Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele?

Osalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele?

Jenni oyo akómá moombo ya masano ya video, alobi boye: “Nakómá kobɛta yango na boumeli ya ngonga 8 na mokolo mpe ekómá mokakatano mpo na ngai.”

Dennis azwaki ekateli ya kolekisa mikolo 7 kozanga kosimba aparɛyi na ye mpo akɔta te na Internet. Kasi, ekateli yango ekokisaki ata mikolo mibale te.

Jenni ná Dennis bazali bilenge te. Jenni azali na mbula 40 mpe azali mama ya bana 4. Dennis azali na mbula 49.

OSALELAKA baaparɛyi ya mikolo oyo? * Mingi bakondima mpe basalelaka yango na ntina. Baaparɛyi ya mikolo oyo esalisaka mpenza mpo na mosala, kosolola na baninga mpe kolekisa mwa ntango.

Kasi, ndenge moko na Jenni mpe Dennis, bato mingi bakómi kolekisa ndelo na ndenge ya kosalela baaparɛyi yango. Na ndakisa, Nicole, oyo azali na mbula 20, alobi boye: “Nalingaka kolobela yango te, kasi ngai ná telefone na ngai tozali baninga malamu mpenza. Nasalaka nyonso nazala na yango ntango nyonso. Nayokaka nkanda soki nazali esika oyo rezo ezali te mpe nakokaka te kolekisa miniti 30 kozanga natánga lisusu bamesaje na ngai. Ezali mwa bozoba mpenza!”

Bato mosusu kutu batalaka bamesaje mpe makambo mosusu ya sika na baaparɛyi na bango butu mobimba. Bakoki komiyoka lokola bazangi eloko soki aparɛyi oyo ekómá moninga na bango ezali te. Bato mosusu ya mayele balobeli ezaleli yango lokola kokóma moombo ya baaparɛyi ya ndenge nyonso to mingimingi ya Internet to batelefone ya mikolo oyo. Bamosusu bazali kokakatana mpo na kosalela liloba “boombo” mpe bamoni malamu bálobela ezaleli yango lokola mokakatano, momeseno to motambo.

Ata soki babengi yango ndenge nini, kozanga kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele ekoki kokóma likama. Esali ete bato ya mabota mosusu básololaka malamu te. Na ndakisa, elenge mwasi moko ya mbula 20, amileli boye: “Tata na ngai ayebi ata likambo moko te oyo ezali kokómela ngai na bomoi. Afandaka na salɔ mpe akomaka bamesaje ntango azali kosolola na ngai. Akitisaka telefone na ye te. Mbala mosusu tata akipaka ngai, kasi na bantango mosusu emonanaka lokola asalaka bongo te.”

Mpo na kolongwa na boombo yango

Mpo na kosalisa bato na bango bátika kosalela baaparɛyi na ndenge ya mabe, Chine, Corée du Sud, États-Unis mpe Royaume-Uni efungoli bisika oyo moto azali na ndingisa te ya kokɔta na Internet to kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo na boumeli ya mikolo mingi. Tózwa ndakisa ya Brett, oyo azali na mbula 28, oyo alobi ete liboso azalaki kolekisa ngonga 16 na Internet mpo na kobɛta lisano. Alobi boye: “Ntango nyonso oyo nazalaki kokɔta na Internet, ezalaki lokola moto amɛli drɔgɛ.” Ntango Brett akendaki na bisika oyo esalisaka bato mpo na kolongwa na boombo yango, azalaki kosala lisusu te mpe akomaki salite mpe azalaki lisusu na baninga te. Okoki kosala nini mpo likambo ya ndenge wana ekómela yo te?

TALELÁ NDENGE NA YO YA KOSALELA BAAPARƐYI. Luká koyeba makambo oyo baaparɛyi ya mikolo oyo ezali kosala na bomoi na yo. Omituna mituna oyo elandi:

  • Nakómaka komitungisa, mbala mosusu mpe kosilika soki mwaye ya kokɔta na Internet to kosalela telefone na ngai ezali te?

  • Nakobaka kosalela Internet to telefone nsima ya ngonga oyo natyaki ete nakosukisa?

  • Nalalaka lisusu malamu te mpo mwaye natika kotánga bamesaje oyo bazali kotindela ngai ezali te?

  • Ndenge na ngai ya kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo esalaka ete natika kotyela libota na ngai likebi? Bato ya libota na ngai bakondima eyano na ngai na motuna oyo?

Soki ndenge na yo ya kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo ezali kosala ete osundola “makambo oyo eleki ntina;” lokola libota mpe mikumba mosusu, sikoyo nde ntango ya kobongisa makambo. (Bafilipi 1:10) Ndenge nini?

YEBÁ KOMITYELA BANDELO OYO EBONGI. Kolekisa ndelo na eloko ata ya malamu ekoki kozala likama. Na yango, ata soki ozali kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo mpo na mombongo to kolekisa mwa ntango, tyá ndelo na ntango oyo okosukisa mpe tosá yango.

Likanisi: Mpo na nini te koluka lisalisi ya moto moko ya libota to moninga? Biblia elobi boye: “Bato mibale baleki moto moko, . . . mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.”​—Mosakoli 4:9, 10.

Kotika te ete yango ekómisa yo “moombo”

Lokola baaparɛyi ya mikolo oyo ezali kosalisa bato bákɔta na Internet mpe bátinda bansango na pɛtɛɛ nyonso, na ntembe te bato mingi bakokóma kosalela yango na mayele te. Kasi kotika te ete yango ekómisa yo “moombo.” Soki ‘osaleli malamu ntango na yo,’ okosalela te baaparɛyi ya mikolo oyo na ndenge ya mabe.​—Baefese 5:16.

^ par. 5 Na lisolo oyo, baaparɛyi ya mikolo oyo ezali oyo esalisaka mpo na kotinda bamesaje, kobenga na telefone, kotala bavideo, koyoka miziki, kobɛta masano mpe kokanga bafɔtɔ.