Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo ndako-nzambe to eklezia te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo ndako-nzambe to eklezia te?

 Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo Babiblia mosusu ebongoli na “ndako-nzambe” to “eklezia” elimbolaka ebele ya bato oyo basangani mpo na kosambela, kasi te esika oyo bayangani.

 Talá ndakisa oyo: Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Roma, atindelaki Akila ná mwasi na ye Prisile mbote, mpe abakisaki ete: “Bópesa pe mbote na Eklezya oyo esanganaka na ndako na bango.” (Baroma 16:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Na makanisi ya Paulo, atindaki mbote wana epai ya ndako moko boye te. Atindaki mbote na ye nde epai ya bato, elingi koloba lisangá oyo ezalaki kokutana na ndako wana. a

 Na yango, na esika tóbenga bisika na biso ya losambo ndako-nzambe to eklezia, tobengaka yango “Ndako ya Bokonzi.”

Mpo na nini “Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova”?

 Nkombo yango ebongi mpenza mpo na bantina ebele:

  •   Esika oyo toyanganaka ezalaka ndako.

  •   Tokutanaka wana mpo na kosambela Yehova, Nzambe oyo Biblia elobeli, mpe tolobelaka makambo na ye.​—Nzembo 83:18; Yisaya 43:12.

  •   Tokutanaka mpe mpo na koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu azalaki kolobela mbala na mbala.​—Matai 6:9, 10; 24:14; Luka 4:43.

 Tosɛngi yo okende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na bino mpo yo moko omona ndenge Batatoli ya Yehova basalaka makita na bango.

a Okokuta bandakisa mosusu ya ndenge wana na 1 Bakorinti 16:19; Bakolose 4:15; mpe na Filemo 2.