Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe ná Yesu bazali moto moko?

Nzambe ná Yesu bazali moto moko?

Atako bato basambelaka banzambe ebele, Nzambe ya solo azali kaka moko. (Yoane 17:3) Azali “Oyo-Aleki-Nyonso,” Mozalisi ya biloko nyonso mpe Liziba ya bomoi. Kaka ye nde tosengeli kosambela.​—Danyele 7:18; Emoniseli 4:11.

Nzambe azali nani?

Nkombo ya Nzambe ezali na makomi ya ebandeli soki mbala 7 000

YEHOVA ezali nkombo ya Nzambe

NKOLO, NZAMBE, TATA​—Ezali batitre mosusu ya Yehova

Nkombo ya Nzambe nani? Nzambe ye moko alobi: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Na Biblia, nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 7 000. Kasi, na mabongoli mingi ya Biblia balongolá nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango batyá batitre, lokola “Nkolo.” Nzambe alingi ozala moninga na ye, asɛngi yo ‘obelela nkombo na ye.’​—Nzembo 105:1.

Batitre ya Nzambe. Biblia ebengi Yehova na batitre lokola “Nzambe,” “Mozwi-ya-Nguya-nyonso,” “Mozalisi,” “Tata,” “Nkolo” mpe “Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.” Biblia emonisi ete ntango bato bazalaki kobondela Nzambe bazalaki kosalela batitre na ye to nkombo na ye, Yehova.​—Danyele 9:4.

Ndenge oyo Nzambe azali. Nzambe azali Elimo, amonanaka te. (Yoane 4:24) Biblia emonisi ete “moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Biblia emonisi ndenge oyo Nzambe amiyokaka. Bato bakoki koyokisa Nzambe motema mpasi, to bakoki ‘kosepelisa ye.’​—Masese 11:20; Nzembo 78:40, 41.

Bizaleli ya Nzambe. Nzambe alingaka moto nyonso, akipaka te ekólo to momeseno na ye. (Misala 10:34, 35) Azali mpe “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.” (Kobima 34:6, 7) Kasi, Nzambe azali na bizaleli minei oyo eleki bizaleli na ye mosusu.

Nguya. Lokola azali “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” azali na nguya ya kokokisa nyonso oyo alaki.​—Ebandeli 17:1.

Bwanya. Bwanya ya Nzambe eleki ya moto nyonso. Yango wana, Biblia elobi ete Nzambe “ye moko nde azali moto ya bwanya.”​—Baroma 16:27.

Sembo. Nzambe asalaka kaka makambo oyo ezali sembo. Misala na ye ezali ya “kokoka,” mpe epai na ye “kozanga bosembo ezali te.”​—Kolimbola Mibeko 32:4.

Bolingo. Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Nzambe amonisaka kaka bolingo te; ye moko nde azali bolingo. Nzambe asalaka makambo nyonso na bolingo, mpe bolingo na ye ememelaka biso bolamu mingi.

Boyokani ya Nzambe na bato. Nzambe azali Tata na biso ya likoló, oyo alingaka biso. (Matai 6:9) Soki tomonisi kondima epai na ye, tokoki kokóma baninga na ye. (Nzembo 25:14) Kutu, Nzambe abengi yo opusana penepene na ye na nzela ya libondeli mpe ‘obwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’​—1 Petro 5:7; Yakobo 4:8.

Nzambe ná Yesu bakeseni na nini?

Yesu azali Nzambe te. Yesu akeseni na moto nyonso​—kaka ye nde akelamaki mbala moko na Nzambe. Yango wana Biblia ebengi ye Mwana ya Nzambe. (Yoane 1:14) Nsima ya kokela Yesu, Yehova asalelaki mwana na ye ya liboso lokola “mosali ya mayele” mpo na kokela biloko nyonso mpe moto nyonso.​—Masese 8:30, 31; Bakolose 1:15, 16.

Yesu aloba ata mokolo moko te ete azali Nzambe. Kutu alobaki: “Nazali momonisi oyo auti epai na [Nzambe], mpe Moto wana nde atindaki ngai.” (Yoane 7:29) Ntango azalaki koloba na bayekoli na ye, Yesu abengaki Yehova “Tata na ngai mpe Tata na bino” mpe “Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17) Ntango Yesu akufaki, Yehova asekwisaki ye mpo azala na bomoi na likoló, atombolaki ye na lobɔkɔ na Ye ya mobali mpe apesaki ye bokonzi.​—Matai 28:18; Misala 2:32, 33.

Yesu kristo akoki kosalisa yo okóma moninga ya Nzambe

Yesu ayaki na mabele mpo na koteya biso makambo etali Tata na ye. Yehova ye moko alobi boye mpo na Yesu: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; bóyoka ye.” (Marko 9:7) Yesu ayebi Nzambe malamu koleka moto mosusu nyonso. Alobaki: “Moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.”​—Luka 10:22.

Yesu amonisaki bizaleli ya Nzambe malamumalamu. Yesu amekolaki malamumalamu bizaleli ya Nzambe yango wana alobaki: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Yesu asalisaki bato bápusana penepene ya Nzambe na ndenge amekolaki bolingo ya Tata na ye na maloba mpe na misala. Alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Alobaki mpe: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Kanisá naino! Yehova azali koluka bato lokola yo oyo balingi koyeba ye malamu.