Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe azali kaka nguya moko boye?

Nzambe azali kaka nguya moko boye?

Eyano ya Biblia

 Nzambe asalelaka nguya na ye oyo ezangi nsuka na molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo na ndenge asalaki bamiliare na bamiliare ya minzoto, Biblia elobi boye: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, [Nzambe] abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.”​—Yisaya 40:25, 26.

 Kasi tosengeli koloba te ete Nzambe azali kaka nguya moko boye oyo eleki. Biblia emonisi ete Nzambe akoki kolinga to koyina. (Nzembo 11:5; Yoane 3:16) Emonisi mpe ete makambo oyo bato basalaka ekoki kosepelisa Ye to koyokisa Ye mpasi.​—Nzembo 78:40, 41.