Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nini ekoki kosalisa yo oyeba Biblia?

Nini ekoki kosalisa yo oyeba Biblia?

Eyano ya Biblia

 Biblia yango moko elobeli makambo mingi oyo ekoki kosalisa yo oyeba yango. Ata soki ozali moto ya ekólo nini, nsango ya Nzambe oyo ezali na Biblia “eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika te.”​—Kolimbola Mibeko 30:11

Makambo oyo ekoki kosalisa yo oyeba Biblia

  1.   Zalá na makanisi ya malamu. Ndimá ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Zalá na komikitisa, mpo Nzambe alingaka bato ya lolendo te. (1 Batesaloniki 2:13; Yakobo 4:6) Kasi, kozala mpe moto ya bindimandima te; Nzambe alingi osalela “makoki na [yo] ya kokanisa.”​—Baroma 12:1, 2.

  2.   Bondelá Nzambe apesa yo bwanya. Na Masese 3:5, Biblia elobi: “Kondimela mayele na yo moko te.” Osengeli nde kokoba “kosɛnga Nzambe” apesa yo bwanya mpo oyeba Biblia.​—Yakobo 1:5.

  3.   Yekoláká mbala na mbala. Biblia ekosalisa yo mingi soki ozali koyekola yango mbala na mbala, na esika otángaka kaka soki ozwi ngonga.​—Yosua 1:8.

  4.   Yekoláká likambo mokomoko. Koyekola likambo mokomoko oyo Biblia elobeli ezali lolenge ya malamu ya koyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Osengeli kobanda na “mateya ya ebandeli” mpe na nsima mateya ya “bato oyo bakɔmɛli.” (Baebre 6:1, 2) Soki ozali kokokanisa bavɛrsɛ ya Biblia, okomona ete biteni mosusu ya Biblia elimboli biteni mosusu, ata biteni oyo “ezali mpasi moto akanga ntina na yango.”​—2 Petro 3:16.

  5.   Ndimá basusu básalisa yo. Biblia elendisi biso tóndima basusu básalisa biso mpo tóyeba yango malamu. (Misala 8:30, 31) Batatoli ya Yehova bayekolaka na bato Biblia ofele. Ndenge moko na bakristo ya liboso, Batatoli ya Yehova basalelaka Biblia mpo na kosalisa basusu báyeba oyo Biblia eteyaka mpenza.​—Misala 17:2, 3.

Makambo oyo ezali na ntina te

  1.   Ozala moto ya mayele to otánga kelasi ya milaimilai. Bantoma 12 ya Yesu bayebaki Makomami mpe bazalaki koteya bato mosusu; nzokande bato bazalaki kotalela bantoma yango mosusu ete bazali “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.”​—Misala 4:13.

  2.   Mbongo. Okoki koyekola makambo oyo Biblia eteyaka ofele, okofuta te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.