Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nani azalaki mwasi ya Kaina?

Nani azalaki mwasi ya Kaina?

Eyano ya Biblia

 Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva, abalaki moko ya bandeko na ye ya basi to mwana ya ndeko na ye. Tokoki koloba bongo na kotalela oyo Biblia elobi na ntina etali Kaina mpe libota na ye.

Makambo etali Kaina mpe libota na ye

  •   Bato nyonso bautá epai ya Adama ná Eva. Nzambe, “na moto moko [Adama] asalaki bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele.” (Misala 17:26) Eva, mwasi ya Adama akómaki “mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (Ebandeli 3:20) Boye, Kaina abalaki moko ya bana to bankɔkɔ ya Adama ná Eva.

  •   Kaina ná ndeko na ye Abele bazali na molɔngɔ ya liboso ya bana oyo Eva abotaki. (Ebandeli 4:1, 2) Ntango Nzambe abenganaki Kaina mpo abomaki ndeko na ye, Kaina amilelaki boye: “Moto oyo akomona ngai akoboma ngai.” (Ebandeli 4:14) Kaina azalaki kobanga banani? Biblia elobi ete Adama “abotaki bana mibali mpe bana basi.” (Ebandeli 5:4) Emonani ete bana wana mosusu ya Adama ná Eva bakokaki kosala Kaina mabe.

  •   Na ebandeli mpenza ya istware ya bato, bandeko bazalaki kobalana na bango. Na ndakisa, Abrahama, moto ya sembo abalaki mwana ya tata na ye. (Ebandeli 20:12) Mbala ya liboso oyo bapekisaki libala ya ndenge wana ezalaki na Mibeko oyo Nzambe apesaki Moize, bankama ya bambula nsima ya eleko ya Kaina. (Balevi 18:9, 12, 13) Emonani ete bana oyo bandeko na bandeko bazalaki kobota na ntango wana bazalaki te na bamaladi oyo bana babotamaka na yango lelo soki baboti na bango bazali bato ya libota moko.

  •   Biblia emonisaka ete istware ya Adama na Eva mpe libota na bango ezali istware ya solo. Bankombo ya bana mpe bankɔkɔ ya Adama ezwami kaka te na mokanda ya Ebandeli oyo Moize akomaki, kasi mpe na makomi ya Ezera mpe Luka. (Ebandeli 5:3-5; 1 Ntango 1:1-4; Luka 3:38) Bato oyo bakomaki Biblia balobeli istware ya Kaina lokola likambo moko oyo esalemá mpenza.​—Baebre 11:4; 1 Yoane 3:12; Yuda 11.