Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe azalaka bisika nyonso?

Nzambe azalaka bisika nyonso?

Eyano ya Biblia

 Nzambe azali na likoki ya komona makambo nyonso mpe ya kosala likambo esika nyonso alingi. (Masese 15:3; Baebre 4:13) Kasi, Biblia eteyaka te ete Nzambe azalaka bisika nyonso. Kutu, emonisi nde ete azalaka mpenza mpe azali na esika oyo afandaka.

  •   Ndenge Nzambe azalaka: Nzambe azali moto ya elimo. (Yoane 4:24) Bato bakoki komona ye te. (Yoane 1:18) Bimonaneli ya Nzambe oyo ezali na Biblia emonisaka ete Nzambe azali na esika mpenza oyo afandaka. Emonisi te ete azalaka bisika nyonso.​—Yisaya 6:1, 2; Emoniseli 4:2, 3, 8.

  •   Esika Nzambe afandaka: Nzambe afandaka na esika oyo emonanaka na miso ya bato te, esika oyo ekeseni mpenza na biloko oyo asalá. Kuna nde ezali ‘esika oyo afandaka, na likoló.’ (1 Bakonzi 8:30) Biblia elobeli libaku moko oyo bikelamu ya elimo “bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova,” a mpo na komonisa ete Nzambe afandaka na esika oyo eyebani.​—Yobo 1:6.

Soki Nzambe azalaka bisika nyonso te, akoki mpenza kotyela ngai likebi?

 Ɛɛ. Nzambe atyelaka mpenza bato likebi. Atako afandaka na esika oyo emonanaka na miso ya bato te, amonaka bato nyonso awa na mabele, baoyo bazalaka na mposa ya kosepelisa ye mpe asalisaka bango. (1 Bakonzi 8:39; 2 Ntango 16:9) Tótala ndenge Yehova amonisaka ete atyelaka basambeli na ye likebi:

  •   Ntango ozali kobondela: Yehova akoki koyoka libondeli na yo ntango kaka obondeli.​—2 Ntango 18:31.

  •   Ntango onyokwami na makanisi: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

  •   Ntango ozali na mposa ya litambwisi: Yehova ‘akopesa yo mayele ya kososola mpe akoteya yo’ na nzela ya Liloba na ye, Biblia.​—Nzembo 32:8.

Libunga oyo bato basalaka ntango balobaka ete Nzambe azalaka bisika nyonso

 Libunga: Nzambe azalaka bisika nyonso na biloko oyo akelá.

 Solo: Nzambe afandaka na mabele te, afandaka mpe te na likoló oyo tomonaka na miso. (1 Bakonzi 8:27) Toboyi te, minzoto mpe biloko mosusu oyo akelá “ezali kosakola nkembo ya Nzambe.” (Nzembo 19:1) Kasi, Nzambe afandaka te na biloko oyo akelá kaka ndenge moto oyo asalaka biloko ya ntɔki (artiste) akoki te kofanda na mayemi oyo asali. Ata bongo, liyemi ekoki kosalisa biso tóyeba mwa makambo etali moto yango. Ndenge moko mpe, biloko oyo ezali na mokili esalisaka biso tóyeba ‘bizaleli oyo emonanaka te’ ya Mokeli na biso na ndakisa, nguya, bwanya mpe bolingo.​—Baroma 1:20.

 Libunga: Nzambe asengeli kozala bisika nyonso mpo ayebaka makambo nyonso mpe azala na nguya nyonso.

 Solo: Elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalaka na yango mosala. Na lisalisi ya elimo santu na ye, Nzambe akoki komona mpe kosala eloko nyonso, ezala na esika nini, na ntango nini kozanga ete ye moko azala wana.​—Nzembo139:7.

 Libunga: Nzembo 139:8 eteyaka ete Nzambe azalaka bisika nyonso mpo elobi: “Soki namati na likoló, ozali kuna; Mpe soki natandi mbeto na ngai na Nkunda, talá! ozali kuna.”

 Solo: Vɛrsɛ yango elobeli te esika Nzambe afandaka. Na elobeli ya bapowɛti, eteyi nde ete ezali ata na esika moko te oyo eleki mosika mpo epekisa Nzambe kosalisa biso.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.