Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yoane 16:33​—“Ngai nalongi mokili”

Yoane 16:33​—“Ngai nalongi mokili”

 “Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya. Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”​—Yoane 16:33, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Nasili kosolola na bino makambo oyo ete bozala na kimia kati na ngai. Kati na mokili bozali na bolɔzi; nde boyika mpiko, ngai nasili koleka mokili.”​—Yoane 16:33, Biblia Haut-Fleuve.

Ndenge Yoane 16:33 elimbolami

 Na maloba yango, Yesu alendisi mpenza bayekoli na ye ete bango mpe bakoki kolonga kosepelisa Nzambe atako bazali kokutana na komekama mpe botɛmɛli.

 “Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai a bózala na kimya.” Eteni mosusu ya vɛrsɛ yango emonisi ete kimya yango elimboli te ete matata ekozanga te na bomoi ya moto. Kutu, ezali nde na kimya ya motema mpe ya makanisi. Kimya yango ya motema eyaka kaka na “nzela ya” Yesu, oyo alakaki kotinda elimo santu. “Mosungi” yango ya nguya ekosalisa bayekoki ya Yesu báyikela mokakatano ya ndenge nyonso mpiko.​—Yoane 14:16, 26, 27.

 Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko!” Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye bakokutana na komekama, na ndakisa, makambo ya kozanga bosembo mpe minyoko. (Matai 24:9; 2 Timote 3:12) Ata bongo, bazalaki na ntina ya ‘koyika mpiko.’​—Yoane 16:33.

 “Ngai nalongi mokili.” Awa, liloba “mokili” elakisi bato ya kozanga bosembo oyo bazali mosika na Nzambe. b 1 Yoane 5:19 elobi: “Toyebi ete touti na Nzambe, kasi mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe,” elingi koloba, Satana. Na yango, bato ya “mokili” oyo bakanisaka mpe basalaka makambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe.​—1 Yoane 2:15-17.

 Satana ná mokili na ye balingaki kopekisa Yesu akokisa mokano ya Nzambe, oyo ezali mpe koteya basusu makambo ya Nzambe mpe kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko. (Matai 20:28; Luka 4:13; Yoane 18:37) Kasi Yesu atikaki te mokili ebebisa ndenge na ye ya kokanisa mpe etinda ye aboya Nzambe. Atikalaki sembo tii na liwa. Yango wana, Yesu alobaki ete alongaki mokili mpe Satana, “mokonzi ya mokili” oyo, azalaki na “bokonzi” likoló na ye te.​—Yoane 14:30.

 Yesu asalelaki ndakisa na ye moko mpo na komonisa bayekoli na ye ete bango mpe bakoki kotikala sembo epai ya Nzambe ata ntango bosembo na bango emekami. Kutu, Yesu alobaki: “Soki nakoki kolonga mokili, bino mpe bokoki kolonga.”

Makambo oyo bazali kolobela na Yoane 16:33

 Yesu alobaki maloba yango na butu liboso akufa. Ayebaki ete akokufa mosika te, asalelaki libaku yango mpo na kopesa bantoma na ye ya sembo toli. Alobaki makambo mosusu ya ntina oyo basengelaki kokanisa na mozindo mpenza: Bakomona ye lisusu te, mpe bakonyokola bango, ata mpe koboma bango. (Yoane 15:20; 16:2, 10) Lokola yango ekokaki kobangisa bantoma na ye, Yesu asukisaki na maloba oyo ezali na Yoane 16:33 mpo na kolendisa bango mpe kopesa bango makasi.

 Maloba mpe ndakisa ya Yesu ekoki mpe kolendisa bayekoli na ye lelo oyo. Bakristo nyonso bakoki kotikala sembo epai ya Nzambe atako bazali kokutana na minyoko.

a Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “na nzela na ngai” ekoki mpe kobongolama na “na bomoko elongo na ngai.” Epesaka likanisi ete bayekoli ya Yesu bakoki kozala na kimya ntango bakobi kozala na bomoko elongo na ye.

b Liloba “mokili” ezali mpe na ndimbola moko na Yoane 15:19 mpe 2 Petro 2:5.