Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango obɛli maladi ya makasi

Ntango obɛli maladi ya makasi

“Ntango monganga ayebisaki ngai ete nazali na kanser, nayokaki lokola bakateli ngai etumbu ya liwa. Kasi, ntango nazongaki na ndako, nalobaki boye na motema: ‘Nakanisaki te ete ekozala bongo; sikoyo, nasengeli koluka makasi ya koyika mpiko.’”​—Linda, azali na mbula 71.

“Nabɛlaka maladi oyo ebomaki ngai elongi na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi. Lokola mpasi elekaka makasi, na ntango moko boye, nakómaki konyokwama na makanisi. Mbala mingi ekómelaki ngai namona ete nazangi moto ya kosalisa ngai mpe nakanisaki komiboma.”​—Elise, azali na mbula 49.

SOKI yo moko, ndeko to moninga na yo asilá kobɛla maladi oyo ekoki komema na liwa, oyebi ete likambo yango etungisaka mingi. Longola mpasi ya maladi yango moko, moto akómaka konyokwama na makanisi. Kobanga mpe motungisi ekoki kobakisama mpo na makambo lokola kokutana na monganga, mokakatano mpo na kozwa lisalisi to kofuta mbongo ya lopitalo, mpe mpasi oyo bankisi mosusu to bantonga esalaka. Motungisi mpo na maladi moko ya makasi ekoki mpenza konyokola moto.

Nani akoki kosalisa biso na likambo ya ndenge wana? Bato mingi bamonaki ete kobondela mpe kotánga mikapo ya Biblia oyo elendisaka esalisaki bango mingi. Likambo mosusu oyo esalisaka mingi ezali bolingo mpe lisungi ya bandeko mpe baninga.

MAKAMBO OYO BATO MOSUSU BASALAKI

Robert, oyo azali na mbula 58, apesi toli oyo: “Ntango ozali kobunda na maladi, batelá kondima epai ya Nzambe, mpe ye akopesa yo makasi. Bondeláká Yehova. Yebisáká ye ndenge ozali koyoka. Sɛngáká ye elimo santu. Sɛngáká ye makasi mpo olendisaka libota na yo mpe omitungisaka mingi te mpo na maladi na yo.”

Abakisi boye: “Esalaka malamu mingi soki libota na yo ezali kolendisa yo, soki bazali kotika yo te. Mokolo na mokolo, ata moto moko to bato mibale babengaka ngai na telefone mpo na kotuna soki nalamuki ndenge nini. Baninga ya bipai na bipai balendisaka ngai. Bapesaka ngai mpenza makasi, mpe yango esalisaka ngai nalɛmba nzoto te.”

Soki okei kotala moninga moko oyo azali maladi, kobosana te likambo oyo Linda alobi: “Moto ya maladi alingaka azala na bomoi lokola moto nyonso mpe ntango mosusu akoki kolinga ete bóbɛta na ye lisolo ya maladi te. Yango wana, sololá na ye makambo mosusu oyo bomesaná kosolola.”

Soki Nzambe azali kopesa yo makasi mpe Liloba na ye ezali kolendisa yo, bandeko ya libota mpe baninga bazali kotika yo te, okomona ete kozala na bomoi ezali kaka na ntina, ata soki ozali kobɛla maladi ya makasi.