Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI

Alongisaki losambo ya solo

Alongisaki losambo ya solo

1, 2. (a) Mpasi nini bato ya eleko ya Eliya bazalaki na yango? (b) Botɛmɛli nini Eliya akutanaki na yango na Ngomba Karamele?

ELIYA azalaki kotala ndenge ebele ya bato bazalaki komata na Ngomba Karamele. Atako molili ezalaki naino mpo ntɔngɔ ebandaki kotana, ezalaki komonana polele ete bato yango bazali babola mpe bato ya mpasi mpenza. Eleko ya kozanga mbula oyo esilaki kosala mbula misato na ndambo enyokolaki bango mpenza.

2 Na kati ya ebele ya bato yango, ezalaki mpe na basakoli 450 ya Baala, oyo batondaki na lolendo mpe bazalaki koyina Eliya, mosakoli ya Yehova. Yezabele, mwasi ya mokonzi, abomisaki basaleli mingi ya Yehova, kasi Eliya azalaki kaka kotɛmɛla losambo ya Baala. Kasi akosala yango lisusu mpo na ntango boni? Mbala mosusu banganga-nzambe ya Baala bakanisaki ete lokola Eliya azali kaka ye moko, akokoka te kolonga bango nyonso. (1 Bak. 18:4, 19, 20) Mokonzi Ahaba mpe azalaki wana, likoló ya likalo na ye. Ye mpe azalaki kolinga Eliya te.

3, 4. (a) Ekoki kozala ete Eliya abangaki mpo na nini ntango ntɔngɔ ya mokolo wana ebandaki kotana? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Mokolo yango ekozala mokolo ya mpasi mingi mpo na mosakoli wana mpe ekotika nsango koleka mikolo mosusu nyonso ya bomoi na ye. Wana Eliya azalaki kotala ndenge bato bazali komata na Ngomba Karamele, ayebaki ete mosika te ekoyebana polele soki nani aleki na nguya, Nzambe to bato wana mabe. Azalaki koyoka ndenge nini ntango ntɔngɔ ebandaki kotana? Lokola azali “moto lokola biso,” na ntembe te azalaki kobanga. (Tángá Yakobo 5:17.) Kasi tokoki kosimba likambo oyo ya ntina: Lokola Eliya amonaki ete Bayisraele oyo batikalaki sembo te, mokonzi na bango oyo akómaki mopɛngwi, mpe banganga-nzambe oyo bazalaki koboma bato, bazalaki zingazinga na ye, akanisaki mpenza ete azali kaka ye moko.​—1 Bak. 18:22.

4 Kasi, nini ememaki Yisraele na mpasi ya ndenge wana? Mpe lisolo oyo etali yo na nini? Tólobela ndakisa ya kondima ya Eliya mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso lelo oyo.

Nsuka ya etumba moko molai

5, 6. (a) Etumba nini ezalaki na Yisraele banda bambula mingi? (b) Ndenge nini Mokonzi Ahaba asilikisaki mpenza Yehova?

5 Banda bambula mingi, Eliya azalaki komona ndenge bato ya ekólo na ye bazalaki kobebisa mpe kosundola losambo ya solo, mpe akokaki kosala eloko te mpo na kosembola makambo. Etumba moko monene ezalaki na Yisraele: esengelaki kopona lingomba ya solo to ya lokuta, elingi koloba kopona kosambela Yehova Nzambe to losambo ya bikeko oyo ezalaki na bikólo ya zingazinga. Na mikolo ya Eliya, losambo ya bikeko ekómaki mabe mingi.

6 Mokonzi Ahaba asilikisaki mpenza Yehova. Abalaki Yezabele, mwana ya mokonzi ya Sidone. Yezabele azalaki na mokano ya kokɔtisa losambo ya Baala na Yisraele mobimba mpe kolimwisa losambo ya Yehova. Eumelaki te, Ahaba alandaki makanisi na ye. Mokonzi yango atongaki tempelo mpe etumbelo mpo na Baala mpe ye moko azalaki moto ya liboso ya kofukamela nzambe wana ya lokuta.​—1 Bak. 16:30-33.

7. (a) Nini ekómisaki losambo ya Baala mabe mingi? (b) Na kotalela eleko oyo elanga eumelaki na mikolo ya Eliya, mpo na nini tokoki mpenza koloba ete Biblia ezali bongolabongola te? (Talá mpe  etanda.)

7 Likambo nini ekómisaki losambo ya Baala mabe mingi? Ebendaki Bayisraele mpe mingi kati na bango batikaki Nzambe ya solo. Losambo yango ezalaki mpe na makambo ya mbindo mpe na bato ya nkanza. Kindumba ezalaki makasi, bato bazalaki kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, ata mpe kotumba bana mbeka. Na yango, Yehova atindaki Eliya epai ya Ahaba mpo na kosakola ete mbula ekobɛta lisusu te na ekólo tii ntango mosakoli yango akoloba ete mbula ebɛta lisusu. (1 Bak. 17:1) Bambula mingi elekaki liboso Eliya akutana lisusu na Ahaba mpe ayebisa ye ayanganisa bato mpe basakoli ya Baala na Ngomba Karamele. *

Tokoki koloba ete makambo minene oyo ezalaki kosalema na losambo ya Baala ezali mpe lelo oyo

8. Lisolo oyo elobeli losambo ya Baala etali biso na nini lelo oyo?

8 Kasi, likambo oyo ezalaki na Yisraele etali biso na nini lelo oyo? Bato mosusu bakoki kokanisa ete lisolo oyo elobeli losambo ya Baala ezali na ntina te lelo oyo, mpo tomonaka te batempelo mpe bitumbelo ya Baala epai tozali. Kasi, lisolo yango ezali kaka te makambo oyo eleká. (Rom. 15:4) Liloba “Baala” elimboli “nkolo.” Yehova ayebisaki bato na ye ete basengeli kopona ye azala “baala” na bango, to nkolo, mobali na bango. (Yis. 54:5) Omonaka te ete lelo mpe bato basalelaka bankolo ndenge na ndenge na esika ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Ezala soki moto amipesi mobimba na koluka mbongo, na mosala na ye, na masano, na kokokisa bamposa ya nzoto, to na ebele ya banzambe mosusu oyo bazali lelo, na esika ya kosambela Yehova, moto yango aponi nkolo na ye. (Mat. 6:24; tángá Baroma 6:16.) Tokoki koloba ete makambo minene oyo ezalaki kosalema na losambo ya Baala ezali mpe lelo oyo. Kokanisa etumba wana oyo esalemaki kati na Yehova mpe Baala ekoki kosalisa biso tópona malamu nani oyo tokosalela.

Bazalaki kokakatana na likambo nini?

9. (a) Mpo na nini Ngomba Karamele ezalaki esika oyo ebongi mpenza mpo na kosukisa bato oyo bazalaki kosambela Baala? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Eliya alobaki na Bayisraele nini?

9 Ntango moto atɛlɛmi na Ngomba Karamele, akoki komona bisika ya kitoko, longwa na lobwaku ya mokɛli ya Kishone, oyo ezali na nse, tii na Mbu Monene (Mbu ya Mediterane) oyo ezali mosika mingi te, mpe bangomba ya Libá, oyo ezali mosika na nɔrdi. * Kasi, ntango moi ebandaki kobima na mokolo yango monene, ezalaki komonana lokola likambo moko ekosalema na mboka. Mokili oyo ezalaki kobota mbuma mingi, oyo Yehova apesaki bankɔkɔ ya Abrahama, ekaukaki mpenza. Mokili yango ekaukaki na moi makasi, mabele ebebaki mpo na bozoba ya bato ya Nzambe! Wana bato yango bayanganaki, Eliya apusanaki mpe atunaki bango boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi? Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye; kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.”​—1 Bak. 18:21.

10. Na ndenge nini Bayisraele bazalaki ‘kokakatana na makanisi,’ mpe likambo nini ya ntina mingi babosanaki?

10 Eliya alingaki koloba nini ntango asalelaki maloba ‘kokakatana na makanisi’? Bato yango bazalaki koyeba te ete basengeli kopona soki bakosambela Yehova to Baala. Bazalaki kokanisa ete bakoki kosambela bango mibale, ete bakokaki komipesa na milulu ya nsɔni ya losambo ya Baala mpo na kokitisa ye motema mpe na nsima kosɛnga Yehova apambola bango. Mbala mosusu bazalaki kokanisa ete Baala akopambola milona mpe bibwɛlɛ na bango, mpe ete “Yehova ya mampinga” akobatela bango na bitumba. (1 Sa. 17:45) Babosanaki likambo moko ya ntina mingi, oyo bato mingi mpe bazali kobosana lelo oyo, ete Yehova akabolaka losambo na ye na nzambe mosusu te. Asɛngaka moto akangama kaka na ye mpe abongi na yango. Andimaka te moto asambela ye mpe nzambe mosusu. Kutu, amonaka ete kosala bongo ezali kotyola ye!​—Tángá Kobima 20:5.

11. Mpo na yo, ndenge nini maloba ya Eliya na Ngomba Karamele ekoki kosalisa biso tótalela lisusu makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe lolenge oyo tosambelaka Nzambe?

11 Na yango, Bayisraele bazalaki ‘kokakatana’ lokola moto oyo alingi kotambola na banzela mibale na mbala moko. Lelo oyo, bato mingi bazali kosala libunga ya ndenge wana, bazali kotika ete “babaala” mosusu bákɔta na bomoi na bango mpe bazali kotya losambo ya Nzambe pembeni. Kotosa maloba oyo Eliya ayebisaki Bayisraele ete bátika kokakatana, ekoki kosalisa biso tótalela lisusu makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe tótalela lolenge tozali kosambela Nzambe.

Ná Yehova ná Baala: Nani Nzambe ya solo?

12, 13. (a) Likambo nini Eliya asɛngaki básala? (b) Na ndakisa ya Eliya, ndenge nini biso mpe tokoki komonisa ete totyelaka Nzambe motema?

12 Na nsima, Eliya asɛngaki básala likambo moko mpo na koyeba soki nani kati na Yehova mpe Baala azali Nzambe ya solo. Ezalaki likambo ya mpasi te. Asɛngaki banganga-nzambe ya Baala bátonga etumbelo mpe bátya mbeka likoló na yango; na nsima, bábondela nzambe na bango apelisa mɔtɔ. Eliya mpe asengelaki kosala kaka bongo. Alobaki ete “Nzambe oyo akoyanola na mɔtɔ, ye nde Nzambe ya solo.” Eliya ayebaki malamu nani azali Nzambe ya solo. Lokola azalaki na kondima makasi, atikaki basakoli ya Baala básala nyonso oyo balingi. Atikaki bango bábanda. Baponaki ngɔmbɛ oyo bakopesa mbeka mpe babandaki kobondela Baala. *​—1 Bak. 18:24, 25.

13 Lelo oyo, makamwisi ezalaka lisusu te. Atako bongo, Yehova abongwani te. Tokoki kotyela ye motema ndenge Eliya asalaki. Na ndakisa, ntango moto moko aboyi kondima mateya ya Biblia, tóbanga te kotika ye aloba liboso. Ndenge moko na Eliya, tokotika Nzambe ya solo asukisa ntembe yango. Tokomityela motema te, kasi nde na Liloba na ye Biblia, oyo ekomamaki mpo na “kosembola makambo.”​—2 Tim. 3:16.

Eliya amonaki ete losambo ya Baala ezalaki mpenza mpamba, mpe alingaki ete Bayisraele bámona mpe likambo yango

14. Ndenge nini Eliya asɛkaki basakoli ya Baala, mpe mpo na nini?

14 Basakoli ya Baala babandaki kobongisa mbeka na bango mpe kobelela nzambe na bango. Bagangaki mbala ebele ete, “Ee Baala, yanolá biso!” Bakobaki kobelela, mpe bangonga ezalaki koleka. Biblia elobi boye: ‘Mongongo moko eyokanaki te, mpe moto moko te ayanolaki.’ Na midi, Eliya abandaki kosɛka bango mpe koloba ete mbala mosusu Baala azali koyanola te mpo azali na mosala mingi, to mpe azali na kabinɛ, to azali kolala mpɔngi mpe esengeli moto alamusa ye. Eliya alobaki na basakoli yango ya lokuta ete: “Bóbenga na mongongo makasi mpenza.” Eliya ayebaki ete basambeli ya Baala bazalaki kosambela te nzambe ya solo mpe ya bomoi mpe alingaki ete Bayisraele bámona yango.​—1 Bak. 18:26, 27.

15. Ndenge nini likambo oyo ekómelaki basakoli ya Baala emonisi ete kopona nkolo mosusu na esika ya Yehova ezali bozoba?

15 Na yango, basakoli ya Baala babulunganaki, “babandaki kobelela na mongongo makasi mpenza mpe komikatakata na bambeli mpe na makɔnga, na ndenge bamesaná, tii makila etangaki bango.” Kasi, ezalaki kaka mpamba! “Mongongo moko ezalaki te, mpe moto moko ayanolaki te, mpe moto moko te atyaki likebi.” (1 Bak. 18:28, 29) Ya solo, Baala azalaki te. Satana nde atyaki ye na mitó ya bato mpo na komema bango mosika na Yehova. Ya solo, moto oyo aponi nkolo mosusu na esika ya Yehova, asukaka mabe, ata mpe na nsɔni.​—Tángá Nzembo 25:3; 115:4-8.

Nzambe ya solo ayanolaki

16. (a) Ndenge Eliya abongisaki etumbelo ya Yehova na Ngomba Karamele ekokaki kokundwela Bayisraele likambo nini? (b) Ndenge nini Eliya amonisaki lisusu ete atyelaka Nzambe motema?

16 Pene na mpokwa, ekómaki ngala ya Eliya mpo na kopesa mbeka. Abongisaki etumbelo moko ya Yehova oyo banguna ya losambo ya solo babebisaki. Atyaki mabanga 12, mbala mosusu mpo na kokundwela bato mingi oyo bazalaki na Yisraele ekólo ya mabota 10 ete bazalaki kaka na nse ya Mibeko oyo Nzambe apesaki na mabota 12. Na nsima, atyaki mbeka likoló ya etumbelo mpe asɛngaki básopela yango mai, oyo mbala mosusu bazwaki na Mbu ya Mediterane oyo ezalaki mosika te. Kutu, asalaki talase zingazinga ya etumbelo mpe batondisaki yango na mai. Ndenge kaka apesaki basakoli ya Baala libaku ya kosala nyonso oyo balingi, atyelaki Yehova mikakatano nyonso oyo akokaki kotya; yango emonisi ete atyelaki Yehova motema mobimba.​—1 Bak. 18:30-35.

Libondeli ya Eliya emonisaki ete Yehova atikaki te komibanzabanza mpo na bato ya ekólo na ye, mpe ete azalaki na mposa Yehova azongisa “mitema na bango nsima”

17. Ndenge nini libondeli ya Eliya emonisaki makambo oyo atyaki na esika ya liboso, mpe ndenge nini tokoki komekola ye na mabondeli na biso?

17 Nsima ya kobongisa makambo nyonso, Eliya asalaki libondeli. Libondeli yango oyo ezalaki ya mindɔndɔ te emonisaki polele makambo oyo Eliya atyaki na esika ya liboso. Ya liboso, alingaki bato nyonso báyeba ete Yehova nde azali “Nzambe na Yisraele,” kasi Baala te. Ya mibale, alingaki moto nyonso ayeba ete ye azali mosaleli mpamba ya Yehova; lokumu mpe nkembo nyonso esengeli kokende epai ya Nzambe. Ya misato, amonisaki ete Yehova atikaki te komibanzabanza mpo na bato ya ekólo na ye, mpe ete azalaki na mposa Yehova azongisa “mitema na bango nsima.” (1 Bak. 18:36, 37) Atako mpasi ekɔtaki na mboka mpo na kozanga bosembo na bango moko, Eliya azalaki kaka kolinga bango. Ndenge moko, ntango tozali kobondela Nzambe, tosengeli komonisa komikitisa ya ndenge wana, ete tomibanzabanzaka mpo na nkombo ya Nzambe, mpe ete toyokelaka bato oyo bazali na mposa ya lisalisi mawa.

18, 19. (a) Ndenge nini Yehova ayanolaki libondeli ya Eliya? (b) Eliya atindaki bato básala nini, mpe mpo na nini ebongaki te koyokela banganga-nzambe mawa?

18 Liboso Eliya asala libondeli, mbala mosusu ebele wana ya bato bamitunaki soki Yehova akomonana te mpamba lokola Baala. Kasi, nsima ya libondeli na ye, ntango ya komituna mituna ezalaki lisusu te. Biblia elobi boye: “Bongo mɔtɔ ya Yehova ekitaki mpe elyaki likabo ya kotumba mpe nkoni mpe mabanga mpe putulu, mpe emɛlaki mai oyo ezalaki na kati ya talase.” (1 Bak. 18:38) Yehova ayanolaki na ndenge ya kokamwa! Bongo bato basalaki nini?

“Bongo mɔtɔ ya Yehova ekitaki”

19 Bagangaki ete: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!” (1 Bak. 18:39) Bamonaki mpenza ete Yehova nde Nzambe ya solo. Kasi, bamonisaki naino kondima te. Ya solo, koloba ete Yehova azali Nzambe ya solo nsima ya komona mɔtɔ euti na likoló mpo na libondeli oyo esalemaki, ezali komonisa kondima ya solo te. Na yango, Eliya asɛngaki bango likambo mosusu. Asɛngaki bango básala likambo oyo basengelaki kosala bambula mingi liboso: kotosa Mibeko ya Yehova. Mibeko ya Nzambe elobaki ete basakoli ya lokuta mpe basambeli ya bikeko basengeli kobomama. (Mib. 13:5-9) Basakoli wana ya Baala bazalaki banguna minene ya Yehova Nzambe mpe bazalaki kotɛmɛla mokano na ye na nko. Ebongaki koyokela bango mawa? Lokola banganga-nzambe ya Baala bayokaki mawa te mpo na bana nyonso oyo batumbamaki kaka mpamba lokola mbeka mpo na Baala, esengelaki te koyokela bango mawa. (Tángá Masese 21:13; Yir. 19:5) Ebongaki koyokela bato wana mawa ata moke te! Na yango, Eliya atindaki báboma bango nyonso, mpe esalemaki bongo.​—1 Bak. 18:40.

20. Mpo na nini bato oyo balobaka ete Eliya asalaki mabe ndenge abomisaki banganga-nzambe ya Baala bazali na elonga te?

20 Lelo oyo, bato bakoki koloba mabe mpo na likambo oyo esalemaki na nsima na Ngomba Karamele. Bamosusu balobaka ete bandimi oyo bazalaka na molende ya mabe (zélote) bakoki kosalela lisolo yango mpo na komonisa ete koboma bato ya mangomba mosusu ezali mabe te. Likambo ya mawa, bato ya ndenge wana bazali kosala mobulu mingi lelo na kati ya mangomba. Nzokande, Eliya azalaki ndenge wana te. Alingaki kaka kokokisa mokano ya Yehova mpe abomisaki bato oyo babongaki kobomama. Lisusu, bakristo ya solo bayebi ete bakoki te kosala lokola Eliya, kozwa mopanga mpo na koboma bato mabe. Balandaka nde etinda oyo Yesu Kristo apesaki bayekoli na ye nyonso ntango alobaki na Petro ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Mat. 26:52) Na mikolo ezali koya, Yehova akosalela Mwana na ye mpo akokisa mokano na Ye ya koboma bato mabe.

21. Mpo na nini ebongi bakristo lelo oyo bámekola ndakisa ya Eliya?

21 Mokristo nyonso ya solo asengeli komonisa kondima na bomoi na ye. (Yoa. 3:16) Lolenge moko oyo akoki kosala yango ezali ya komekola ndakisa ya bato ya kondima lokola Eliya. Asambelaki kaka Yehova mpe alendisaki bato mosusu básala bongo. Na mpiko nyonso, amonisaki lokuta ya lingomba oyo Satana azalaki kosalela mpo na komema bato mosika na Yehova. Atyaki motema ete Yehova akosembola makambo na esika ya kotya motema na mayele na ye moko to kosala ndenge alingi. Eliya alongisaki losambo ya solo. Tiká ete biso nyonso tómekola kondima na ye!

^ par. 9 Ngomba Karamele ezalaka na matiti ebele ya mobesu, mpo mipɛpɛ ya mpiɔ oyo eutaka na ebale ebɛtisaka mbula mpe mamwɛ ebele na ngomba yango. Lokola bato bazalaki kokanisa ete Baala abɛtisaka mbula, na ntembe te ngomba yango ezalaki esika malamu mpo na kosambela Baala. Ngomba yango oyo ezalaki lisusu na matiti te mpe ekaukaki, ezalaki esika ebongi mpenza mpo na kosukisa losambo ya Baala.

^ par. 12 Tóbosana te, Eliya alobaki na bango ete: “Bosengeli te kotya [mbeka] yango mɔtɔ.” Bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete na ntango mosusu, basambeli wana ya lokuta bazalaki kosalela bitumbelo oyo ezalaki na lidusu moko ya kobombama, epai mɔtɔ ezalaki kouta mpo emonana lokola nde epeli na ndenge ya likamwisi.