Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 4

Ndenge ya kosalela mbongo malamu

Ndenge ya kosalela mbongo malamu

“Myango epikamaka makasi na toli.”Masese 20:18

Biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo mpo na kosombela bato ya libota na biso biloko oyo basengeli na yango. (Masese 30:8) Kutu, “mbongo ebatelaka.” (Mosakoli 7:12) Na libala, ekoki kozala mpasi kolobela makambo ya mbongo, kasi kotika te ete mbongo ebimisa mikakatano na libala na bino. (Baefese 4:32) Mwasi ná mobali basengeli kotyelana motema mpe kozala na bomoko ntango bazali kolobela ndenge ya kosalela mbongo.

1 BÓYOKANA MALAMU LIBOSO

OYO BIBLIA ELOBI: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:28) Ezali na ntina mingi bóyokana malamu ndenge oyo bokosalela mbongo na bino. (Amose 3:3) Bótala biloko oyo bozali na mposa ya kosomba mpe mbongo oyo bokoki kobimisa mpo na yango. (Masese 31:16) Kosomba eloko te kaka mpo ozali na mbongo ya kosomba yango. Salá makasi bókɔta banyongo te. Salelá kaka mbongo oyo ozali na yango.Masese 21:5; 22:7.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Soki botikali na mwa mbongo na nsuka ya sanza, bóyokana ndenge bokosalela yango

  • Soki bobimisi mbongo ebele koleka oyo bokanaki, bótala oyo bokoki kosala mpo bótika kobimisa mbongo mingi. Na ndakisa, bokoki kolambaka na ndako na esika ya kokende kolya na restora

2 ZALÁ NA MAYELE YA BOMOTO

OYO BIBLIA ELOBI: “Tozali kobongisa makambo na bosembo, kaka na miso ya Yehova te, kasi mpe na miso ya bato.” (2 Bakorinti 8:21) Yebisá molongani na yo na bosembo nyonso mbongo boni ozwaka mpe mbongo boni osalelaka.

Sololáká na molongani na yo liboso obimisa mbongo ebele mpo na kosala likambo moko boye. (Masese 13:10) Kosolola makambo ya mbongo ekosalisa bino bófanda ntango nyonso na kimya na libala. Talelá mbongo oyo ozwaka ete ezali mbongo ya libota, kasi ya yo moko te.1 Timote 5:8.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Bóyokana mbongo boni mokomoko na bino akoki kobimisa kozanga atuna moninga

  • Kozela te ete likambo ebima liboso bólobela makambo ya mbongo