Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nazali komona bomoi na ngai ntina te​—Lingomba, Nzambe, to Biblia ekoki kosalisa ngai?

Nazali komona bomoi na ngai ntina te​—Lingomba, Nzambe, to Biblia ekoki kosalisa ngai?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Biblia, buku moko ya kala oyo etondi na bwanya, epesi biyano na mituna minene oyo bato bamitunaka mpo na bomoi, mpe ekoki kosalisa yo omiyoka malamu mpe omona ete bomoi na yo ezali na ntina. Talá mwa mituna oyo Biblia epesi biyano.

  1.   Mozalisi azalaka? Biblia elobi ete Nzambe ‘azalisaki biloko nyonso.’ (Emoniseli 4:11) Lokola Nzambe azali Mozalisi na biso, ayebi nini tosengeli na yango mpo tómiyoka malamu mpe tómona ete bomoi na biso ezali na ntina.

  2.   Nzambe akipaka ngai? Biblia emonisi ete akimaka bato te; elobi nde ete Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Akipaka makambo oyo ekómelaka yo mpe alingi kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu.​—Yisaya 48:17, 18; 1 Petro 5:7.

  3.   Koyeba Nzambe ekoki mpenza kosalisa ngai nazala malamu? Nzambe akelá biso na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe; tobotamaka na mposa ya koyeba ntina ya bomoi na biso. (Matai 5:3) Mpo na kokokisa mposa yango, tosengeli koyeba Mozalisi na biso mpe kokóma baninga na ye. Nzambe akosepela na milende oyo ozali kosala mpo na koyeba ye, mpo Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

 Bamilio ya bato bamoni ete kokóma moninga ya Nzambe ebongisi bomoi na bango mpe emonisi bango ete bomoi ezali na ntina. Atako bampasi na yo nyonso ekosila te soki oyebi Nzambe, bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo

 Mangomba mingi oyo basalelaka Biblia balandaka mpenza mateya na yango te. Kasi lingomba ya solo, oyo elandaka mpenza oyo Biblia elobi, ekosalisa yo oyeba Nzambe.