Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nasala nini mpo nakóma Motatoli ya Yehova?

Nasala nini mpo nakóma Motatoli ya Yehova?

 Yesu amonisi makambo oyo moto asengeli kosala mpo akóma Motatoli ya Yehova na Matai 28:19, 20. Mokapo yango emonisi polele makambo moto asengeli kosala mpo akóma moyekoli ya Kristo oyo esɛngaka moto aloba to atatola makambo etali Yehova.

 Likambo 1: Yekolá makambo oyo Biblia eteyaka. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘bákómisa bato bayekoli . . . , báteya bango.’ (Matai 28:19, 20) Liloba oyo ebongolami na “moyekoli” elimboli “moto oyo azali koyekola.” Biblia, mingimingi mateya ya Yesu Kristo oyo ezali na kati, ezali na makambo oyo osengeli na yango mpo ozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (2 Timote 3:16, 17) Tokosepela kosalisa yo oyeba oyo Biblia eteyaka soki ondimi tóyekola na yo Biblia ofele.​—Matai 10:7, 8; 1 Batesaloniki 2:13.

 Likambo 2: Salelá makambo oyo oyekoli. Yesu alobaki ete baoyo bazali koyekola basengeli mpe ‘kotosa makambo nyonso oyo apesaki mitindo.’ (Matai 28:20) Yango elingi koloba ete ntango ozali koyekola Biblia kosuka kaka te na kozwa boyebi, kasi boyebi yango esengeli kotinda yo obongola mpenza makanisi mpe bizaleli na yo. (Misala 10:42; Baefese 4:22-29; Baebre 10:24, 25) Baoyo batosaka mitindo ya Yesu bazwaka ekateli bango moko ya kolanda ye mpe bapesaka bomoi na bango epai ya Yehova Nzambe.​—Matai 16:24.

 Likambo 3: Zwá batisimo. (Matai 28:19) Biblia ekokanisi batisimo na nkunda. (Talá mpe Baroma 6:2-4.) Yango ezali elilingi ya kokufa na makambo oyo ozalaki kosala liboso mpe kobanda bomoi ya sika. Batisimo na yo ekomonisa polele ete osali makambo mibale ya liboso oyo Yesu alobaki mpe ozali kosɛnga Nzambe apɛtola lisosoli na yo.​—Baebre 9:14; 1 Petro 3:21.

Ndenge nini nakoyeba ete nakokisi makambo oyo esɛngami mpo na kozwa batisimo?

 Yebisá bankulutu ya lisangá. Bakosolola na yo mpo na koyeba soki okangi ntina ya batisimo, ozali kosalela makambo oyekoli mpe soki omipesaki na Yehova na bolingo na yo moko.​—Misala 20:28; 1 Petro 5:1-3.

Bana ya Batatoli ya Yehova basengeli mpe kosala bongo?

 Ɛɛ. Tobɔkɔlaka bana na biso na “disiplini mpe na makebisi ya Yehova,” kaka ndenge Biblia esɛngi. (Baefese 6:4) Kasi, ntango bazali kokola, basengeli kozwa ekateli bango moko ya koyekola, kondima, mpe kosalela makambo oyo Biblia eteyaka liboso bándima bango bázwa batisimo. (Baroma 12:2) Kutu, moto na moto asengeli kopona oyo alingi na makambo etali losambo.​—Baroma 14:12; Bagalatia 6:5.