Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango molongani na yo asali ekobo

Ntango molongani na yo asali ekobo

“Nayokaki mposa ya kokufa ntango mobali na ngai alobaki na ngai ete azali kotika ngai mpo azwi mwasi mosusu oyo azali naino elenge. Namonaki ete asalaki ngai mabe mpenza, mingimingi soki nakanisi mpasi oyo namoná mpo na ye.”​—Maria, moto ya Espagne.

“Ntango mwasi na ngai aboyaki ngai, namonaki lokola eloko moko na nzoto na ngai ekufi. Makambo nyonso tozalaki kokana mpe kobongisa elongo ekweaki na mai. Mikolo mosusu nazalaki kokanisa ete mpasi yango esili; kasi, okomona kaka ezongi lisusu makasi.”​—Bill, moto ya Espagne.

MOTO asilaka mpenza mayele soki molongani na ye asali ekobo. Ya solo, bato mosusu balimbisaka molongani oyo asali ekobo mpe basalaka makasi bábosana. * Kasi, libala ekufa, ekufa te, moto nyonso ayokaka mpasi mingi na motema soki molongani na ye asali ekobo. Moto ya ndenge wana akoki kosala nini?

MAKANISI YA BIBLIA OYO EKOKI KOSALISA

Biblia esalisá bato mingi oyo bazalaki na mpasi makasi na motema mpo molongani na bango asalaki ekobo. Bayekolaki ete Nzambe amonaka kolela na bango mpe ayebi mpasi na bango.​—Malaki 2:13-16.

“Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”​Nzembo 94:19.

Bill alobi boye: “Soki nazali kotánga vɛrsɛ wana, nazalaki komona Yehova lokola tata moko ya bolingo oyo azali kopakola ngai mwana na ye pomadi.”

“Epai ya moto ya sembo okozala sembo.”​Nzembo 18:25.

Carmen, oyo mobali na ye asalaki ekobo basanza ebele, alobi boye: “Mobali na ngai asalaki ngai mabe. Kasi, nakokaki kotyela Yehova motema ete akozala sembo epai na ngai. Akosundola ngai ata mokolo moko te.”

“Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ . . . kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino.”​Bafilipi 4:6, 7.

Sasha alobi boye: “Nazalaki kozongela vɛrsɛ yango mbala na mbala. Lokola nazalaki kobondela mingi, Nzambe asalisaki ngai nazwa kimya ya makanisi.”

Na ntango moko boye, bato nyonso oyo totángi na lisolo oyo bayokaki lokola bakómi na nsuka. Kasi, batyelaki Yehova motema mpe Liloba na ye epesaki bango makasi. Bill alobi boye: “Kondima na ngai esalisaki ngai namona ntina ya kozala na bomoi ntango makambo nyonso ebebaki. Na ntango moko boye natambolaki ‘na lobwaku ya molili makasi’; atako bongo, Nzambe atikaki ngai te.”​—Nzembo 23:4.

^ par. 4 Mpo na koyeba soki osengeli kolimbisa to te, talá masolo oyo ebimaki na Lamuká! ya sanza ya zomi 1999, na motó ya likambo “Okosala nini soki mobali na yo to mwasi na yo asali ekobo?