Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8

Nzambe ayokaka mabondeli na biso?

Nzambe ayokaka mabondeli na biso?

Osilá komituna soki Nzambe ayokaka yo ntango obondelaka? Soki bongo, ozali yo moko te. Bato mingi babondelá Nzambe alongola mikakatano moko boye, kasi mikakatano yango ezali kaka. Yango elingi koloba ete Nzambe ayokaka mabondeli na bango te? Ezali bongo te! Biblia elobi ete Nzambe ayokaka biso ntango tobondelaka ye na ndenge ya malamu. Tótala oyo Biblia elobi.

NZAMBE AYOKAKA.

“Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”​—Nzembo 65:2.

Bato mosusu babondelaka mpo balobaka ete esalaka bango malamu, atako bandimaka te ete moto moko azali mpenza koyoka bango. Kasi libondeli esalaka kaka te ete moto amiyoka malamu mpo alonga mikakatano. Biblia elobi ete “Yehova * azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo. . . . Akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”​—Nzembo 145:18, 19.

Yango wana, tosengeli kondima na motema moko ete Yehova Nzambe ayokaka mabondeli ya basaleli na ye. Alobi na bolingo nyonso ete: “Bokobenga ngai mpenza, bokoya, bokobondela ngai, mpe ngai nakoyokela bino.”​—Yirimia 29:12.

NZAMBE ALINGI OBONDELAKA YE.

“Bótingama na mabondeli.”​—Baroma 12:12.

Biblia ezali kolendisa biso ete ‘tóbondelaka ntango nyonso’ mpe ‘tókoba kobondela na libaku nyonso.’ Emonani mpenza polele ete, Yehova Nzambe alingi ete tóbondelaka ye.​—Matai 26:41; Baefese 6:18.

Mpo na nini Nzambe alingi ete tóbondelaka ye? Tózwa ndakisa: Tata nyonso azalaka na esengo ntango mwana na ye asɛngi ye asalisa ye. Na ntembe te, tata nyonso ayebaka liboso bamposa ya mwana na ye to ndenge oyo azali koyoka, kasi ntango ayoki mwana na ye asɛngi asalisa ye, tata akomona ete mwana yango atyelaka ye motema mpe alingaka ye mingi. Ndenge moko mpe, ntango tozali kobondela Yehova Nzambe, tozali komonisa ye ete totyelaka ye motema mpe tolingaka ye, elingi koloba kozala penepene na ye.​—Masese 15:8; Yakobo 4:8.

NZAMBE ATYELAKA YO MPENZA LIKEBI.

‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.

Nzambe alingi tóbondela ye mpo alingaka biso mpe atyelaka biso likebi. Ayebi mikakatano nyonso mpe mitungisi nyonso tozali na yango, mpe azali na mposa ya kosalisa biso.

Mokonzi Davidi, abondelaki Yehova Nzambe bomoi na ye mobimba. Asɛngaki Nzambe asalisa ye mpe ayebisaki ye makanisi na ye mpe ndenge azalaki komiyoka. (Nzembo 23:1-6) Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela Mokonzi Davidi? Nzambe azalaki kolinga Mokonzi Davidi mpe azalaki koyoka ebele ya mabondeli oyo azalaki kosala. (Misala 13:22) Ndenge moko mpe, Nzambe ayokaka mabondeli na biso mpo alingaka biso.

“NALINGAKA MPENZA YEHOVA [MPO] AYOKAKA MONGONGO NA NGAI”

Oyo ezali maloba ya moko ya bato oyo bakomaki mokanda ya nzembo oyo ezali na Biblia. Ayebaki ete Nzambe ayokaka mabondeli na ye mpe yango esalisaki ye mingi mpenza. Azalaki koyoka ete azali penepene na Nzambe mpe yango epesaki ye makasi ya kobunda na mitungisi mpe mikakatano ya bomoi.​—Nzembo 116:1-9.

Ntango tondimi na motema moko ete Nzambe azali koyoka mabondeli na biso, tokotingama na kobondela ye. Tólobela likambo oyo ekómelaki Pedro, oyo afandaka na nɔrdi ya Espagne. Mwana na ye ya mitano, ya mbula 19 akufaki na likama ya motuka. Lokola Pedro azalaki na mawa, asopelaki Nzambe motema na ye mpe abondelaki ye mbala na mbala mpo abɔndisa ye mpe asalisa ye. Nini esalemaki? Pedro alobi boye: “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai, asalelaki bandeko na biso bakristo mpo na kobɔndisa mpe kosalisa ngai ná mwasi na ngai.”

Mbala mingi, Nzambe ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge asalelaka baninga oyo balingaka biso mpo bábɔndisa mpe básalisa biso

Atako mabondeli ya Pedro ezongisaki mwana na ye na bomoi te, kasi yango esalisaki ye ná libota na ye mingi. Mwasi na ye, María Carmen, alobi boye: “Mabondeli esalisaki ngai nayikela mpasi na ngai mpiko. Nandimi ete Yehova azalaki koyoka mabondeli na ngai, mpo ntango nazalaki kobondela ye, nazalaki kozwa kimya mpe motema na ngai ezalaki kokita.”

Ezala Biblia to makambo oyo ekómelaki bandeko, emonisi ete Nzambe ayokaka mabondeli. Na yango, emonani polele ete Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te. Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli mosusu, kasi na mosusu te?

^ par. 5 Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.