Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yoane Mobatisi azalaki nani?

Yoane Mobatisi azalaki nani?

Eyano ya Biblia

 Yoane Mobatisi azalaki mosakoli ya Nzambe. (Luka 1:76) Abotamaki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso L.T.B. mpe azalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Nzambe apesaki ye mokumba ya kobongisela Masiya, to Kristo nzela. Yoane asalaki yango ntango azalaki kosakola nsango ya Nzambe epai ya bandeko na ye Bayuda mpo bázongela Nzambe.​—Marko 1:1-4; Luka 1:13, 16, 17.

 Nsango oyo Yoane asakolaki esalisaki bayoki ya mitema sembo bándima Yesu Monazarete lokola Masiya oyo alakamaki. (Matai 11:10) Yoane asɛngaki bayoki na ye bábongola mitema mpo na masumu na bango mpe na nsima bázwa batisimo lokola elembo ya kobongola motema. (Luka 3:3-6) Lokola abatisaki bato mingi, Yoane abengami Mobatisi to moto oyo abatisaka basusu. Batisimo ya Yesu nde ezalaki na ntina mingi koleka batisimo nyonso oyo Yoane abatisaki bato. a​—Marko 1:9.

Na lisolo oyo tokolobela:

 Nini nde esalaki ete bato mosusu bákokana na Yoane te?

 Makambo oyo asalaki na bomoi esakolamaki: Na nzela ya mosala na ye ya kosakola, Yoane akokisaki esakweli oyo elobeli momemi-nsango ya Yehova. (Malaki 3:1; Matai 3:1-3) Amonisaki ete ye nde moto oyo ‘akolɛngɛlɛla Yehova bato oyo babongisami,’ elingi koloba, abongiselaki bandeko na ye Bayuda nzela mpo bándima nsango ya Yesu Kristo, momonisi ya libosoliboso ya Yehova Nzambe.​—Luka 1:17.

 Libula na ye: Yesu alobaki ete ‘moto oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki ye.’ (Matai 11:11) Lokola Yoane azalaki kaka te mosakoli kasi mpe “momemi-nsango” oyo asakolamaki, mosaleli moko te ya Nzambe oyo azalaki na bomoi liboso na ye akokaki koleka ye. Maloba ya Yesu emonisi mpe ete akozala te kati ya bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya likoló. b Mosakoli oyo ya sembo akufaki liboso Kristo afungola nzela ya kozala na bomoi na likoló. (Baebre 10:19, 20) Kasi, Yoane akozala awa na mabele na nse ya Bokonzi ya Nzambe, na elikya ya bomoi ya seko na Paradiso.​—Nzembo 37:29; Luka 23:43.

 Banani bazalaki baboti ya Yoane?

 Baboti ya Yoane bazalaki babalani moko na nkombo ya Zekaria mpe Elizabeti. Zekaria azalaki nganga-nzambe Moyuda. Kobotama ya Yoane ezalaki likamwisi, mpo mama na ye azalaki ekomba, to azalaki kobota bana te. Lisusu, Elizabeti ná Zekaria bakómaki “na mbula mingi mpenza.”​—Luka 1:5-7, 13.

 Nani nde abomisaki Yoane Mobatisi?

 Mokonzi Erode Antipasi asɛngaki bákata Yoane motó. Asalaki yango mpo na mwasi na ye, Erodiadi oyo asɛngaki na nzela ya mwana na ye ya mwasi báboma Yoane. Erodiadi azalaki koyina Yoane mpo Yoane alobaki na Erode, oyo azalaki kotuta ntolo ete azali Moyuda, ete libala na ye elongo na Erodiadi ezalaki libala oyo endimami te na mibeko ya Bayuda.​—Matai 14:1-12; Marko 6:16-19.

 Yoane Mobatisi awelanaki na Yesu?

 Biblia elobi te ete Yoane ná Yesu bawelanaki mokolo moko. (Yoane 3:25-30) Kutu, Yoane ayebaki ete azalaki na mokumba ya kobongisela Masiya nzela, kasi te ya kosilisa kobongisa yango elongo na ye. Yoane alobaki boye: “Nayaki kobatisa na mai mpo ye amonisama epai ya Yisraele.” Na nsima abakisaki boye: “Oyo azali Mwana ya Nzambe.” (Yoane 1:26-34) Yango wana, Yoane asepelaki mingi ntango ayokaki ete mosala ya Yesu ezalaki kobota mbuma mingi.

a Yesu “asalaki lisumu te.” (1 Petro 2:21, 22) Atako bongo batisimo oyo azwaki, ezalaki te mpo asengelaki kobongola motema, kasi emonisaki ete Yesu amimonisaki mpo na kosala mokano ya Nzambe. Ezala mpe ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso.​—Baebre 10:7-10.

b Talá lisolo “Nani akokende na likoló?