Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka

Mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka

BANYAU mingi elalaka na butu te. Emonani ete mandɛfu na yango esalisaka yango eyeba biloko oyo ezali pembeni na yango mpe ekanga mwa nyama oyo yango elingi kolya, mingimingi ntango molili ebandi kokɔta.

Tókanisa naino: Mandɛfu ya nyau ekangamá likoló ya mposo oyo ezali na ebele ya misisa mikemike. Misisa yango esalisaka nyau eyoka makelele ata ya muvema moke mpenza ya mopɛpɛ. Yango esalaka ete eyeba eloko oyo ezali pembeni na yango kozanga ete emona yango​—emonani ete molili ezalaka mokakatano te mpo na nyau.

Lokola mandɛfu ya nyau ezalaka bongo, esalisaka yango eyeba muvema mpe esika eloko to mwa nyama oyo yango elingi kokanga ezali. Mandɛfu yango esalisaka nyau eyeba soki lidusu ezali monene ndenge nini liboso ekɔta. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete “mosala oyo mandɛfu yango esalaka eyebani malamumalamu te; kasi bayebi kaka ete soki bakati yango, nyau ekozala lisusu na likoki yango te mpo na mwa ntango.”

Bato ya siansi bazali kosala barobo oyo ezali na mwa aparɛyi oyo ekomekola mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka mpo esalisa yango ekima esika oyo likama ezali. Ali Javey, moto moko ya siansi na iniversite ya Californie (Berkeley), alobi ete mwa aparɛyi yango “esengeli kosalisa na misala ndenge na ndenge etali barobo, écran ya bamasini oyo bato basalelaka mpe na makambo etali bioloji.”

Okanisi nini? Mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?