Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI

Mitungisi

Mitungisi

Mitungisi ezali na balolenge mibale. Mosusu ekoki kozala malamu, kasi mosusu ekoki kozala mabe. Biblia esalisaka biso tóyeba yango nyonso mibale.

Komitungisa ezali mabe?

MPO NA KOLOBA SOLO

Mitungisi esalaka ete moto azala na kimya te to abanga. Moto nyonso akoki kotungisama mpo tofandi na mokili oyo ebongi kotyela motema te.

OYO BIBLIA ELOBI

Mokonzi Davidi akomaki boye: “Kino ntango nini molimo na ngai ekobunda, motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba?” (Nzembo 13:2) Nini esalisaki Davidi alonga? Afungolelaki Nzambe motema na libondeli, atyaki mpenza elikya na motema boboto ya Nzambe. (Nzembo 13:5; 62:8) Kutu, Nzambe asɛngi tóbwakela ye mikumba na biso. 1 Petro 5:7 elobi boye: “Ntango bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”

Kosala likambo moko mpo na bato tolingaka ekoki kosala ete tómitungisa mingi te mpo na bango

Ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo tómitungisa koleka ndelo te. Na ndakisa, ntango Paulo, mokomi moko ya Biblia azalaki na “mitungisi mpo na masangá nyonso,” asalaki makasi abɔndisa mpe alendisa masangá yango. (2 Bakorinti 11:28) Awa, mitungisi ya ntoma Paulo ezalaki ya malamu mpo etindaki ye apesa lisalisi oyo esengeli. Biso mpe tokoki kosala bongo. Soki te, yango ekomonisa ete tozangi bolingo.Masese 17:17.

“Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”Bafilipi 2:4.

Okoki kosala nini soki ozali komitungisa koleka ndelo?

MPO NA KOLOBA SOLO

Bato bakoki komitungisa mpo na mabunga ya kala, avenire to mpo na mbongo. *

OYO BIBLIA ELOBI

Komitungisa mpo na mabunga ya kala: Liboso bákóma bakristo, bato mosusu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki balangwi-masanga, babɔtɔli, bato ya pite mpe miyibi. (1 Bakorinti 6:9-11) Na esika bákanisakanisa makambo wana ya kala, babongolaki bizaleli na bango mpe batyaki elikya na motema mawa monene oyo Nzambe amoniselaka moto nyonso. Nzembo 130:4 elobi boye: “Yo [Nzambe] olimbisaka mpenza, mpo bábanga yo.”

Komitungisa mpo na avenire: Yesu Kristo alobaki boye: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango.” (Matai 6:25, 34) Liteya ezali nini? Tókipaka kaka makambo ya mokolo na mokolo, noki te tokozwa bikateli mbangumbangu kozanga kokanisa. Kobosana te ete mitungisi mingi oyo ozali na yango lelo, nsima ya mikolo ekozala na ntina te.

Komitungisa mpo na mbongo: Moto moko ya bwanya abondelaki boye: “Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te.” (Masese 30:8) Kutu, alukaki kosepela na biloko oyo azalaki na yango, ezaleli oyo Nzambe andimaka. Baebre 13:5 elobi boye: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’” Na kokesana na mbongo, oyo ekoki kosila to esilaka, Nzambe asundolaka ata moke te baoyo batyelaka ye motema mpe bazalaka na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.

“Namoná naino te moyengebene asundolami mpenza. To bana na ye bazali koluka limpa.”Nzembo 37:25.

Mitungisi ekosila mokolo mosusu?

OYO BATO BALOBAKA

Mopanzi-nsango moko na nkombo Harriet Green alobaki boye na lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo The Guardian na 2008: “Tozali kokɔta na eleko ya sika ya mitungisi.” Na 2014, Patrick O’Connor akomaki na zulunalo The Wall Street boye: “Bato ya Amerika bakómi komitungisa mingi koleka ndenge ezalaki liboso.”

OYO BIBLIA ELOBI

“Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.” (Masese 12:25) “Liloba ya malamu” ekoki kouta na ‘nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.’ (Matai 24:14) Mosika te, Bokonzi yango, oyo ezali Guvɛrnema ya Nzambe, ekosala likambo oyo moko te akoki kosala—ekolongola makambo nyonso oyo ebimisaka mitungisi ata mpe maladi to liwa! “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”Emoniseli 21:4.

“Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na bino.”Baroma 15:13.

^ par. 10 Ekozala malamu baoyo bazali komitungisa makasi bákende epai ya monganga. Lamuká! etindi moto te asalela mayele boye to boye ya kosalisa nzoto.