Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova batindaka bana na bango na makasi bálanda bindimeli na bango?

Batatoli ya Yehova batindaka bana na bango na makasi bálanda bindimeli na bango?

 Te, mpamba te kosambela Nzambe ezali ekateli ya moto ye moko. (Baroma 14:12) Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango mitinda ya Biblia, kasi ntango bana yango bakómi mikóló, bango moko nde basengeli kopona soki bakokóma Batatoli ya Yehova to te.​—Baroma 12:2; Bagalatia 6:5.

 Ndenge moko na baboti nyonso, Batatoli ya Yehova balingaka bana na bango bázala na bomoi ya malamu mpenza. Bateyaka bana na bango makambo oyo bamoni ete ekomemela bango bolamu: mosala ya kosala, bizaleli ya malamu, mpe mateya ya Biblia. Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia nde esalisaka bato bázala na bomoi ya malamu mpenza, yango wana bayekolaka na bana na bango Biblia mpe bamemaka bango na makita ya lisangá mpo bana yango báyeba malamu mateya ya Biblia. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Ntango mwana na mwana akokola, akopona soki akolanda to te mateya oyo baboti bandimaka.

 Batatoli ya Yehova babatisaka bana mike?

 Te. Biblia elobeli ata esika moko te batisimo ya bana mike. Na ndakisa, liboso ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso bázwa batisimo, bayokaki naino nsango, ‘bayambaki yango na motema mobimba,’ mpe babongolaki motema. (Misala 2:14, 22, 38, 41) Ndenge moko mpe, mpo moto azwa batisimo, asengeli koyeba malamu makambo oyo Biblia eteyaka, kondimela yango, mpe asengeli kozwa ekateli ya kosala makambo na kolanda oyo Biblia eteyaka. Mwana moke akoki kosala makambo yango te.

 Ntango bana bazali kokola, bakoki mbala mosusu kopona kozwa batisimo. Nzokande, mpo na kosala bongo, basengeli koyeba malamu ntina ya ekateli oyo bazali kozwa.

 Batatoli ya Yehova basundolaka bana na bango soki baboyi kozwa batisimo?

 Te. Atako baboti bakristo yango bayokaka mpenza mawa ntango mwana aponi nzela mosusu, bakobaka kolinga mwana yango mpe bakataka te boyokani ná ye kaka mpo aboyi kokóma Motatoli ya Yehova.

Moto nyonso, ata soki azali na mbula nini, asengeli ye moko kopona soki akozwa batisimo to te

 Mpo na nini Batatoli ya Yehova bamemaka bana na bango na mosala ya kosakola?

 Tomemaka bana na biso na mosala ya kosakola mpo na bantina mingi. a

  •   Biblia eyebisi baboti báteya bana na bango makambo ya Nzambe mpo básambela ye. (Baefese 6:4) Lokola kolobela kondima na biso epai ya basusu ezali mpe na kati ya losambo oyo topesaka Nzambe, mosala ya kosakola ezali moko ya makambo ya ntina oyo esalaka ete bana na biso báyeba makambo ya Nzambe.​—Baroma 10:9, 10; Baebre 13:15.

  •   Biblia elendisaka mingimingi bilenge ‘bákumisa nkombo ya Mokonzi.’ (Nzembo 148:12, 13, Biblia Liloba Lya Nzambe) Ndenge ya malamu ya kokumisa nkombo ya Nzambe ezali ya koyebisa basusu makambo na ye. b

  •   Bana bayekolaka makambo mingi ntango bazali kosakola elongo na baboti na bango. Na ndakisa bayekolaka ndenge ya kosolola na bato ya ndenge nyonso, mpe bakómaka na bizaleli mingi ya malamu lokola motema mawa, boboto, botosi, mpe komitya na esika ya basusu. Mosala ya kosakola esalisaka bana báyeba malamu mateya ya Biblia oyo esimbi makambo oyo bandimaka.

 Batatoli ya Yehova basalaka bafɛti?

 Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti ya mangomba to bafɛti mosusu oyo esepelisaka Nzambe te. c (2 Bakorinti 6:14-17; Baefese 5:10) Na ndakisa, tosalaka te bafɛti ya mbotama to ya Noele, oyo euti na Biblia te.

 Atako, bongo tosepelaka kolekisa ntango elongo na mabota mpe kopesa bana na biso bakado. Na kati ya mbula, tosepelaka mpe topesanaka bakado ntango nyonso oyo tolingi, na esika ya kozela kaka na mwa mabaku moko boye.

Baboti bakristo basepelaka kopesa bana na bango bakado

a Mbala mingi, bana ya Batatoli bazalaka elongo na moboti to mokóló moko na mosala ya kosakola.

b Biblia elobeli bana ebele oyo basanzolaki Nzambe na ndenge balobelaki mateya oyo bazalaki kondima.​—2 Bakonzi 5:1-3; Matai 21:15, 16; Luka 2:42, 46, 47.

d Topesi bango bankombo mosusu.