Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | OKONDIMA LIKABO YA NZAMBE OYO ELEKI MAKABO NYONSO?

Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?

Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?

Nini esalaka ete likabo ezala na valɛrɛ na miso na yo? Na ntembe te etaleli mpe makambo minei oyo elandi: (1) Nani apesaki yo yango, (2) mpo na nini apesaki yo, (3) milende oyo asalaki mpo apesa yo likabo yango, mpe (4) soki likabo yango ekokisi mpenza mposa na yo. Kokanisa na makambo yango ekoki kosalisa biso tómonisa lisusu botɔndi na lisiko, likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso.

NANI APESAKI YANGO?

Tozwaka makabo mosusu na valɛrɛ mingi mpo mokonzi to moto oyo topesaka lokumu nde apesaki biso. Makabo mosusu, ata soki ezali ya ntalo mingi te, tozwaka yango na valɛrɛ soki euti epai ya ndeko ya libota to moninga moko ya motema. Ezalaki mpe bongo mpo na likabo oyo Russell apesaki Jordan, oyo tolobeli na lisolo oyo eleki. Yango etaleli likabo ya lisiko na nini?

Ya liboso, Biblia elobi ete “Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoane 4:9) Likambo yango nde esali ete lisiko ezala na valɛrɛ mingi. Moto moko te aleki Nzambe na bokonzi. Mokomi ya Nzembo akomaki boye mpo na Nzambe: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Nzembo 83:18) Tokokaki te kozwa likabo ya ndenge wana epai ya Nzambe.

Ya mibale, Nzambe azali “Tata na biso.” (Yisaya 63:16) Na ndenge nini? Apesá biso bomoi. Longola yango, atyelaka biso mpenza likebi kaka ndenge tata oyo alingaka bana na ye asalaka. Ntango alobaki na basaleli na ye mosusu ya ntango ya kala, Nzambe atunaki bango boye: “Efraime azali nde mwana ya motuya epai na ngai, to mwana oyo nalɛngɛlaka? . . . Yango wana misɔpɔ na ngai ekómi na yikiyiki. Nakoyokela mpenza ye mawa.” (Yirimia 31:20) Nzambe ayokaka mpe bongo mpo na basambeli na ye lelo oyo. Azali Mokeli na biso oyo aleki na nguya nyonso, azali Tata mpe moninga na biso ya sembo. Omoni te ete yango nde ezali kosala ete likabo nyonso oyo euti epai na ye ezala mpenza na valɛrɛ?

MPO NA NINI APESAKI YANGO?

Makabo mosusu ezalaka na valɛrɛ mingi mpo bapesaki yango na bolingo, kasi na kotindikama te. Moto oyo apesi na motema moko azelaka te ete báfuta ye mpo na boboto oyo amonisi.

Nzambe apesaki Mwana na ye mpo alingaka biso. Biblia elobi ete “bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki.” Mpo na nini? “Mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoane 4:9) Esengelaki Nzambe asala bongo? Te! “Lisiko oyo Kristo Yesu afutaki,” emonisaka “boboto monene” ya Nzambe.Baroma 3:24.

Mpo na nini likabo ya Nzambe ezali elembo ya “boboto monene”? Biblia elobi: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Baroma 5:8) Bolingo nde etindaki Nzambe asalisa biso bato ya masumu mpe ya bolɛmbu, oyo tozangaki elikya. Tobongaki te na bolingo ya ndenge wana mpe tozali na likoki te ya kofuta ye. Likabo yango emonisi bolingo monene oyo moto mosusu amonisá naino te na mokili.

MILENDE NINI ASALAKI MPO APESA YANGO?

Makabo mosusu ezalaka na valɛrɛ mingi mpo emonisaka milende oyo moto asalaki mpo apesa yango. Soki moto asepeli kopesa biso eloko moko oyo ezali na valɛrɛ mingi na miso na ye, na ntembe te tozwaka eloko yango na valɛrɛ mpenza mpo asalaki milende.

Nzambe “apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.” (Yoane 3:16) Apesaki biso moto oyo ye alingaka mingi mpenza. Na boumeli ya ebele ya bambula oyo Nzambe azalaki kokela molɔ́ngɔ́, Yesu azalaki kosala elongo na ye mpe akómaki “moto oyo ye azalaki kolinga mingi mpenza.” (Masese 8:30) Yesu azali Mwana oyo Nzambe alingaka mpe “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.” (Bakolose 1:13-15) Bango mibale bakómaki na boyokani makasi mingi koleka.

Ata bongo, Nzambe “abombaki kutu Mwana na ye te.” (Baroma 8:32) Yehova apesaki biso likabo oyo eleki motuya na miso na ye. Esɛngaki ye mingi mpo apesa yango.

EKOKISI MPENZA MPOSA NA BISO

Makabo mosusu ezalaka na valɛrɛ mpo ekokisaka mposa ya moto, ata ya ntina mingi mpenza. Na ndakisa, okomonisa mpenza botɔndi soki moto moko afuti mbongo mpo básalisa yo na maladi moko oyo olingaki kokufa na yango mpo ozangaki mbongo ya komisalisa! Likabo yango ekozala mpenza na valɛrɛ na miso na yo, bongo te?

“Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” (1 Bakorinti 15:22) Lokola tozali bana ya Adama, biso nyonso ‘tokufaka,’ tozangi likoki ya kokima maladi to liwa to mpe komizongisa na boyokani elongo na Nzambe mpe komilongola na ngambo oyo tomemá liboso na ye. Lokola tozali bato, tozali na likoki te ya komizongisa mpe kozongisa bato mosusu “na bomoi.” Biblia elobi boye: “Moko na bango akoki kosikola ndeko na ye ata moke te . . . Ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Nzembo 49:7, 8) Tozalaki mpenza na mposa ya lisalisi mpo tozangaki likoki ya kofuta lisiko. Soki básalisaka biso te, tolingaki kozala na elikya te.

Na bolingo na ye, Yehova apesaki “lisalisi” oyo esɛngaki mpo tóbika mpo na nzela ya Yesu, ‘biso nyonso tózongisama na bomoi.’ Ndenge nini lisiko esalaka yango? ‘Makila ya Yesu Mwana na ye epɛtolaka biso na lisumu nyonso.’ Ya solo, komonisa kondima na makila oyo Yesu asopaki, efungolaka nzela mpo na kolimbisama masumu mpe kozwa bomoi ya seko. (1 Yoane 1:7; 5:13) Lisiko ekosala nini mpo na bandeko to baninga na biso oyo bakufá? “Lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko [Yesu].”1 Bakorinti 15:21. *

Mbeka ya Yesu ezali likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Yehova apesá na bolingo mingi mpenza. Moto moko te akoki kosala oyo Yehova Nzambe asalelá biso. Mpe ezali na likabo mosusu te oyo ekokisá mposa ya bato ya kolongwa na etumbu ya lisumu mpe liwa. Ya solo, lisiko ezali likabo oyo eleki makabo mosusu nyonso!

 

^ par. 19 Mpo na koyeba makambo mosusu etali mokano ya Nzambe mpo na lisekwa, talá buku Makambo oyo Biblia eteyaka, mokapo 7, ebimisami na Batatoli ya Yehova ezali mpe na www.pr418.com.