Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Bobola

Bobola

Atako bato bazali kosala mpenza milende mpo na kosilisa bobola, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kaka babola.

Ndenge nini babola bakoki kozala na esengo?

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi bakanisaka ete esengo eutaka na biloko ya kobikela mpe mpo moto amonana ete alongi na bomoi, etalelaka mingimingi mbongo oyo azali na yango. Balobaka ete babola bakoki kozala na bomoi ya esengo te mpo batángá mingi te to batángá te, bazwaka lisalisi ya minganga ya malamu te mpe mpo bazangá makambo mosusu ya malamu.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia eteyaka ete esengo ya solosolo eutaka te na biloko oyo moto azali na yango, kasi na boyokani oyo azali na yango na Nzambe. Biblia elobi boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Ata soki bazali bazwi to babola, baoyo bayebi bobola na bango ya elimo balukaka makanisi ya Nzambe na makambo nyonso mpe bakoki koyekola solo ya Biblia oyo elendisaka mpenza mpe epesaka kimya ya makanisi. Yango nde epesaka mpenza esengo ya solosolo.

Baoyo bayebi mpe basalelaka batoli ya Biblia, bayebaka ndenge ya kosala mpo bákelela koleka ndelo te. Na ndakisa, batoli ya Biblia esalisaka bato báboya bizaleli ya mabe, lokola komɛla makaya mpe kolangwa masanga. Bizaleli ya ndenge wana esilisaka moto mbongo mpe ekoki kosala ete abɛla bamaladi oyo esɛngaka mbongo mingi mpo na kozwa lisalisi ya minganga.​—Masese 20:1; 2 Bakorinti 7:1.

Biblia ekebisaka mpe na makama oyo lokoso mpe kolinga mingi biloko ya mokili ebimisaka. (Marko 4:19; Baefese 5:3) Batoli ya ndenge wana ekoki kosalisa moto abebisaka mbongo te na masano ya mbongo to akóma te na “bolingo ya mbongo,” oyo Biblia emonisi ete ezali “mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” (1 Timote 6:10) Biblia elobi boye: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Na mokuse, ata mbongo ya ndenge nini ekoki kosomba bomoi te. Kutu, kosalela batoli ya Biblia nde esalaka ete bomoi ya moto ezala na ntina mpe azala na esengo ya solosolo.

Atako babola bazalaka na mokakatano ya kozwa biloko ya kolya, bilamba mpe esika ya kolala, bakoki kozala na esengo soki bazali kosepela na oyo bazali na yango, bazali kosala makambo oyo esepelisaka Mozalisi na bango mpe bazali kosala mokano na ye. Bamonaka mpenza ete elaka ya Biblia oyo ezali solo: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.”​—Masese 10:22.

VƐRSƐ YA NTINA MINGI: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​Matai 5:3.

Bobola ekosila mokolo mosusu?

OYO BIBLIA ELOBI

Atako milende ya bato mpo na kosilisa bobola elongi te, na ntango oyo ebongi Nzambe akotya likebi na likambo mpenza oyo esalaka ete babola bázala​—ezaleli ya moimi oyo bato mpe baguvɛrnema bazalaka na yango ya koluka kaka matomba na bango moko. (Mosakoli 8:9) Mozalisi na biso akolongola baguvɛrnema ya bato mpo elukaka kaka bolamu na yango moko mpe akotya guvɛrnema to Bokonzi na ye oyo ekokokisa bamposa ya bato nyonso awa na mabele kozanga kopona bilongi. Biblia elaki polele ete Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe akoyokela babola mawa mpe akokokisa bamposa na bango. “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi . . . Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.”​—Nzembo 72:12-14.

Mabele ekokóma paradiso ya solosolo epai bato nyonso bakozala na bandako mpe bilei mpe bobola ekozala ata moke te. Na mokanda ya Yisaya, Nzambe alaki ete bato na ye “bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. . . . Bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.” (Yisaya 65:21, 22) Na esika bázala na bomoi ya mpasi, bato nyonso bakozala nde na “fɛti moko ya bilei ya mafuta mpenza” mpe biloko mosusu ya malamu oyo Yehova akopesa bango.​—Yisaya 25:6.

ETALI YO NA NINI?

Kokanisa na elaka ya Nzambe ya kolongola bobola na mokili epesaka baoyo bazali konyokwama elikya ete Nzambe atyelaka bango likebi mpe ete etikali moke bampasi na bango esila. Kotyela elikya yango motema ekoki kopesa moto makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo azali kokutana na yango.

VƐRSƐ YA NTINA MINGI: “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi . . . Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.”​Nzembo 72:12, 13.