Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kozala na Ndako ya Bokonzi na esika ofandaka ezali na litomba nini?

Kozala na Ndako ya Bokonzi na esika ofandaka ezali na litomba nini?

Esali sikoyo mbula koleka nkama banda Batatoli ya Yehova batongaka bisika na bango ya losambo. Bisika yango ya losambo oyo ebengamaka Ndako ya Bokonzi, ezalaka mpe na kartye na bino? Ndenge nini Ndako ya Bokonzi ekoki komemela bato ya kartye na bino litomba?

Flowery Branch, Géorgie, U.S.A.

“Likabo kitoko mpo na bato ya kartye”

Batongaka Bandako ya Bokonzi na ndenge oyo ekobakisa kitoko ya kartye. Jason, oyo apesaka mabɔkɔ na kotambwisa mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi na États-Unis, alobi boye: “Mokano na biso ezalaka ete Ndako ya Bokonzi mokomoko ezala kitoko mpe ekesana na bandako nyonso ya kartye.” Ndeko mobali moko oyo asalaka elongo na ekipi oyo esalaka baplan; abakisi boye: “Tolingaka ete Ndako oyo tosilisi kotonga ezala likabo kitoko mpe esalisa baoyo bafandi zingazinga na yango.”

Baoyo batongaka Bandako ya Bokonzi ezali Batatoli ya Yehova oyo basalelaka ntango mpe mayele na bango mpe basepelaka mpenza kotonga bandako yango kitoko mpenza. Mbala mingi mosala kitoko oyo basalaka ebendaka likebi ya basusu. Na ndakisa, inspecteur moko oyo alandelaka makambo ya kotonga bandako alobaki ete nsamba ya Ndako ya Bokonzi oyo bauti kotonga na engumba Richmond, Texas, na États-Unis ezali kitoko koleka oyo amoná. Na esanga ya Jamaïque, inspecteur mosusu amemaki ekipi ya sika ya ba-inspecteur mpo básala vizite mpe alobaki na bango boye: “Bozali na ntina ya komitungisa te mpo na bato oyo. Batatoli ya Yehova balandelaka plan malamu mpenza, basalaka kutu koleka ndenge mibeko ya kotonga na mboka na biso esɛngi.” Inspecteur mosusu na engumba Floride, na États-Unis, alobaki boye: “Nalandelaki misala ya kotonga balopitalo mpe misala mosusu ya minene ya guvɛrnema, kasi moko te ebongisamaki malamu koleka oyo. Bino bosalaka mosala kitoko mpenza.”

Concession, Zimbabwe

Esalisaka baoyo bayanganaka kuna

Makita oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi ebongisaka bomoi ya baoyo bayanganaka na makita yango. Esalisaka bango báyeba kozala batata, bamama mpe bana malamu. Rod, oyo asalaka na ekipi oyo ebongisaka baplan ya kotonga Ndako ya Bokonzi, alobi boye: “Ndako ya Bokonzi mokomoko ezalaka esika ya mateya oyo elendisaka bizaleli malamu, bizaleli oyo ezalaka mpo na bolamu ya kartye mobimba.” Abakisi boye: “Ezali esika oyo okoki kozwa lisalisi mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Kuna okokuta bato ya boboto oyo bayebi koyamba bapaya mpe makita yango ememelaka moto nyonso oyo alingi kozwa libɔndisi mpe koyeba makambo mingi etali Nzambe litomba.”

Baoyo bayanganaka na Ndako ya Bokonzi batyelaka bato ya kartye likebi mpe bapesaka nokinoki lisalisi ntango likama ebimi. Na ndakisa na 2016, Batatoli ya Yehova babongisaki bandako 254 oyo mopɛpɛ makasi babengi Hurricane Matthew ebebisaki na Bahamas. Na kartye moko, mobange moko ya mbula 80 na nkombo Violet, oyo ndako na ye etondaki na mai, asololaki na ekipi ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kopesa lisungi mpe alobaki na bango akofuta bango mpo na mosala nyonso bakosala na ndako na ye. Baboyaki afuta bango, ata bongo babongisaki bisika nyonso oyo ekokaki kotangisa mai na ndako ya Violet mpo etanga lisusu te. Na nsima babongiselaki ye plafɔ ya salon ya ndako na ye. Violet ayambaki moto mokomoko ya ekipi yango mpe apesaki bango mersi mbala na mbala mpe alobaki boye: “Bozali mpenza bato ya Nzambe!”

Bad Oeynhausen, Rhénanie-du-Nord-Westphalie, Allemagne

‘Tosepeli ndenge Ndako ya Bokonzi ezali na kartye na biso’

Mpo Bandako ya Bokonzi ebatelama malamu, Batatoli ya Yehova batambwisaka programɛ moko ya kopesa bandeko oyo bayanganaka na Ndako ya Bokonzi formasyo mpo bábatela Ndako ya Bokonzi ezala kaka kitoko. Yango ebimisi mbuma malamu. Na ndakisa, na mwa mboka moko na Arizona, mwasi moko andimaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ntango babengisaki ye. Alobelaki ndenge Ndako yango ebatelamaki malamu mpe akamwaki ntango ayokaki ndenge balobelaki programɛ ya kobatela Ndako yango, oyo etalaki kobongisa lisusu Ndako yango oyo ebebaki naino te. Mwasi yango azalaki mokomi ya zulunalo moko ya engumba mpe na nsima atyaki na zulunalo yango lapolo etali ndenge Ndako ya Bokonzi ebatelamaka malamu. Na nsuka ya lapolo yango alobaki boye, “Tosepeli ndenge . . . Ndako ya Bokonzi ezali na kartye na biso.”

Okoki komona ndako ya Bokonzi na mokili mobimba na bisika nyonso. Tosɛngi yo osala vizite na Ndako ya Bokonzi ya kartye na bino. Bakoyamba yo na esengo mpenza.