Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka bafɛti mosusu te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka bafɛti mosusu te?

 Ndenge nini Batatoli ya Yehova bayebaka ete fɛti boye to boye ezali mabe to te?

 Batatoli ya Yehova balukaka naino koyeba oyo Biblia elobi liboso ya kondima kosala fɛti boye to boye. Bafɛti mpe milulu mosusu eyokanaka te na mateya ya Biblia, yango wana Batatoli ya Yehova basalaka yango te. Kasi mpo na bafɛti mosusu, Motatoli ya Yehova mokomoko aponaka, kasi asalaka makasi ‘azala na lisosoli oyo ezali komonisa ete asali mabe moko te epai ya Nzambe mpe epai ya bato.’​—Misala 24:16.

 Oyo ezali mwa mituna oyo Batatoli ya Yehova bamitunaka liboso ya kondima kosala fɛti boye to boye. a

  •   Fɛti yango euti na liteya moko oyo Biblia eteyaka te?

     Toli ya Biblia: “‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’”​—2 Bakorinti 6:15-17.

     Mpo bákabwana mpenza na mateya oyo ezali mbindo; elingi koloba oyo eyokani te na oyo Biblia eteyaka, Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti oyo ezali na makambo oyo elandi:

     Bafɛti oyo euti na mateya to losambo ya banzambe mosusu. Yesu alobaki boye: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Matai 4:10) Mpo na kotosa maloba yango, Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Noele te, ya Pasika te, fɛti ya Le 1er mai mpe te mpo bafɛti yango eutá na losambo ya banzambe mosusu, kasi ya Yehova te. Basanganaka mpe te na bafɛti oyo elandi.

    •  Kwanzaa. Nkombo Kwanzaa “eutá na maloba ya Swahili matunda ya kwanza, oyo elimboli ‘bambuma ya liboso.’ Fɛti yango eutá na bafɛti ya liboso ya eleko ya kobuka mbuma oyo bato ya Afrika bazalaki kosala.” (Buku Encyclopedia of Black Studies) Atako bato mosusu bamonaka ete Kwanzaa ezali fɛti ya losambo te, buku Encyclopedia of African Religion ekokanisi yango na fɛti moko ya Afrika oyo na boumeli na yango bato bazalaki “kopesa banzambe mpe bankɔkɔ” mbuma ya liboso mpo na kopesa bango mersi. Ebakisi boye: “Kwanzaa, fɛti oyo bato moindo ya Amerika basalaka, ezalaka mpe mpo na kopesa bankɔkɔ mersi mpo na mapamboli oyo bazwaka epai na bango.”

      Kwanzaa

    •  Fɛti ya katikati ya eleko ya otɔnɛ. Ezali “fɛti ya kokumisa nzambe-mwasi sanza.” Buku (Holidays, Festivals, and Celebrations of the World Dictionary). Na molulu mosusu ya fɛti yango, “basi bafukamaka liboso ya nzambe-mwasi.”​—Buku (Religions of the World​—A Comprehensive Encyclopedia of Beliefs and Practices.)

    •  Norouz (Nowruz). “Fɛti yango eutá na lingomba ya Zoroastre mpe ezali moko ya mikolo mosantu na kalandriye ya lingomba yango. . . . Mokolo ya Norouz, na midi, bazalaki kosepela kozonga ya elimo ya midi, oyo bazalaki mpe kobenga yango [Rapithwin], oyo bazalaki komona lokola eleko ya malili to hiver nde ezalaki kokanga yango na nse ya mabele na boumeli ya basanza ya malili.”​—United Nations Educational, Scientific and Cultural Organization.

    •  Shab-e Yalda. Na kotalela buku Sufism in the Secret History of Persia, fɛti yango, oyo bazalaki kosala ntango moi ezalaki komata likoló mpenza na eleko ya malili mpe butu ezalaki kokɔta noki te (solstice d’hiver) ezali “mpenza na boyokani na losambo ya Mithra,” nzambe ya pole. Bato mosusu balobaka ete fɛti yango ezali na boyokani na losambo ya banzambe-moi ya Baroma mpe ya Bagrɛki. b

    •  Kopesa matɔndi. Ndenge moko na Kwanzaa, fɛti yango eutá na bafɛti ya kala oyo bazalaki kosala na eleko ya kobuka mbuma mpo na kokumisa banzambe ndenge na ndenge. Wana bambula ezalaki koleka, “mimeseno yango ekɔtaki na Lingomba ya bokristo.”​—Buku A Great and Godly Adventure​—The Pilgrims and the Myth of the First Thanksgiving.

     Bafɛti oyo eutá na biyambayamba to na kondimela makila malamu. Biblia elobi ete baoyo “bazali kotyela nzambe ya Makila Malamu biloko na mesa” bazali “baoyo bazali kotika Yehova.” (Yisaya 65:11) Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti oyo elandi:

    •  La nuit de Kupala. Buku The A to Z of Belarus elobi boye: “Ndenge bato mingi bakanisaka, na [butu ya Ivan Kupala] biloko oyo ekelamá ebimisaka banguya na yango ya maji, oyo bato ya mpiko mpenza to ya makila malamu bakoki kokanga yango.” Na ebandeli, ezalaki fɛti ya bapakano oyo bazalaki kosala yango na solstice d’été. Kasi, ndenge buku Encyclopedia of Contemporary Russian Culture, emonisi yango, “ntango bapakano bakómaki bakristo, fɛti yango esanganaki na oyo ya Lingomba ya bokristo [“Saint-Jean” to fɛti ya Yoane Mobatisi].”

    •  Fɛti ya Bonane (ya Ba-Chinois to Ba-Coréen). “Koleka eloko mosusu nyonso, na eleko yango ya mbula, likambo ya ntina mingi koleka mpo na libota, baninga mpe bato mosusu ezalaka ya komindimisa ete mobu yango eleki malamu, kopesa banzambe mpe bilimo mersi mpe kotombelana mobu molamu na mbula ya sika.” (Mooncakes and Hungry Ghosts​—Festivals of China) Ndenge moko mpe, na Bonane ya Ba-Coréen “basambelaka bankɔkɔ, basalaka milulu ya kobengana bilimo mabe mpe komindimisa ete mobu eleki malamu, mpe kotala [bilembo ya kosakola makambo oyo ekoya] mpo na koyeba makambo oyo mobu ya sika ekomemela bango.”​—Encyclopedia of New Year’s Holidays Worldwide.

      Fɛti ya Bonane ya Ba-Chinois

     Bafɛti oyo euti na likanisi ete molimo ekufaka te. Biblia elobi polele ete molimo ekufaka. (Ezekiele 18:4) Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti oyo elandi, oyo endimisaka liteya ya molimo ekufaka te:

    •  Mokolo ya bakufi. Na kotalela New Catholic Encyclopedia, na fɛti yango “bakanisaka bato nyonso ya sembo oyo bakufá. Na boumeli ya eleko ya Moyen Âge, bato mingi bazalaki kokanisa ete na mokolo yango, milimo oyo ezalaki na epongelo ekokaki kobimela bato oyo basalaki bango mabe ntango bazalaki naino na bomoi; bakoki kobimela bango na lolenge ya bilimo, bandɔki, magorodo mpe bongo na bongo.”

    •  Fɛti ya Qingming (Qingming Jie) mpe fɛti ya bilima. Bafɛti yango mibale ezali mpo na komemya bankɔkɔ. Buku Celebrating Life Customs Around the World​—From Baby Showers to Funerals, elobi ete na ntango ya fɛti ya Qingming Jie, “batumbaka bilei, masanga mpe mbongo mpo bakufi bázala na nzala te mpe báyoka mposa ya komɛla te mpe bázanga mbongo te.” Buku yango elobi mpe ete “baoyo basalaka fɛti yango bakanisaka ete ntango fɛti yango ezali kosalema, bilima, mingimingi na butu ntango sanza ezali mobimba, bakufi bakoki kosolola na bato ya bomoi koleka babutu mosusu nyonso mpe ete ezali na ntina komibongisa liboso mpo na kokitisa nkanda ya bawei mpe komemya bankɔkɔ.”

    •  Fɛti ya Chuseok. Buku The Korean Tradition of Religion, Society, and Ethics elobi ete na ntango ya fɛti yango, “bapesaka milimo ya bakufi bilei mpe masanga.” Bapesaka makabo yango mpo “bakanisaka ete molimo ekobaka kozala na bomoi soki nzoto ekufi.”

     Bafɛti oyo ezali na boyokani na mayele oyo eleki ya bomoto. Biblia elobi: “Moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi . . . azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Mpo na koboya boyokani nyonso na misala ya bilimo mabe, ata mpe astroloji, Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Halloween te ata mpe bafɛti oyo elandi:

    •  Fɛti ya Bonane ya Ba-Cinghalais ná Ba-Tamoul. “Na milulu oyo basalaka na fɛti yango, . . . basalaka mpe makambo mosusu oyo, na kotalela bato ya astroloji, ememelaka moto makila malamu to chance.”​—Encyclopedia of Sri Lanka.

    •  Fɛti ya Songkran. Nkombo ya fɛti yango ya bato ya Azia euti na liloba Sanskrit oyo elimboli ‘muvema’ to ‘mbongwana.’ Fɛti yango emonisaka ndenge moi elekaka na Bélier, liboke ya minzoto ya zodiaque.”​—Food, Feasts, and Faith​—An Encyclopedia of Food Culture in World Religions.

     Bafɛti oyo ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize, oyo mbeka ya Yesu esukisaki. Biblia elobi: “Kristo azali nsuka ya Mibeko.” (Baroma 10:4) Bakristo bazwaka litomba na mitinda oyo ezali na Mibeko ya Moize oyo Nzambe apesaki Bayisraele. Kasi basalaka bafɛti na yango te, mingimingi oyo esakolaki koya ya Masiya, mpo bandimaka ete Masiya así ayaki. Biblia elobi: “Makambo wana ezali elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali nde epai ya Kristo.” (Bakolose 2:17) Mpo na ntina yango mpe mpo bafɛti yango ekómá lelo na mimeseno oyo eyokani te na Biblia, Batatoli ya Yehova basalaka yango te. Na ndakisa:

    •  Fɛti ya Hanoukka. Basalaka fɛti yango mpo na kokanisa bofungoli ya tempelo ya Yerusaleme. Kasi, Biblia eteyaka ete Yesu akómaki Nganga-nzambe Monene ya “hema [to tempelo] ya monene koleka mpe ya kokoka koleka mpe oyo esalemi na mabɔkɔ te, elingi koloba, ezali te na kati ya biloko oyo Nzambe azalisá na mokili.” (Baebre 9:11) Mpo na bakristo, tempelo ya elimo nde ezwá esika ya tempelo ya Yerusaleme.

    •  Fɛti ya Rosh ha-Shana. Ezali mokolo ya liboso na mbula, na kolanda kalandriye ya Bayuda. Na kala, bazalaki kopesa Nzambe bambeka na fɛti yango. (Mitángo 29:1-6) Kasi, ntango Yesu Kristo ayaki lokola Masiya, asalaki ete ‘mbeka mpe likabo esuka.’ (Danyele 9:26, 27). Na miso ya Nzambe, ezalaki lisusu na ntina te kosala milulu yango.

  •   Fɛti yango elendisaka likambo ya kosangisa losambo?

     Toli ya Biblia: “Eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?”​—2 Bakorinti 6:15-17.

     Batatoli ya Yehova basalaka makasi bázala na kimya elongo na basusu mpe batosaka lotomo oyo bato mosusu bazali na yango ya kopona mateya. Ata bongo, basalaka te bafɛti oyo elendisaka kosangisa losambo. Na ndakisa:

     Bafɛti oyo ekumisaka moto moko monene ya lingomba to oyo elendisaka bato ya mangomba ekeseni básala losambo esika moko. Ntango Nzambe akɔtisaki bato na ye na mokili moko oyo bafandi na yango bazalaki kosambela banzambe mosusu, alobaki na bango boye: “Osengeli te kosala kondimana ná bango to na banzambe na bango. . . . Soki osaleli banzambe na bango, yango ekokómela yo motambo.” (Kobima 23:32, 33) Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti oyo:

    •  Loy Krathong. Na fɛti yango ya bato ya Thaïlande, “bato basalaka mabakuli na nkasa, batyaka babuji na kati to banzete ya mpaka malasi mpe batindikaka yango na ebale. Basalaka bongo mpo emema makila mabe mosika na bango. Mpo na koloba solo, basalaka fɛti yango mpo na lokumu ya Buda.”​—Encyclopedia of Buddhism.

    •  Mokolo ya kobongola motema. Momonisi moko ya guvɛrnema oyo zulunalo moko The National ya Papouasie-Nouvelle-Guinée elobeli, alobaki ete baoyo basalaka fɛti yango “bamonisaka ete bandimaka makambo oyo lingomba ya bokristo esɛngaka.” Amonisaki mpe ete fɛti yango “esalisaka na kotombola mateya ya bokristo na mboka na bango.”

    •  Vesak. “Ezali fɛti ya lingomba ya Buda oyo eleki ntina mpo na bandimi ya Buda. Basalaka yango mpo na kokanisa mbotama ya Buda, pole na ye mpe liwa na ye (ntango akómaki na Nirvâna).”​—Holidays, Festivals, and Celebrations of the World Dictionary.

      Vesak

     Bafɛti oyo euti na mimeseno ya losambo oyo Biblia endimi yango te. Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba boye: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino.” Alobaki mpe na bango ete losambo na bango ezalaki mpamba mpo bazalaki koteya “mibeko ya bato.” (Matai 15:6, 9) Lokola Batatoli ya Yehova bazwaka likebisi yango na lisɛki te, ezali na bafɛti mingi ya mangomba oyo basalaka te.

    •  Fɛto ya Épiphanie (Timkat to fɛti ya bakonzi). Basalaka fɛti yango mpo na kokanisa vizite ya banganga-minzoto oyo bakendaká kotala Yesu to batisimo ya Yesu. Fɛti yango “esalaki ete bafɛti mosusu ya bapakano ya eleko ya prɛnta ekóma ya bokristo, bafɛti oyo ezalaki kokumisa banzambe ya mai oyo etíyolaka, ya bibale mpe ya mikɛli ya mai.” (The Christmas Encyclopedia) Timkat, oyo ekokani na fɛti yango, “epiká misisa na mimeseno ya bonkɔkɔ.”​—Encyclopedia of Society and Culture in the Ancient World.

    •  Fɛti ya Assomption. Fɛti yango ekumisaka liteya oyo elobaka ete Maria, mama ya Yesu, akendaki likoló na nzoto ya mosuni. Buku Religion and Society​—Encyclopedia of Fundamentalism elobi boye: “Bakristo ya liboso bayebaki liteya yango te mpe elobelami ata esika moto te na Makomami.”

    •  Fɛti ya Immaculée conception. “Biblia eteyi polele te ete Maria azangaki lisumu lisango ntango azwaki zemi ya Yesu [. . ] ezali liteya moko ya Eglize.”​—New Catholic Encyclopedia.

    •  Fɛti ya Kareme. Na kotalela buku New Catholic Encyclopedia, eleko yango ya koyoka mawa mpe kokila bilei batyaki yango “na siɛklɛ ya minei,” mbula koleka 200 nsima ya kokomama ya mokanda ya nsuka ya Biblia. Buku encyclopedia elobi boye mpo na Kareme: “Momeseno ya kotya putulu ya mɔtɔ na elongi ya bandimi na mokolo ya misato ekómaki mokili mobimba kobanda Synode de Bénévent na 1091.”

    •  Fɛti ya Mesqel. Buku Encyclopedia of Society and Culture in the Medieval World elobi ete na eleko ya fɛti yango ya bato ya Etiopi, bapelisaka mɔtɔ ya esengo mpe babinaka zingazinga na yango na “mokolo oyo bamonaki ekulusu ya solosolo (ekulusu oyo babakaki na yango Kristo), mokomi nde atye paranteze. Kasi, Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te na losambo na bango.

  •   Fɛti yango ezali kokumisa moto, ebongiseli moko to elembo ya ekólo?

     Toli ya Biblia: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Alakelama mabe mobali makasi oyo azali kotyela moto ya mabele motema mpe azali mpenza kokómisa moto ya mosuni lobɔkɔ na ye, mpe oyo motema na ye ezali kotika Yehova.’”​—Yirimia 17:5.

     Atako Batatoli ya Yehova bamemyaka bato mosusu mpe babondelaka mpo na bango, basanganaka te na bafɛti oyo elandi:

     Bafɛti oyo ekumisaka mokonzi moko to moto moko ya lokumu. Biblia elobi: “Mpo na bolamu na bino moko, bózala mosika na moto ya mabele, oyo mpema na ye ezali na zolo na ye, mpo bakotánga ye mpo na nini?” (Yisaya 2:22) Yango wana Batatoli ya Yehova basalaka te fɛti ya mbotama ya mokonzi moko boye.

     Bafɛti ya kokumisa bendele ya mboka. Batatoli ya Yehova basalaka te fɛti ya kokumisa Mokolo ya bendele. Mpo na nini? Mpo Biblia elobi: “Bókeba na bikeko.” (1 Yoane 5:21) Lelo oyo bato mosusu bamonaka te ete bendele ezali ekeko to eloko ya losambo​—kasi, Carlton Hayes, akomaki boye: “Bendele ezali elembo ya libosoliboso ya kondima mpe yango nde esimbi losambo ya bolingo ya ekólo.”

     Bafɛti oyo ekumisaka basantu. Nini esalemaki ntango moto moko oyo abangaka Nzambe afukamelaki ntoma Petro? Biblia elobi: “Petro atɛlɛmisaki ye, alobi: ‘Tɛlɛmá; ngai mpe nazali kaka moto.’” (Misala 10:25, 26) Lokola Petro mpe bantoma mosusu bandimaki te bato básambela to bápesa bango lokumu moko ya sipesiale, Batatoli ya Yehova mpe basanganaka te na bafɛti oyo ekumisaka bato mosusu oyo batalelaka bango lokola basantu, na ndakisa bafɛti lokola oyo:

    •  Fɛti ya Toussaint. “Fɛti ya kokumisa basantu nyonso . . . Esika bafɛti yango eutá eyebani te.”​—New Catholic Encyclopedia.

    •  Fɛti ya Notre-Dame de Guadalupe. Fɛti yango ekumisaka “sainte patronne du Mexique,” oyo bamosusu bakanisaka ete ye nde Maria, mama ya Yesu. Balobaka ete abimelaki moto moko ya mboka yango na 1531 na ndenge ya likamwisi.​—The Greenwood Encyclopedia of Latino Literature.

      Fɛti ya Notre-Dame de Guadalupe

    •  Fɛti ya Nkombo. Buku Celebrating Life Customs Around the World​—From Baby Showers to Funerals elobi ete “fɛti ya nkombo ezali fɛti ya mosantu oyo abengami na nkombo oyo bapesi mwana na mokolo ya batisimo na ye to na mokolo oyo akuli.” Buku yango ebakisi ete “na mokolo yango bato basalaka makambo oyo ezali na boyokani na lingomba.”

     Bafɛti oyo ekumisaka makambo ya politiki to oyo etali bomoi ya bato. Biblia elobi: “Kokima epai ya Yehova ezali malamu koleka kotyela moto ya mabele motema.” (Nzembo 118:8, 9) Mpo na komonisa ete batyaka motema ete Nzambe nde akobongisa makambo ya mokili kasi bato te, Batatoli ya Yehova basalaka te fɛti ya mokolo oyo batyá mpo na kokumisa basi to mokolo oyo batyá mpo na kokumisa bilenge. Yango wana bakumisaka te mokolo oyo baguvɛrnema mosusu ezwáká ekateli ya kotika kokómisa bato baombo. Kutu, batyaka elikya ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa likambo ya koyina bato ya mposo mosusu mpe kosala ete bato nyonso bázala ndenge moko.​—Baroma 2:11; 8:21.

  •   Fɛti yango emonisaka ete ekólo to bato oyo balobaka monɔkɔ moko boye baleki basusu?

     Toli ya Biblia: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

     Atako Batatoli ya Yehova mingi balingaka mboka na bango mingi, basanganaka te na bafɛti oyo emonisaka ete ekólo to bato oyo balobaka monɔkɔ moko boye baleki basusu; na ndakisa:

     Bafɛti oyo ekumisaka mampinga ya ekólo. Na esika alendisa bitumba, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:44) Yango wana Batatoli ya Yehova basanganaka te na bafɛti oyo ekumisaka basoda; na ndakisa:

    •  Mokolo ya Anzac. “Anzac ezali limpinga ya basoda ya Australie mpe Nouvelle-Zélande,” mpe “mokemoke fɛti yango ekómaki mokolo ya kokanisa baoyo bakufaki na bitumba.”​—Historical Dictionary of Australia.

    •  Fɛti ya Armistice (Mokolo ya suvenire). Fɛti yango ekumisaka “basoda oyo bayebaki mpenza kobunda mpe baoyo bakufaki na bitumba mpo na ekólo na bango.”​—Encyclopædia Britannica.

     Bafɛti oyo ekumisaka istware to lipanda ya mboka. Yesu alobaki boye mpo na bayekoli na ye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Atako balingaka koyeba istware ya mboka na bango, Batatoli ya Yehova basanganaka te na bafɛti oyo elandi:

    •  Australia Day. Buku Worldmark Encyclopedia of Cultures and Daily Life, elobi ete fɛti yango ekumisaka “mokolo oyo basoda ya Angleterre batyaká bendele na bango na mabele ya Australie na 1788 mpe Australie ekómaki moko ya bikólo oyo yango ezalaki koyangela.”

    •  Guy Fawkes Day. Ezali fɛti “oyo bakanisaka mokolo oyo Guy Fawkes mpe bandimi mosusu ya lingomba ya Katolike na mobu 1605 balukaki koboma Roi Jacques I mpe Parlema ya [Angleterre] kasi esimbaki te.”​—A Dictionary of English Folklore.

    •  Mokolo ya lipanda. Ezali mokolo oyo mikili mingi ekumisaka mokolo oyo ezwaki lipanda.”​—Merriam-Webster’s Unabridged Dictionary.

  •   Fɛti yango etindaka bato bámipesaka na makambo ya mbindo?

     Toli ya Biblia: “Ntango oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni, na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.”​—1 Petro 4:3.

     Mpo na kotosa etinda yango, Batatoli ya Yehova basangana te na bafɛti oyo na boumeli na yango bato bamɛlaka masanga koleka ndelo to bazalaka na komipekisa te. Basepelaka kolekisa ntango elongo na baninga na bango mpe bamɛlaka masanga, kasi kozanga kolekisa ndelo. Basalaka nyonso bálanda toli oyo ya Biblia: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”​—1 Bakorinti 10:31.

     Yango wana, Batatoli ya Yehova basanganaka te na bafɛti oyo elendisaka bato básala makambo oyo Biblia eboyi. Na ndakisa fɛti ya Bayuda oyo babengaka Purime. Ata soki banda kala fɛti yango ezalaka mpo na kokanisa ndenge Bayuda basikwamaki na siɛklɛ ya mitano liboso ya ntango na biso, lelo oyo, fɛti yango ekokani mwa moko na fɛti Mardi Gras ya Bayuda” ndenge buku Essential Judaism emonisi yango. Bato mingi oyo basalaka fɛti yango “bamikómisaka ndenge mosusu (mbala mingi mibali balataka bilamba ya basi), basalaka nyonso oyo balingi, bamɛlaka masanga koleka ndelo mpe basalaka makelele mingi.”

 Lokola Batatoli ya Yehova basalaka bafɛti mosusu te, yango elingi nde koloba ete balingaka bato ya mabota na bango te?

 Te. Biblia eteyaka biso tólinga mpe tómemya bato nyonso ya mabota na biso, ata soki basambelaka na lingomba nini. (1 Petro 3:1, 2, 7) Toboyi te, soki Motatoli ya Yehova atiki kosangana na bafɛti mosusu, bandeko na ye mosusu ya libota bakoki kosilika, koyoka mpasi na motema to komiyoka lokola atɛki bango. Yango wana Batatoli ya Yehova mingi bayebisaka bandeko na bango ya libota ete balingaka bango kaka mpe balimbolelaka bango na mayele ntina oyo bazwi ekateli yango mpe bakendaka kotala bandeko yango na mabaku mosusu.

 Batatoli ya Yehova bapekisaka bato kosala bafɛti mosusu?

 Te. Bamonaka ete moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye. (Yosua 24:15) Batatoli ya Yehova ‘bakumisaka bato ya ndenge nyonso,’ ata soki bazali bato ya lingomba boye to boye.​—1 Petro 2:17.

a Lisolo etángi bafɛti nyonso te oyo Batatoli ya Yehova baboyaka kosala; etángi mpe te batoli nyonso ya Biblia oyo bakoki kosalela mpo na bafɛti yango.

b Buku Mithra, Mithraism, Christmas Day & Yalda, ya K. E. Eduljee, nkasa 31-33.