Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te na losambo?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te na losambo?

 Bato mingi bamonaka ekulusu lokola elembo ya bokristo na mokili mobimba. Biso Batatoli ya Yehova tozali bakristo, kasi tosalelaka ekulusu te na losambo na biso. Mpo nani?

 Ya liboso, Biblia emonisi ete Yesu akufaki na ekulusu te, kasi nde na nzete moko mpamba. Lisusu, Biblia epesi bakristo mitindo ete ‘bákima losambo ya bikeko.’ Yango elingi koloba ete basengeli mpe te kosalela ekulusu na losambo.​—1 Bakorinti 10:14; 1 Yoane 5:21.

 Tóbosana te maloba oyo ya Yesu ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Na yango, Yesu amonisaki ete ezali bolingo ya solosolo nde ekomonisa baoyo bazali mpenza bayekoli na ye, kasi ekulusu to eloko mosusu te.