Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA NTUKU MIBALE NA MISATO

Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye

Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye

1. Ekoki kozala ete mokolo nini ezalaki mabe mpenza na bomoi ya Petro?

PETRO akokaki kobosana soki moke te ntango wana oyo miso na ye ekutanaki ná oyo ya Nkolo na ye. Amonaki nde ete liso oyo Yesu atalaki ye ezalaki ya mawa to ya kopamela? Toyebi mpenza te, kasi Biblia elobi kaka ete “Nkolo abalukaki atali Petro.” (Luka 22:61) Kasi, kaka na liso wana, Petro amonaki mpenza mabe oyo asalaki. Amonaki ete asali mpenza likambo oyo Yesu alobaki, likambo oyo Petro atutaki ntolo ete akosala soki moke te​—awanganaki Nkolo na ye oyo alingaki mingi. Ezalaki mpenza ntango ya mawa mpo na Petro, ntango mosusu mokolo ya mabe mpenza ya bomoi na ye.

2. Petro asengelaki kozwa liteya nini, mpe litomba nini tokoki kozwa na lisolo na ye?

2 Atako bongo, elikya ezalaki kaka. Lokola Petro azalaki moto ya kondima makasi, azalaki kaka na libaku ya kobongisa mabe oyo asalaki mpe koyekola moko ya mateya minene ya Yesu. Ezalaki likambo ya kolimbisa. Mokomoko na biso asengeli kozwa liteya yango, na yango tiká tótalela ndenge oyo Petro azwaki liteya wana ya ntina mingi.

Azalaki na makambo mingi ya koyekola

3, 4. (a) Motuna nini Petro atunaki Yesu, mpe ekoki kozala ete Petro akanisaki nini? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete Petro azalaki na makanisi oyo ezalaki mingi na mikolo wana?

3 Sanza soki motoba liboso, na engumba na ye Kapernaume, Petro ayaki epai ya Yesu mpe atunaki ye ete: “Nkolo, mbala boni ndeko na ngai akosalela ngai lisumu mpe ngai nakolimbisa ye? Tii mbala nsambo?” Ekoki kozala ete Petro akanisaki ete azali moto malamu mingi. Kutu, bakonzi ya mangomba ya eleko wana bazalaki koteya ete moto akoki kolimbisa kaka mbala misato! Yesu ayanolaki ete: “Nalobi na yo te: Tii mbala nsambo, kasi: Tii mbala ntuku nsambo na nsambo (77).”​—Mat. 18:21, 22.

4 Yesu alingaki nde koloba ete Petro asengelaki kotánga mbala boni moto asaleli ye makambo mabe? Te, kutu, ndenge ayebisaki Petro ete mbala 7 te kasi mbala 77, alingaki koloba ete kolimbisa ezali na ndelo te. (1 Ko. 13:4, 5) Yesu amonisaki ete Petro amekolaki motema makasi mpe ezaleli ya kozanga kolimbisa oyo ezalaki mingi na ntango wana, oyo ezalaki kotinda moto alimbisa kaka nsima ya kotánga mbala boni moto asali ye mabe. Nzokande, baoyo balingi komekola Nzambe basengeli kolimbisaka basusu kozanga ndelo.​—Tángá 1 Yoane 1:7-9.

5. Ntango nini tokoki mpenza kozwa liteya na likambo etali kolimbisa?

5 Petro atyelaki Yesu ntembe te. Kasi, liteya oyo Yesu apesaki esimbaki mpenza motema na ye? Ntango mosusu tozwaka liteya na likambo etali kolimbisa ntango tomoni ete biso moko tozali mpenza na mposa na yango. Na yango, tózonga na makambo oyo esalemaki liboso Yesu akufa. Na bangonga wana ya mpasi, Petro asalaki makambo mingi oyo esengelaki Nkolo na ye alimbisa ye.

Yesu alimbisaki Petro mbala ebele

6. Petro asalaki nini ntango Yesu alingaki koteya bantoma ezaleli ya komikitisa, mpe Yesu asalelaki ye makambo ndenge nini?

6 Ezalaki mpokwa moko ya ntina mingi​—butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele. Yesu azalaki kaka na makambo mingi ya koteya bantoma na ye​—na ndakisa likambo etali komikitisa. Yesu apesaki ndakisa na ndenge asukolaki makolo na bango, mosala oyo baombo nde bazalaki kosala. Liboso, Petro asepelaki te na likambo wana oyo Yesu asalaki. Liboso, aboyaki ete Yesu asukola makolo na ye. Na nsima, atingamaki kaka ete Yesu asukola ye makolo kaka te kasi mpe mabɔkɔ ná motó! Yesu azalaki kaka motema molai mpe na malɛmbɛ nyonso amonisaki ntina ya likambo wana oyo asalaki.​—Yoa. 13:1-17.

7, 8. (a) Mabunga nini mosusu Petro asalelaki Yesu? (b) Ndenge nini Yesu akobaki komonisa ezaleli ya boboto mpe kolimbisa?

7 Kasi, mwa moke na nsima, Petro asukisaki lisusu Yesu motema. Petro ná bantoma mosusu babandaki kowelana mpo na koyeba soki nani na kati na bango aleki basusu. Atako bongo, Yesu asembolaki bango na boboto nyonso mpe apesaki bango longonya mpo na makambo malamu oyo basalaki; batikalaki sembo epai ya Nkolo na bango. Kasi, asakolaki ete bango nyonso bakotika ye. Petro atutaki ntolo ete ye akokangama na Yesu ata soki esɛngi akufa. Nzokande, Yesu asakolaki ete Petro akowangana ye mbala misato kaka na butu wana liboso nsoso elela mbala mibale. Kasi Petro aboyaki maloba wana ya Yesu, mpe atutaki ntolo ete akotikala sembo koleka bantoma mosusu nyonso!​—Mat. 26:31-35; Mrk. 14:27-31; Luka 22:24-28; Yoa. 13:36-38.

8 Etikalaki moke Yesu atika komonisela Petro motema molai? Atako azalaki na eleko ya mpasi, Yesu azalaki kaka koluka makambo ya malamu oyo bantoma na ye, bato ya kozanga kokoka bazalaki na yango. Ayebaki ete Petro akowangana ye, na yango alobaki ete: “Nasaleli yo lilɔmbɔ ete kondima na yo elɛmba te; mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) Na yango, Yesu azalaki kaka na elikya ete Petro akobongola motema na libunga na ye, mpe akokoba kosalela Nzambe na bosembo. Oyo nde lolenge malamu ya komonisa boboto mpe kolimbisa!

9, 10. (a) Na elanga ya Getesemane, esengelaki kosembola Petro na likambo nini? (b) Mabunga ya Petro ekoki kosalisa biso tóbosana te likambo nini?

9 Na nsima, na elanga ya Getesemane, esengelaki ete Petro asembolama lisusu malamumalamu. Yesu asɛngaki ye, Yakobo mpe Yoane, ete bákoba kosɛnzɛla ntango ye azalaki kobondela. Yesu azalaki komitungisa mpo na liwa oyo esengelaki kokómela ye mpe azalaki na mposa ya libɔndisi, kasi Petro mpe bantoma mosusu bazalaki kolala mbala na mbala. Mpo na komonisa ete azalaki komitya na esika na bango mpe kolimbisa bango, Yesu alobaki boye: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”​—Mrk. 14:32-41.

10 Eumelaki te, ebele ya bato bakómaki, bazalaki na bisungi ya mɔtɔ, mipanga mpe mangenda. Wana ezalaki ntango ya kosala makambo na likebi mpe bokɛngi. Kasi, na mbala moko, Petro abimisaki mopanga mpe akataki litoi ya Malakusi, moombo ya nganga-nzambe monene. Na malɛmbɛ nyonso, Yesu asembolaki Petro, azongisaki litoi ya moto yango, mpe amonisaki ntina oyo bayekoli na ye basengeli koboya mobulu. (Mat. 26:47-55; Luka 22:47-51; Yoa. 18:10, 11) Petro asalaki mabunga mingi oyo esɛngaki Nkolo na ye alimbisa ye. Mabunga na ye ekoki kosalisa biso tóbosana te ete biso nyonso tosalaka masumu mbala mingi. (Tángá Yakobo 3:2.) Biso nyonso tozalaka na mposa ete Nzambe alimbisaka biso mokolo na mokolo. Na butu wana kaka, Petro akosala lisusu mabunga ya minene koleka.

Mabe monene oyo Petro asalaki

11, 12. (a) Ndenge nini Petro amonisaki mwa moke mpiko nsima ya kokangama ya Yesu? (b) Na ndenge nini Petro azangaki kosala likambo oyo alobaki ete akosala?

11 Yesu alobaki na ebele ya bato oyo bayaki ete soki bazali koluka ye, bátika bantoma na ye bákende. Petro azalaki kaka kotala ndenge ebele wana ya bato bazalaki kokanga Yesu. Na nsima, Petro ná bantoma mosusu bakimaki.

12 Petro ná Yoane batikaki kokima, ekoki kozala pene na ndako ya Anasi, oyo azalaki nganga-nzambe monene, epai bamemaki Yesu mbala ya liboso mpo na kosambisa ye. Ntango bazalaki komema Yesu kuna, Petro ná Yoane bazalaki kolanda ye kasi “na mwa mosika.” (Mat. 26:58; Yoa. 18:12, 13) Petro azalaki te moto ya bibangabanga. Mpo na kosala bongo, esɛngaki mpenza kozala na mwa mpiko. Bato wana oyo bayaki kokanga Yesu bazalaki na bibundeli, mpe eumelaki te, Petro azokisaki moko na bango. Kasi, tii sikoyo tomoni te bolingo ya sembo oyo Petro alobaki ete akomonisa​—kondima kokufa esika moko na Nkolo na ye soki esɛngi bongo.​—Mrk. 14:31.

13. Wapi lolenge kaka moko ya kolanda Kristo malamu?

13 Lokola Petro, mingi lelo oyo balukaka kolanda Kristo “na mwa mosika,” elingi koloba balingaka te bato báyeba. Kasi, ndenge ye moko Petro akomaki na nsima, lolenge kaka moko ya kolanda Kristo malamu ezali ya kokangama mpenza na ye na kotalela makoki na biso, komekola ndakisa na ye na makambo nyonso, ata soki yango ekoki komemela biso nini.​—Tángá 1 Petro 2:21.

14. Ndenge nini Petro alekisaki butu oyo bazalaki kosambisa Yesu?

14 Petro alandaki na bokɛngi mpenza baoyo bamemaki Yesu tii ntango akómaki na porte moko ya bandako minene ya Yerusaleme. Ezalaki ndako ya Kaifa, nganga-nzambe monene oyo azalaki na bomɛngo mpe nguya. Mbala mingi, bandako ya ndenge wana ezalaki kotongama zingazinga ya lopango, mpe ezalaki na porte na liboso. Petro akómaki na porte mpe baboyaki akɔta. Yoane, oyo ayebanaki na nganga-nzambe monene mpe azalaki na kati ya lopango, ayaki mpe ayebisaki sinzili ya porte ete akɔtisa Petro. Emonani lokola ete Petro atikalaki te esika moko ná Yoane; mpe alukaki te kokɔta na kati ya ndako mpo na kotɛlɛma pene ya Nkolo na ye. Atikalaki na lopango, epai baombo mpe bato mosusu ya misala ya ndako bazalaki kolekisa bangonga mpo na koyɔta mɔtɔ oyo ezalaki kongɛnga na butu, mpe kotala ndenge bato ya lokuta bazalaki kokɔta mpe kobima mpo na kokosela Yesu makambo.​—Mrk. 14:54-57; Yoa. 18:15, 16, 18.

15, 16. Limbolá ndenge esakweli ya Yesu oyo elobaki ete Petro akowangana ye mbala misato ekokisamaki.

15 Na kongɛnga ya mɔtɔ, mwana mwasi oyo akɔtisaki Petro amonaki ye lisusu malamu. Ayebaki ye. Afundaki ye na maloba oyo: “Yo mpe ozalaki na Yesu Mogalile!” Petro asutukaki, awanganaki Yesu​—mpe alobaki kutu ete ayebi te makambo oyo mwana mwasi yango azalaki koloba. Akendeki kofanda pene na porte, mpo bato báyeba ye te, kasi mwana mwasi mosusu ayebaki ye mpe alobaki kaka likambo wana: “Moto oyo azalaki na Yesu Monazarete.” Petro alapaki ndai ete: “Nayebi moto wana te!” (Mat. 26:69-72; Mrk. 14:66-68) Ekoki kozala na mbala wana ya mibale nde Petro ayokaki nsoso eleli, kasi akangaki naino ntina te ya esakweli oyo Yesu alobaki mwa bangonga liboso.

16 Mwa moke na nsima, Petro azalaki koluka kaka ete bato báyeba ye te. Kasi, etuluku moko ya bato oyo batɛlɛmaki zingazinga ya lopango bapusanaki. Moko na bango azalaki ndeko ya Malakusi, moombo oyo Petro azokisaki. Atunaki Petro boye: “Namonaki yo na elanga elongo na ye, boye te?” Petro alukaki kondimisa bango ete bazali kokosa. Na yango, akataki seleka mpo na likambo yango, mpe asɛngaki ete mabe ekómela ye soki azali kokosa. Wana ezalaki mbala ya misato oyo Petro awanganaki Yesu. Petro asilisaki naino koloba te ayokaki nsoso eleli mpo na mbala ya mibale na butu wana.​—Yoa. 18:26, 27; Mrk. 14:71, 72.

“Nkolo abalukaki atali Petro”

17, 18. (a) Petro asalaki nini ntango amonaki ete asalelaki mpenza Nkolo na ye mabe? (b) Mbala mosusu Petro azalaki komituna nini?

17 Na ntango wana kaka, Yesu abimaki na eteni ya ndako na likoló mpo na kotala lopango. Na ntango wana nde miso na ye ná oyo ya Petro ekutanaki ndenge tolobelaki yango na ebandeli. Na ntango yango nde Petro amonaki mabe monene oyo asalaki Nkolo na ye. Petro alongwaki na lopango, mpe abandaki mpenza koyoka ete amemi ngambo. Akendeki na babalabala ya engumba, mpe azalaki komitungisa makasi ntango azali kobima na porte na ntɔngɔ makasi wana. Nsima ya komona bonene ya mabe oyo asalaki, mai ya miso etondaki ye. Ebandaki kokita. Alɛmbaki nzoto mpe alelaki makasi.​—Mrk. 14:72; Luka 22:61, 62.

18 Ntango moto amoni ete asali lisumu moko monene, ezali mpasi te aloba ete lisumu na ye eleki monene mpe akolimbisama te. Ekoki kozala ete Petro azalaki komituna ntango nyonso soki akolimbisama. Ezalaki bongo?

Petro asengelaki kolimbisama te?

19. Petro ayokaki ndenge nini mpo na libunga oyo asalaki, mpe ndenge nini toyebi ete abungisaki elikya te?

19 Tokoki te koyeba mpasi makasi oyo Petro ayokaki ntango ntɔngɔ ebandaki kotana mpe makambo ya mokolo wana emonanaki polele. Ayokaki mabe mpenza ntango Yesu akufaki mokolo wana nsima ya konyokwama bangonga ebele! Petro atungisamaki lisusu makasi ntango akanisaki ete abakiselaki Nkolo na ye mpasi mokolo wana ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Atako azalaki na mawa makasi, Petro abungisaki elikya te. Toyebi yango mpo lisolo emonisi ete eumelaki te azalaki lisusu elongo na bayekoli mosusu. (Luka 24:33) Na ntembe te, bantoma nyonso bayokaki mawa na likambo oyo basalaki na butu wana, mpe babɔndisanaki.

20. Liteya nini tokoki kozwa na ekateli ya bwanya oyo Petro azwaki?

20 Awa, tomoni ndenge Petro azwi ekateli moko ya bwanya. Ntango mosaleli moko ya Nzambe asali libunga, likambo eleki ntina ezali te bonene ya libunga oyo asali, kasi mpiko oyo azali na yango ya kotɛlɛma, elingi koloba ya kobongisa makambo. (Tángá Masese 24:16.) Petro amonisaki kondima ya solosolo na ndenge ayanganaki ná bantoma mosusu atako azalaki na mawa makasi. Ntango moto azali na mawa makasi, akoki koluka komitangola na basusu, kasi kosala bongo ezali likama. (Mas. 18:1) Likambo ya malamu mingi ezali kozala elongo na bandeko ya lisangá mpe kozongela makasi oyo tosengeli na yango mpo na kokoba kosalela Nzambe.​—Ebr. 10:24, 25.

21. Lokola ayanganaki ná bayekoli mosusu, nsango nini Petro ayokaki?

21 Lokola azalaki ná bayekoli mosusu ya Yesu, Petro ayokaki nsango ya mabe: nzoto ya Yesu ezalaki lisusu te na lilita. Petro ná Yoane bakimaki mbangu na lilita oyo ezipamaki na libanga, epai bakundaki Yesu. Na ntembe te, lokola Yoane azalaki elenge, akómaki liboso. Lokola akutaki lilita yango polele, akakatanaki kokɔta. Kasi, Petro akakatanaki te. Atako amɛlaki mpema ndenge akimaki mbangu, akɔtaki mbala moko na kati ya lilita. Moto azalaki na kati te!​—Yoa. 20:3-9.

22. Nini esalaki ete mawa mpe ntembe nyonso oyo ezalaki na motema ya Petro elongwa?

22 Petro andimaki ete Yesu asekwi? Na ebandeli andimaki te, atako basi ya sembo balobaki ete baanzelu babimelaki bango mpo na koyebisa bango ete Yesu asekwi. (Luka 23:55–24:11) Kasi, na nsuka ya mokolo yango, mawa mpe ntembe nyonso oyo Petro azalaki na yango esilaki. Yesu azalaki na bomoi, sikoyo lokola ekelamu ya elimo mpe ya nguya! Amonanaki na bantoma na ye nyonso. Kasi, liboso amonana na bantoma na ye nyonso, amonanaki naino na Petro ye moko. Bantoma balobaki mokolo wana ete: “Ya solo mpenza Nkolo alamukaki mpe abimelaki Simo!” (Luka 24:34) Ndenge moko, ntoma Paulo akomaki na nsima na ntina na mokolo wana ete Yesu “abimelaki Kefa, mpe na nsima bantoma zomi na mibale.” (1 Ko. 15:5) Kefa mpe Simo ezali bankombo mosusu ya Petro. Yesu amonanaki na Petro mokolo wana, ntango azalaki ye moko.

Petro asalaki mabunga mingi oyo esɛngaki Nkolo na ye alimbisa ye, kasi nani na kati na biso azalaka te na mposa ete bálimbisaka ye mokolo na mokolo?

23. Mpo na nini bakristo oyo basali lisumu basengeli kobosana te ndakisa ya Petro?

23 Biblia ekei na mozindo te na makambo oyo elekaki ntango Yesu ná Petro bakutanaki. Tokoki kokanisa ndenge Petro ayokaki ntango amonaki lisusu Nkolo na ye oyo alingaka mingi asekwi mpe azwaki libaku ya komonisa ye mawa oyo azalaki na yango mpe ete abongoli motema. Eloko kaka moko oyo azalaki na mposa na yango na mokili, ezalaki ete Yesu alimbisa ye. Nani akoki kotya ntembe ete Yesu alimbisaki ye, mpe ete asalaki yango na motema moko mpenza? Lelo oyo bakristo oyo basali lisumu basengeli kobosanaka te ndakisa ya Petro. Tosengeli kokanisaka soki moke te ete Nzambe akoki kolimbisa biso te. Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye, oyo ‘alimbisaka mpenza.’​—Yis. 55:7.

Oyo emonisi ete alimbisaki ye

24, 25. (a) Lobelá makambo oyo elekaki na butu oyo Petro azalaki koluka mbisi na Mbu ya Galile. (b) Petro asalaki nini ntango amonaki likamwisi oyo Yesu asalaki na ntɔngɔ?

24 Yesu ayebisaki bantoma na ye bákende na Galile, epai bakokutana na ye lisusu. Ntango bakómaki kuna, Petro akendeki koluka mbisi na Mbu ya Galile. Bantoma mosusu mpe balandaki ye. Na mbala oyo mpe, Petro azalaki ye moko na laki, epai azalaki mbala mingi kokende koluka mbisi liboso akóma ntoma. Lokola Petro azalaki mobomi ya mbisi, amesanaki malamu na makambo oyo ezalaki kosalema na mai. Na butu mobimba wana, bato oyo bazalaki koluka mbisi bakangaki ata mbisi moko te.​—Mat. 26:32; Yoa. 21:1-3.

Petro akitaki na masuwa mpe abɛtaki mai tii na libongo

25 Kasi, na ntɔngɔ makasi, moto moko oyo azalaki na libongo abengaki bango mpe asɛngaki bango bábwaka minyama na ngámbo mosusu ya masuwa. Bandimaki, babwakaki minyama mpe bakangaki mbisi tii 153! Petro ayebaki moto yango. Akitaki na masuwa, abɛtaki mai tii na libongo. Na libongo, Yesu apesaki bayekoli na ye bilei, mbisi oyo atumbaki na mɔtɔ ya makala. Atyaki likebi mingi epai ya Petro.​—Yoa. 21:4-14.

26, 27. (a) Libaku nini Yesu apesaki Petro mbala misato? (b) Elembeteli nini Yesu apesaki mpo na komonisa ete alimbisi mpenza Petro?

26 Yesu atunaki Petro soki alingaki ye “koleka oyo”​—emonani ete Yesu azalaki kolakisa ebele ya mbisi wana. Bolingo oyo Petro azalaki na yango mpo na mosala ya koluka mbisi elingaki koleka oyo azalaki na yango mpo na Yesu? Ndenge kaka Petro awanganaki Nkolo na ye mbala misato, Yesu apesaki ye sikoyo libaku ya komonisa liboso ya baninga na ye mbala misato ete alingaka ye. Mpe Yesu ayebisaki ye ndenge ya komonisa bolingo yango: kotya mosala mosantu liboso ya makambo mosusu nyonso, koleisa mpe kobatela etonga ya Kristo, elingi koloba bayekoli na ye ya sembo.​—Luka 22:32; Yoa. 21:15-17.

27 Yesu amonisaki ete Petro azalaki kaka na ntina mpo na ye mpe Tata na ye. Na litambwisi ya Kristo, Petro asengelaki kokokisa mokumba moko ya ntina na lisangá. Yango emonisi mpenza ete Yesu alimbisaki ye! Ya solo, Petro azalaki na botɔndi ndenge Yesu alimbisaki ye mpe azwaki liteya na libunga na ye.

28. Na ndenge nini Petro akómaki lokola libanga, ndenge nkombo na ye emonisi yango?

28 Petro akokisaki mokumba na ye na bosembo nyonso mbula ebele. Alendisaki bandeko na ye, ndenge Yesu apesaki ye etinda liboso akufa. Petro asalaki na boboto mpe na motema molai mosala ya kobatela mpe koleisa bayekoli ya Kristo. Moto oyo azalaki na nkombo Simo, akómaki kobengama na nkombo oyo Yesu apesaki ye​—Petro, to Libanga—​mpe akómaki ndakisa malamu mpenza na lisangá. Likambo oyo emonisi mpenza ndakisa yango ezali na mikanda mibale ya ntina oyo ye moko Petro akomaki oyo ezali na Biblia. Mikanda yango emonisi mpe ete Petro abosanaki te liteya oyo azwaki na likambo etali kolimbisa oyo ayekolaki epai ya Yesu.​—Tángá 1 Petro 3:8, 9; 4:8.

29. Ndenge nini tokoki komekola kondima ya Petro mpe motema mawa ya Nkolo na ye?

29 Biso mpe tosengeli kozwa liteya na likambo yango. Tosɛngaka Nzambe mokolo na mokolo ete alimbisa biso mpo na ebele ya mabunga na biso? Tondimaka mpenza bolimbisi yango mpe nguya na yango ya kopɛtola biso? Biso mpe tolimbisaka basusu? Soki tozali kosala bongo, tokomekola kondima ya Petro​—mpe motema mawa ya Nkolo na ye.