Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 5

Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota

Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota

“Bólata . . . boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.”Bakolose 3:12

Ntango mwasi ná mobali babalani, basali libota ya sika. Ata soki okotika te kolinga mpe komemya baboti na yo, molongani na yo akómi moto oyo aleki ntina mpo na yo na mokili mobimba. Ekoki kozala mpasi mpo bandeko mosusu ya libota bándima likambo yango. Kasi, batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala mpo ofanda na kimya na bandeko ya libota, kasi ofandisa mpe makambo na libota na yo ya sika.

1 TYÁ BANDEKO YA LIBOTA NA ESIKA NA BANGO

OYO BIBLIA ELOBI: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Baefese 6:2) Ata soki okómi mokóló, osengeli kokumisa mpe komemya baboti na yo. Yebá ete molongani na yo mpe azali na baboti, mpe asengeli kokipe bango. “Bolingo ezali na zuwa te,” yango wana boyokani ya molongani na yo na baboti na ye ebangisa yo ata moke te.1 Bakorinti 13:4; Bagalatia 5:26.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Kobimisaka te maloba lokola, “Bandeko na yo bayokisaka ngai kaka nsɔni” to “Mama na bino alingaka ata moke te makambo oyo nasalaka”

  • Meká kotalela makambo ndenge molongani na yo azali kotalela yango

2 BOYÁ MAKAMBO MOSUSU SOKI ESENGELI

OYO BIBLIA ELOBI: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Ntango obali, baboti na yo bakoki komona ete ozali kaka mwana, mpe bakoki kolinga komikɔtisa mingi koleka na makambo ya libala na bino.

Yo ná molongani na yo bosengeli koyokana makambo nini bokotika baboti na bino bákɔtaka te mpe bosengeli koyebisa bango yango na boboto nyonso. Bóyebisa bango polele kasi na limemya. (Masese 15:1) Komikitisa, boboto, mpe motema molai ekosalisa bino bókóma na boyokani malamu na bandeko ya libota mpe bókoba ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo.’Baefese 4:2.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Soki omoni ete bandeko ya libota bazali kokɔta mingi na makambo na bino, sololá yango na molongani na yo ntango makambo ezali kimya

  • Bóyokana ndenge oyo bokoki kosala