Lakisá makambo oyo ezali na kati

Etumba ya Armagedone ezali nini?

Etumba ya Armagedone ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Etumba ya Armagedone ezali etumba ya nsuka oyo baguvɛrnema ya mokili ekobunda na Nzambe. Baguvɛrnema yango ná bato oyo bazali kopesa yango mabɔkɔ bazali kotɛmɛla Nzambe ata lelo na ndenge bazali koboya kondima boyangeli na ye. (Nzembo 2:2) Etumba ya Armagedone ekosukisa boyangeli ya bato.​—Danyele 2:44.

 Na Biblia, liloba “Armagedone” ezali kaka na esika moko, na Emoniseli 16:16. Na kolanda esakweli ya Emoniseli, “bakonzi ya mabele mobimba” bakoyanganisama “na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone,” “mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”​—Emoniseli 16:14.

 Banani bakobunda na Armagedone? Yesu Kristo akokamba limpinga moko ya basoda ya likoló mpo na kosukisa banguna ya Nzambe. (Emoniseli 19:11-16, 19-21) Banguna yango ezali bato oyo baboyi kondima ete Nzambe azali mokonzi mpe bazali kotyola ye.​—Ezekiele 39:7.

 Etumba ya Armagedone ekozala mpenza na Moyen-Orient? Te. Etumba ya Armagedone ekozala kaka na esika moko te; ekosalema na mabele mobimba.​—Yirimia 25:32-34; Ezekiele 39:17-20.

 Armagedone, to “Har–Magedon” (na Ebre Har Meghiddohnʹ), elimboli “Ngomba ya Megido.” Na ntango ya kala, Megido ezalaki engumba moko ya ekólo Yisraele. Masolo ya kala emonisi ete bitumba minene ebundamaki pene ya engumba yango, mpe Biblia elobeli bitumba yango mosusu. (Basambisi 5:19, 20; 2 Bakonzi 9:27; 23:29) Kasi, Armagedone ekoki te kozala esika wana pene ya engumba Megido ya kala. Kuna, ngomba monene oyo ekokoka banguna nyonso ya Nzambe ezali te; ata lobwaku ya patatalu ya Yizireele oyo ezali wana pembeni ekokoka bango te. Armagedone ezali nde kosangana oyo bikólo ya mokili mobimba bakosangana mbala ya nsuka mpo na kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe.

 Makambo ekozala ndenge nini na ntango ya etumba ya Armagedone? Toyebi te ndenge oyo Nzambe akosalela nguya na ye; kasi toyebi ete akosalela biloko oyo asalelaki na ntango ya kala, na ndakisa mbula ya mabanga, koningana ya mabele, mpela, mɔtɔ mpe sufulu, mokalikali, mpe maladi mabe. (Yobo 38:22, 23; Ezekiele 38:19, 22; Habakuku 3:10, 11; Zekaria 14:12) Lokola banguna ya Nzambe bakobulungana, bamosusu bakobomana bango na bango, kasi nsukansuka bakoyeba ete Nzambe nde azali kobundisa bango.​—Ezekiele 38:21, 23; Zekaria 14:13.

 Armagedone ekozala nde nsuka ya mokili? Mabele ekobebisama te, mpo ezali esika oyo bato basengeli kofanda mpo na libela. (Nzembo 37:29; 96:10; Mosakoli 1:4) Armagedone ekobebisa bato nyonso te; ekobikisa nde bato mpo “ebele mpenza ya bato” oyo bazali basaleli ya Nzambe bakobika.​—Emoniseli 7:9, 14; Nzembo 37:34.

 Kasi na Biblia, liloba “mokili” elimbolaka kaka mabele te; elimbolaka mpe bato ya mabe oyo batɛmɛlaka Nzambe. (1 Yoane 2:15-17) Na kolanda ndimbola wana, Armagedone ekozala mpenza “suka ya mokili.”​—Matai 24:3, Bible na lingala ya lelo oyo.

 Armagedone ekosalema ntango nini? Ntango Yesu alobelaki ‘bolɔzi monene,’ oyo ekosuka na etumba ya Armagedone, alobaki boye: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:21, 36) Atako bongo, Biblia emonisi ete Armagedone ekosalema na ntango ya kozala ya Yesu, oyo ebandaki na 1914.​—Matai 24:37-39.