Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini masangá ya Batatoli ya Yehova ebongisami?

Ndenge nini masangá ya Batatoli ya Yehova ebongisami?

 Bankulutu nde batambwisaka lisangá mokomoko. Masangá soki 20 esali oyo tobengaka zongazonga, mpe zongazonga soki 10 esali oyo tobengaka etúká. Ezali na bankulutu oyo bakendaka kotala masangá soki mbala mibale na mbula mpo na kolendisa bandeko; tobengaka bango bakɛngɛli ya zongazonga mpe bakɛngɛli ya etúká.

 Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo esalemi na Batatoli oyo baumeli mingi na lisangá, bapesaka biso malako oyo euti na Biblia mpe batambwisaka biso. Bandeko yango basalaka na babiro oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, oyo ezali na New York, na États-Unis.​—Misala 15:23-29; 1 Timote 3:1-7.