Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA NSAMBO

“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”

“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”

1, 2. (a) Mbote ya ndenge nini mopaya ya Maria apesaki ye? (b) Ekateli nini Maria asengelaki kozwa mpe ndenge nini ebongolaki bomoi na ye?

MARIA akamwaki makasi ntango amonaki mopaya oyo akɔti na ndako na bango. Mopaya yango ayaki koluka tata to mama ya Maria te. Ayaki nde epai na ye! Maria ayebaki ete mopaya yango azalaki moto ya Nazarete te. Lokola Nazarete ezalaki mboka monene te, ezalaki mpasi te koyeba bapaya. Mopaya ya Maria azalaki ndenge mosusu. Alobaki na Maria makambo oyo ayoká naino te; alobaki na ye boye: “Mbote, moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi, Yehova azali na yo.”​—Tángá Luka 1:26-28.

2 Yango ezali mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Maria, mwana ya Heli, moto ya Nazarete, na etúká ya Galile. Biblia elobeli ye na eleko moko oyo asengelaki kozwa ekateli moko monene na bomoi na ye. Azalaki fianse ya Yozefe, mosali-mabaya oyo azalaki mozwi te, kasi azalaki na kondima epai ya Nzambe. Na yango, Maria azalaki komona ndenge bomoi na ye ekozala: ye ná Yozefe bakozala na bomoi ya mindɔndɔ te, akobanda kosunga mobali na ye, bakosala libota mpe bakobɔkɔla bana. Sikoyo, na mbalakaka, azalaki liboso ya mopaya oyo amemelaki ye nsango oyo eutaki epai ya Nzambe; Nzambe apesaki ye mokumba moko oyo ekobongola bomoi na ye.

3, 4. Mpo tóyeba Maria malamu, makambo nini tosengeli kokipe te, mpe tosengeli kotya likebi na nini?

3 Bato mingi bakamwaka ndenge Biblia elobi makambo mingi te mpo na Maria. Elobeli mpenza te bomwana na ye, bomoto na ye, mpe elobi eloko te mpo na kitoko na ye. Atako bongo, makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na ye, ekoki kosalisa biso mingi.

4 Mpo tóyeba Maria malamu, tosengeli kotika pembeni makambo ndenge na ndenge oyo mangomba eteyaka na ntina na ye. Na yango, tóbosana mayemi mpe bililingi ndenge na ndenge oyo bato basalá mpo na ye. Tóbosana mpe mateya ya mangomba mpe makanisi oyo epesaka mwasi yango ya komikitisa batitre ya lokumu lokola “Mama ya Nzambe” mpe “Mokonzi-mwasi ya likoló.” Kasi, tótalela nde na likebi makambo oyo Biblia elobi mpenza mpo na ye. Ekosalisa biso tóyeba malamu kondima oyo azalaki na yango mpe ndenge oyo tokoki komekola yango.

Anzelu moko ayei epai na ye

5. (a) Ndenge oyo Maria atalelaki mbote oyo anzelu Gabriele apesaki ye ekoki koteya biso nini? (b) Liteya nini ya ntina mpenza tokoki kozwa epai ya Maria?

5 Mopaya oyo ayaki kotala Maria ezalaki moto te. Ezalaki anzelu Gabriele. Ntango abengaki Maria “moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi,” maloba yango “ebulunganisaki ye mingi” mpe amitunaki soki mbote yango elimboli nini. (Luka 1:29) Maloba “moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi” elingaki koloba nini? Maria azalaki kozela te ete bato bápambola ye; anzelu alobelaki nde lipamboli ya Yehova Nzambe. Maria asepelaki ndenge Nzambe amoniselaki ye boboto. Atako bongo, azalaki kotutela yango ntolo te. Ndakisa ya Maria eteyi biso ete tosengeli kosala makasi mpo Nzambe amonisela biso boboto, mpe tosengeli kotutaka ntolo te ete tosí tozwá yango. Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi alingaka mpe asungaka bato ya komikitisa.​—Yak. 4:6.

Maria azalaki kotuta ntolo te ete Nzambe así amoniselá ye boboto

6. Mokumba monene nini anzelu Gabriele apesaki Maria?

6 Ekosɛnga Maria azala na komikitisa mpamba te anzelu apesaki ye mokumba moko monene mpenza. Ayebisaki ye ete akobota mwana oyo akokóma moto oyo aleki bato nyonso. Gabriele alobaki boye: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Na ntembe te, Maria ayebaki elaka oyo Nzambe apesaki Davidi mbula koleka nkóto liboso, ete moko kati na bakitani na ye akoyangela libela na libela. (2 Sa. 7:12, 13) Na yango, mwana oyo Maria akobota akozala Masiya oyo ekólo ya Nzambe ezalaki kozela banda bankama ya bambula!

Anzelu Gabriele apesaki Maria mokumba moko ya monene mpenza

7. (a) Motuna oyo Maria atunaki emonisaki nini mpo na ye? (b) Liteya nini bilenge bakoki kozwa lelo epai ya Maria?

7 Longola yango, anzelu ayebisaki Maria ete mwana yango “akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló.” Ndenge nini moto akokaki kobota Mwana ya Nzambe? Kutu, ndenge nini Maria akokaki kobota? Azalaki fianse ya Yozefe kasi babalanaki naino te. Maria abimisaki likambo yango polele ntango atunaki ete: “Ndenge nini yango ekosalema, mpo nasangisá naino nzoto na mobali te?” (Luka 1:34) Tomoni ete Maria ayokaki nsɔni te koloba ete ayebi mibali te, ete azalaki naino mobimba. Kutu, azalaki kosepela ndenge ayebaki naino mibali te liboso abala. Lelo oyo, bilenge mingi bawelaka kobebisa nzoto na bango liboso bábala mpe batyolaka baoyo basalaka bongo te. Ya solo mokili ebongwani mingi. Kasi, Yehova abongwani te. (Mal. 3:6) Ndenge moko na mikolo ya Maria, Yehova asepelaka mingi na baoyo batosaka batoli na ye oyo etali etamboli ya pɛto.​—Tángá Baebre 13:4.

8. Ndenge nini Maria, moto ya kozanga kokoka akokaki kobota mwana ya kokoka?

8 Atako Maria azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, azalaki moto ya kozanga kokoka. Na yango, ndenge nini akokaki kobota mwana ya kokoka, Mwana ya Nzambe? Gabriele alobaki boye: “Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Liloba mosantu elimboli “pɛto,” “oyo ezangi mbindo,” “bulɛɛ.” Bana babotamaka na ezaleli ya kozanga kokoka ya baboti na bango. Kasi epai ya Maria, Yehova akosala likamwisi. Akozwa bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe akotya yango na libumu ya Maria, na nsima, akosalela elimo santu mpo na ‘kozipa’ Maria, mpe na ndenge yango, mwana akobatelama mpo azwa lisumu ata moke te. Maria andimaki elaka oyo anzelu apesaki ye? Alobaki nini?

Eyano oyo Maria apesaki anzelu

9. (a) Mpo na nini bato oyo batyelaka lisolo ya Maria ntembe bazali na elonga te? (b) Ndenge nini anzelu Gabriele alendisaki kondima ya Maria?

9 Bato ya ntembe, ata mpe bato mosusu oyo bayekolá mateya ya mangomba ya bokristo, bandimaka te ete mwasi oyo ayebi mibali te akokaki kobota. Atako batángá bakelasi milai, bayebaka te likambo ya pɛtɛɛ lokola oyo. Ndenge anzelu Gabriele amonisaki yango, “epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki kosalema te.” (Luka 1:37) Maria andimaki ete maloba ya anzelu Gabriele ekosalema mpo azalaki na kondima makasi. Kasi, kondima yango ezalaki bindimela te. Lokola moto nyonso oyo motó esalaka, Maria azalaki na mposa ya bilembeteli oyo ekokaki kosimba kondima na ye. Anzelu Gabriele apesaki ye bilembeteli mosusu. Ayebisaki ye likambo oyo ekómelaki ndeko na ye ya mobange Elizabeti, oyo bato bayebaki ete abotaka te banda bambula mingi. Nzambe asalaki likamwisi mpe Elizabeti akómaki na zemi!

10. Mpo na nini tosengeli te kokanisa ete mokumba oyo Maria azwaki ebangisaki ye te mpe ezalaki pɛtɛɛ?

10 Sikoyo Maria akosala nini? Ayebaki mokumba oyo Nzambe apesi ye mpe amonaki polele ete Nzambe akokokisa nyonso oyo Gabriele alobaki. Atako ezalaki lokumu mpo na Maria kobota mwana ya Nzambe, kasi tókanisa te ete likambo yango ezalaki pɛtɛɛ mpo na ye. Ya liboso, asengeli kokanisa mpo azalaki fianse ya Yozefe. Bakobalana mpenza soki Yozefe ayoki ete Maria azali na zemi? Ya mibale, mokumba oyo azwaki ebangisaki ye mingi. Asengeli komema bomoi oyo eleki motuya bomoi ya bikelamu nyonso ya Nzambe: bomoi ya Mwana oyo Nzambe azalaki kolinga mingi! Asengeli kobɔkɔla ye ntango azalaki naino moke mpe kobatela ye na mokili oyo mabe. Ezalaki mpenza mokumba monene!

11, 12. (a) Na ntango mosusu, ata bato ya makasi mpe ya sembo basalaki ndenge nini ntango Nzambe apesaki bango mikumba minene? (b) Eyano oyo Maria apesaki anzelu Gabriele emonisaki nini mpo na ye?

11 Biblia emonisi ete ata bato mosusu ya makasi mpe ya sembo babangaki mpo na kondima mikumba minene oyo Nzambe apesaki bango. Na ndakisa, Moize amonisaki ete alobaka malamu te, yango wana akokoka te kozala molobeli ya Nzambe. (Kob. 4:10) Yirimia alobaki ete azali “kaka mwana”; akokoka te kondima mokumba oyo Nzambe apesaki ye. (Yir. 1:6) Yona kutu akimaki mokumba na ye! (Yona 1:3) Bongo Maria asalaki nini?

12 Tii lelo oyo, bato nyonso ya kondima bayebi maloba na ye ya komikitisa mpe ya botosi. Alobaki na Gabriele ete: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” (Luka 1:38) Mwana mwasi oyo azalaki moombo, azalaki na nse ya basali nyonso; bomoi na ye mobimba ezalaki na mabɔkɔ ya nkolo na ye. Maria azalaki komimona ndenge wana liboso ya Nkolo na ye, Yehova. Ayebaki ete abatelami malamu na mabɔkɔ ya Yehova, ete Yehova azalaka sembo epai ya baoyo bazali sembo epai na ye, mpe ete akopambola ye soki asali nyonso oyo akoki mpo na kokokisa mokumba monene oyo azwaki.​—Nz. 18:25.

Maria ayebaki ete azalaki mpenza na libateli na mabɔkɔ ya Yehova, Nzambe na ye ya sembo

13. Soki tomoni ete likambo moko oyo Nzambe asɛngi biso ezali mpasi to ete ekoki kosalema te, ndenge nini ndakisa ya Maria ekoki kosalisa biso?

13 Na ntango mosusu, Nzambe asɛngaka biso makambo oyo tokoki komona ete ezali mpasi to ete ekoki kosalema te. Nzokande, Liloba na ye epesi biso bantina oyo tosengeli kotyela ye motema, komitika na mabɔkɔ na ye, ndenge Maria asalaki. (Mas. 3:5, 6) Tokosala yango? Soki tosali yango, akopesa biso mbano, akosalela biso makambo oyo ekokómisa kondima na biso epai na ye makasi koleka.

Epai ya Elizabeti

14, 15. (a) Mbano nini Yehova apesaki Maria ntango akendaki kotala Elizabeti ná Zekaria? (b) Maloba ya Maria oyo ezali na Luka 1:46-55 emonisi nini mpo na ye?

14 Makambo oyo anzelu Gabriele alobaki mpo na Elizabeti ezalaki na ntina mingi mpo na Maria. Na basi nyonso ya mokili, nani akokaki koyeba malamu likambo oyo ekómelaki Maria? Maria akendaki mbangu na mokili ya ngombangomba ya Yuda; mobembo oyo mbala mosusu ezwaki ye mikolo misato to minei. Ntango akɔtaki epai ya Elizabeti ná Nganga-nzambe Zekaria, Yehova apesaki Maria elembeteli mosusu ya monene mpo na kolendisa kondima na ye. Ntango Elizabeti ayokaki Maria apesi ye mbote, ayokaki na mbala moko ete mwana oyo azalaki na libumu na ye apumbwaki na esengo. Elizabeti atondaki na elimo santu mpe abengaki Maria “mama ya Nkolo na ngai.” Nzambe ayebisaki Elizabeti ete mwana oyo Maria akobota akozala Nkolo na ye, Masiya. Longola yango, elimo santu etindaki Elizabeti apesa Maria longonya mpo na bosembo mpe botosi na ye; alobaki na ye boye: “Esengo mpe na mwasi oyo andimi.” (Luka 1:39-45) Ya solo, makambo nyonso oyo Yehova alakaki Maria ekokokisama!

Boninga ya Maria ná Elizabeti ememelaki bango mibale matomba

15 Na nsima, Maria mpe alobaki. Maloba na ye ekomami malamu na Liloba ya Nzambe. (Tángá Luka 1:46-55.) Na bisika oyo Biblia elobeli Maria, oyo ezali esika oyo alobi mingi koleka bisika mosusu; mpe maloba yango esalisi biso tóyeba ye malamu. Emonisi ete azalaki na botɔndi mpo asanzolaki Yehova mpo na libaku malamu oyo apesaki ye ya kozala mama ya Masiya. Emonisi ete azalaki na kondima makasi mpo alobaki ete Yehova akitisaka bato ya lolendo mpe ya nguya, kasi asalisaka bato ya komikitisa mpe babola oyo balingi kosalela ye. Emonisi lisusu ete azalaki na boyebi mingi. Buku moko elobaki ete Maria azongelaki makanisi ya bavɛrsɛ koleka 20 ya Makomami ya Ebre! *

16, 17. (a) Ndenge nini Maria ná mwana na ye bamonisaki ezaleli oyo tosengeli komekola? (b) Ndenge Maria akendaki kotala Elizabeti esalisi biso tóyeba lipamboli nini oyo tokoki kozwa?

16 Ezali polele ete Maria azalaki mpenza kokanisa mozindo na Liloba ya Nzambe. Atako bongo, azalaki na komikitisa na ndenge asepelaki kozongela makambo oyo ezalaki na Makomami na esika aloba oyo euti epai na ye moko. Na nsima, mwana oyo azalaki na libumu ayaki mpe komonisa ezaleli wana; mokolo moko alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 7:16) Ebongi tómituna boye: ‘Ngai mpe namemyaka Liloba ya Nzambe ndenge wana? To nasepelaka nde kobimisa makanisi to mateya na ngai moko?’ Ekateli ya Maria ezalaki polele.

17 Maria alekisaki sanza soki misato epai ya Elizabeti; na ntango yango bango mibale bazalaki kolendisana. (Luka 1:56) Lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Maria akendaki kotala Elizabeti emonisi biso matomba oyo moto akoki kozwa epai ya baninga. Soki tozwaka baninga oyo balingaka mpenza Yehova Nzambe, boyokani na biso ná ye ekokóma makasi. (Mas. 13:20) Ntango ekokaki mpo Maria azonga epai na ye. Yozefe akosala nini ntango akoyeba ete Maria azali na zemi?

Maria ná Yozefe

18. Likambo nini Maria ayebisaki Yozefe, mpe Yozefe asalaki nini?

18 Maria azelaki te tii ntango bato bakoyeba ete azali na zemi mpo ayebisa Yozefe. Kasi, liboso asolola ná ye, mbala mosusu amitunaki soki mobali yango oyo azalaki moto malamu mpe azalaki kobanga Nzambe, akosala nini ntango akoyoka yango. Atako bongo, asololaki ná ye mpe ayebisaki ye likambo oyo ekómelaki ye. Ndenge okoki kokanisa yango, Yozefe atungisamaki makasi. Azalaki na mposa ya kondimela fianse na ye, kasi azalaki komona lokola Maria asali pite. Biblia elobi te soki Yozefe azalaki kokanisa nini. Kasi, elobi ete azwaki mokano ya koboma libala, mpo na ntango wana, bazalaki kotalela bafianse lokola bato oyo babalani. Kasi, alingaki te kosambwisa ye na miso ya bato, yango wana amonaki malamu aboma libala na ye na nkuku. (Mat. 1:18, 19) Na ntembe te, Maria ayokaki mawa komona ndenge Yozefe azali kotungisama makasi mpo na likambo wana oyo esalemá naino te. Atako bongo, Maria asilikelaki Yozefe te.

19. Ndenge nini Yehova asalisaki Yozefe azwa ekateli ya malamu?

19 Na boboto nyonso, Yehova asalisaki Yozefe azwa ekateli ya malamu. Na kati ya ndɔtɔ, anzelu moko ya Nzambe ayebisaki Yozefe ete zemi ya Maria ezalaki mpenza likamwisi. Na ntembe te, motema na ye ekitaki. Na nsima, Yozefe asalaki ndenge Maria asalaki banda na ebandeli: alandaki litambwisi ya Yehova. Abalaki Maria, mpe amibongisaki mpo na kokokisa mokumba monene ya kobɔkɔla Mwana ya Yehova.​—Mat. 1:20-24.

20, 21. Mateya nini bato oyo babalá ná baoyo bazali kokana kobala bakoki kozwa epai ya Maria ná Yozefe?

20 Ekozala malamu ete bato oyo babalá, ná baoyo bazali kokana kobala, bámekola mwasi ná mobali wana oyo bazalaki na bomoi eleki sikoyo mbula 2 000. Ntango Yozefe azalaki komona ndenge Maria azalaki kokokisa mokumba na ye ya mama, na ntembe te asepelaki ndenge anzelu ya Yehova atambwisaki ye. Na ntembe te, Yozefe amonaki ntina ya kotalela Yehova na ntango ya kozwa bikateli ya minene. (Nz. 37:5; Mas. 18:13) Na ntembe te, azalaki ntango nyonso na boboto mpe na bokɛngi na bikateli oyo azalaki kozwa na kati ya libota na ye.

21 Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Maria andimaki kobala Yozefe? Atako na ebandeli Yozefe amonaki ete ezali mpasi andima makambo oyo ayebisaki ye, Maria azelaki nde ye azwa ekateli, mpo ye moto oyo asengelaki kozala mokonzi na libota. Yango ezalaki liteya malamu mpo na ye; ezali mpe liteya malamu mpo na basi bakristo lelo oyo. Lisusu, makambo oyo ekómelaki bango emonisaki Maria ná Yozefe ete kosolola polele mpe na bosembo ezali na ntina.​—Tángá Masese 15:22.

22. Nini esalaki ete Maria ná Yozefe bábanda libala na bango malamu, mpe mokumba nini ezalaki kozela bango?

22 Na ntembe te, babalani yango babandaki libala na bango malamu. Bango mibale balingaki libosoliboso Yehova Nzambe mpe bazalaki na mposa ya kokokisa malamu mokumba na bango ya baboti mpo básepelisa Ye. Ya solo, bazwaki mapamboli mingi, kasi mikakatano minene mpe ezalaki kozela bango. Basengelaki kobɔkɔla Yesu, oyo akokóma moto oyo aleki bato nyonso tii lelo oyo.

^ par. 15 Na ndakisa, emonani ete Maria azongelaki maloba ya Hana, mwasi moko ya sembo, oyo Yehova asalisaki ye abota mwana.​—Talá etanda “Mabondeli mibale ya mozindo”, na mokapo 6.