo ekendaki na Ezipito, euti kozonga. (Ebandeli 13:1-4) Batyaki bahema na bango na ɛsti ya Betele, to Luze, ndenge Bakanana bazalaki kobenga engumba yango. Na mokili wana ya patatalu, Sara akokaki komona eteni monene ya Mokili ya Ndaka, epai bamboka ya Bakanana ezalaki, mpe banzela oyo ekokaki kosalisa bato ya mibembo básala mibembo ya mosika. Kasi, mokili wana monene ekesanaki na engumba oyo Sara autaki. Akolaki na Ure, engumba moko monene na Mezopotamia, oyo etikalaki mosika, na ntaka ya kilomɛtrɛ 1 900. Kuna, Sara atikaki ebele ya bandeko na ye ya libota, bazando mpe bawenze, ndako na bango ya kitoko, oyo ezalaki na nsamba mpe bifelo, ntango mosusu ezalaki na mai ya pɔmpi! Atako bongo, soki tokanisi ete Sara azalaki koyoka mpasi na motema mpo na bomoi ya malamu oyo atikaki na mboka oyo autá, toyebi malamu te mwasi wana ya kondima.

Talá oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo santu mbula soki 2 000 na nsima. Mpo na kondima ya Sara ná Abrahama, alobaki boye: “Soki bazalaki mpenza kaka kokanisa esika oyo bautaki, mbɛlɛ bakokaki kozonga.” (Baebre 11:8, 11, 15) Ezala Sara to Abrahama, moko te azalaki koyoka mawa ndenge batikaki bomoi na bango ya kala. Soki bákanisaka yango, mbɛlɛ bazwaki ekateli ya kozonga mboka na bango. Soki bázongaka na Ure, balingaki kozanga libaku malamu oyo Yehova apesaki bango. Lisusu, bato balingaki kobosana bango, na esika ete bázala ndakisa ya kondima oyo esimbaka mitema ya bamilio ya bato.

Na esika ya kotala nsima, Sara azalaki nde kotala liboso. Yango wana, azalaki kosunga mobali ye na mibembo nyonso oyo bazalaki kosala, kosalisa ye mpo na kokanga bahema, kokamba banyama, mpe kotya lisusu bahema na esika bakofanda. Ayikaki mpiko na mikakatano mpe bambongwana mosusu oyo bakutanaki na yango na nsima. Yehova azongelaki lisusu elaka na ye epai ya Abrahama, kasi atángaki nkombo ya Sara te!​—Ebandeli 13:14-17; 15:5-7.

Nsukansuka, Sara amonaki ete ntango ekoki mpo na kosolola na Abrahama mpo ayebisa ye likanisi oyo azalaki na yango na motema. Kanisá elongi ya mawa oyo azalaki na yango ntango alobaki: “Nabondeli yo, yoká ngai! Yehova akangá ngai libumu nabota bana te.” Na nsima, asɛngaki mobali ye abota ná Agare, mosaleli na ye ya mwasi. Kanisá mawa oyo Sara azalaki na yango ntango azali kosɛnga mobali na ye likambo wana! Lelo oyo, kosɛnga likambo ya ndenge wana ekoki kokamwisa; kasi na ntango wana, mibali mingi bazalaki kozwa mwasi ya mibale, to ya makango, mpo abota na ye mwana oyo akozala mokitani na ye. * Mbala mosusu Sara azalaki nde kokanisa ete mokano ya Nzambe ya kobimisa ekólo moko na nzela ya bakitani ya Abrahama ekokokisama na lolenge wana? Ezala bongo to te, andimaki kosala nyonso, ata soki ekosɛnga nini. Abrahama asalaki nini? Biblia elobi ete “ayokaki mongongo ya [Sara].”​—Ebandeli 16:1-3.

Lisolo yango emonisi nde ete Yehova moto atindaki Sara asɛnga likambo wana? Te. Likambo oyo Sara asɛngaki mobali na ye asala emonisi nde lolenge oyo biso bato totalelaka makambo. Akanisaki ete Nzambe nde asalaki ete abota te, mpe akanisaki ete eloko mosusu ya kosala ezali te. Kasi, likanisi oyo Sara apesaki ekokaki nde kobimisela ye mpasi mpe mikakatano. Atako bongo, likanisi na ye emonisaki ete azalaki te koluka kaka matomba na ye moko. Na mokili oyo mbala mingi bato balukaka naino kokokisa bamposa na bango moko, omoni te ete ezaleli oyo Sara amonisaki esengeli kokamwisa? Soki tozali koluka naino kokokisa mokano ya Nzambe na esika ya koluka matomba na biso moko, tokomekola kondima ya Sara.

“TE! OSƐKI”

Eumelaki te, Agare akómaki na zemi ya Abrahama. Ntango mosusu Agare amonaki ete lokola azwi zemi, akómi na valɛrɛ mingi koleka Sara, yango wana akómaki kotyola nkolo na ye ya mwasi. Kanisá mpasi oyo Sara azalaki koyoka na motema, lokola azalaki kobota te! Na ndingisa ya Abrahama mpe na lisalisi ya Nzambe, Sara apesaki Agare etumbu. Agare abotaki mwana mobali na nkombo Yishimaele, na nsima bambula ebele elekaki. (Ebandeli 16:4-9, 16) Mbala ya nsima oyo Biblia elobeli nsango oyo eutaki epai ya Yehova, Sara azalaki na mbula 89 mpe mobali na ye mbula 99. Bazwaki nsango ya esengo mpenza!

Yehova apesaki lisusu moninga na ye Abrahama elaka ete akokómisa momboto na ye mingi. Nzambe abongolaki nkombo ya mobali yango. Liboso, nkombo na ye ezalaki Abrama. Kasi, Yehova abongolaki yango mpe ekómaki Abrahama, oyo elimboli “Tata ya ebele ya bikólo.” Sikoyo, mpo na mbala ya liboso, Yehova amonisi mokumba oyo Sara akokokisa. Abongolaki nkombo na ye, oyo liboso ezalaki Sarai, oyo ntango mosusu elimboli “Koswana,” mpe apesaki ye nkombo Sara, nkombo oyo eyebani lelo. Nkombo Sara elimboli nini? Elimboli “Mama ya Bakonzi”! Yehova alimbolaki mpo na nini aponelaki mwasi yango nkombo wana; alobaki: “Nakopambola ye mpe lisusu nakopesa yo mwana mobali na nzela na ye; mpe nakopambola ye mpe akokóma bikólo; bakonzi ya bato ya bikólo bakobima kati na ye.”​—Ebandeli 17:5, 15, 16.

Kondimana oyo Yehova asalaki na Abrahama ya kobimisa momboto moko oyo akopambola bikólo nyonso esengelaki kokokisama na nzela ya mwana oyo Sara akobota! Yisaka, nkombo oyo Nzambe apesaki mwana yango, elimboli “Kosɛka.” Ntango Abrahama ayokaki elaka ya Yehova ya kopambola Sara na nzela ya mwana oyo ye moko akobota, “akweaki elongi na nse mpe abandaki kosɛka.” (Ebandeli 17:17) Akamwaki mpenza mpe atondaki na esengo. (Baroma 4:19, 20) Bongo Sara?

Eumelaki te, bapaya misato ya mibali bayaki na hema ya Abrahama. Ezalaki na ntango ya moi makasi, kasi atako Abrahama na Sara bazalaki mibange, bayaki mbangu koyamba bapaya yango. Abrahama alobaki na Sara: “Salá noki! Zwá sea misato ya farini ya malamu mpenza, bɛtá pɔtɔpɔtɔ mpe salá bagato ya libungutulu.” Ata na ntango wana, koyamba bapaya ezalaki kosɛnga mosala mingi. Abrahama atikelaki mwasi na ye misala nyonso te. Akendaki mbangu koboma mwana-ngɔmbɛ mpe alambaki bilei mosusu mpe abongisaki mwa eloko ya komɛla. (Ebandeli 18:1-8) Nzokande, “mibali” yango bazalaki nde baanzelu ya Yehova! Mbala mosusu, ntoma Paulo azalaki kokanisa likambo yango ntango akomaki ete: “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya, mpo na nzela na yango bamosusu, bayambaki baanzelu, kasi bayebaki te.” (Baebre 13:2) Okoki komekola ndakisa malamu ya ezaleli ya koyamba bapaya oyo Abrahama ná Sara batikelá biso?

Sara azalaki kosepela koyamba bapaya

Ntango anzelu moko ayebisaki lisusu Abrahama elaka oyo Nzambe apesaki ye ete Sara akobota mwana mobali, Sara azalaki komona ye te; azalaki na kati ya hema, kasi azalaki koyoka. Sara azalaki kondima te ete, na bambula oyo akómaki na yango, akokaki lisusu kobota mwana; yango wana akangaki motema te; asɛkaki mpe alobaki boye: “Nakoyoka solo elɛngi, awa nanuni boye mpe awa nkolo na ngai akómi mobange boye?” Anzelu yango asembolaki Sara ntango atunaki ye boye: “Mpo na Yehova, ezali nde na likambo moko ya mpasi koleka?” Eyano ya Sara emonisaki ete azalaki kobanga mpe koluka komilongisa, kaka ndenge biso bato tosalaka. Awanganaki boye: “Nasɛki te!” Kasi anzelu azongisaki: “Te! osɛki.”​—Ebandeli 18:9-15.

Kosɛka oyo Sara asɛkaki emonisaki nde ete azangaki kondima? Te. Biblia elobi: “Na kondima mpe Sara azwaki nguya ya kokumba zemi ya momboto, atako alekaki mbula ya kobota, mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.” (Baebre 11:11) Sara ayebaki Yehova malamu; ayebaki ete akokokisa elaka nyonso oyo apesi. Biso nyonso tosengeli na kondima ya ndenge wana! Tosengeli koluka koyeba malamumalamu Nzambe oyo Biblia elobeli. Soki tosali bongo, tokomona ete ezalaki mpenza na ntina ete Sara azala na kondima ya ndenge wana. Yehova azali sembo mpe akokisaka bilaka na ye; ntango mosusu akoki kokokisa yango ata na ndenge oyo ekoki kokamwisa biso to kosɛkisa biso mpo tondimaki te ete ekoki kosalema!

“YOKÁ MONGONGO NA YE”

Yehova apesaki Sara mbano mpo na kondima makasi oyo azalaki na yango

Nsukansuka, ntango Sara akómaki na mbula 90, ayokaki esengo oyo azalaki koluka banda kala. Abotelaki Abrahama mwana mobali; na ntango yango Abrahama azalaki na mbula 100! Abrahama apesaki mwana yango nkombo Yisaka, to “Kosɛka,” kaka ndenge Nzambe alobaki yango. Meká komona na makanisi ndenge oyo Sara, atako alɛmbi, azali koloba na mwa kosɛka: “Nzambe abongiseli ngai likambo moko ya kosɛka: moto nyonso oyo akoyoka yango akosɛka ngai.” (Ebandeli 21:6) Kozanga ntembe, likabo wana ya kokamwa oyo Yehova apesaki Sara, epesaki Sara esengo makasi tii na nsuka ya bomoi na ye. Kasi, yango ememelaki mpe ye mikumba minene.

Ntango Yisaka akómaki na mbula 5, libota mobimba esalelaki ye fɛti na mokolo oyo asengelaki kotika komɛla mabɛlɛ. Kasi makambo nyonso te nde elekaki malamu. Lisolo elobi ete Sara “azalaki komona” ezaleli moko ya mabe. Mwana ya Agare, Yishimaele, oyo akómaki na mbula 19, azalaki kosɛka Yisaka. Yango ezalaki kaka masɛki mpamba te. Nsima ya bambula, elimo ya Nzambe etindaki ntoma Paulo akoma ete likambo oyo Yishimaele asalaki ezalaki monyoko. Sara amonaki ete matumoli wana ezalaki likama mpo na mwana na ye. Ayebaki malamu ete Yisaka azalaki mwana oyo Yehova akosalela mpo na kokokisa mokano na ye. Yango wana, na mpiko nyonso mpe kozanga kobanga asololaki na Abrahama. Asɛngaki ye abengana Agare ná Yishimaele.​—Ebandeli 21:8-10; Bagalatia 4:22, 23, 29.

Abrahama asalaki nini? Biblia elobi: “Likambo yango esepelisaki Abrahama ata moke te mpo na mwana na ye.” Lokola azalaki kolinga mwana na ye Yishimaele mingi, akokaki te kondima likambo oyo Sara asɛngaki ye. Kasi, Yehova amonaki likambo yango polele, yango wana akɔtelaki Sara. Biblia elobi: “Bongo Nzambe alobaki na Abrahama ete: ‘Likambo moko te na oyo Sara azali se kolobela yo mpo na mwana wana mpe mpo na moombo na yo ezanga kosepelisa yo. Yoká mongongo na ye, mpamba te oyo ekobengama momboto na yo ekoya na nzela ya Yisaka.’” Yehova akitisaki Abrahama motema ntango ayebisaki ye ete akobatela Agare ná mwana na ye, Yishimaele. Lokola Abrahama azalaki moto ya sembo, atosaki.​—Ebandeli 21:11-14.

Sara azalaki mpenza mwasi oyo abongaki na Abrahama, mosungi ya solosolo. Azalaki kaka te koyebisa mobali na ye makambo oyo ekosepelisa ye. Soki amoni likambo moko oyo ekoki kobebisa libota na bango to bomoi na bango ya mikolo ezali koya, azalaki koyebisa mobali na ye polele. Tokoki koloba te ete azangaki limemya. Kutu, nsima ya bambula, ntoma Petro, oyo azalaki mpe mobali oyo abalá, alobaki ete Sara azali ndakisa mpo na basi, mpo azalaki na limemya makasi epai ya mobali na ye. (1 Bakorinti 9:5; 1 Petro 3:5, 6) Mpo na koloba solo, soki Sara alobelaki likambo yango te, alingaki komonisa kozanga limemya epai ya Abrahama, mpo likambo yango elingaki kotya Abrahama mpe libota mobima na likama moko monene. Na boboto nyonso, Sara alobaki likambo oyo esengelaki kolobama.

Basi mingi balandaka ndakisa ya Sara. Na ndakisa na ye, basololaka na mibali na bango polele mpe na limenya. Na bantango mosusu, basi mosusu balingaka ete Yehova akɔtela bango ndenge asalaki yango mpo na Sara. Atako bongo, bamekolaka kondima, bolingo mpe motema molai ya Sara.

Atako Yehova abengaki Sara “Mama ya Bakonzi,” Sara azalaki koluka te ete básalela ye makambo lokola mokonzi

Atako Yehova ye moko abengaki mwasi yango “Mama ya Bakonzi,” Sara azalaki te koluka ete básalela ye makambo lokola mokonzi. Tokoki kokamwa te ete ntango Sara akufaki, wana azalaki na mbula 127, Abrahama “akɔtaki kolela Sara * makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.” (Ebandeli 23:1, 2) Azalaki na mpasi makasi ndenge abungisaki mwasi na ye Sara, “Mama ya Bakonzi.” Kozanga ntembe, Yehova mpe azali na mposa makasi ya kozongisa mwasi wana ya sembo na bomoi, ntango mabele ekokóma paradiso. Bomoi ya seko mpe oyo etondi na mapamboli ezali kozela Sara mpe baoyo nyonso bazali kolanda ndakisa ya kondima na ye.​—Yoane 5:28, 29.

^ par. 3 Liboso, bankombo na bango ezalaki Abrama mpe Sarai, na nsima Nzambe apesaki bango bankombo mosusu, mpo na kosalisa bato mingi, tokosalela bankombo na bango oyo eyebani mingi.

^ par. 10 Na ntango wana, Yehova azalaki kotika mibali bábala basi ebele mpe bázwa basi ya makango, kasi na nsima, atindaki Yesu amonisa ete mobali asengeli kozala na mwasi kaka moko, ndenge ezalaki na ebandeli, na elanga ya Edene.​—Ebandeli 2:24; Matai 19:3-9.

^ par. 25 Na Biblia mobimba, mwasi oyo balobeli bambula oyo azalaki na yango ntango akufaki ezali kaka Sara.