Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ya Bedell​—Mwa mosala oyo esalisi bato báyeba Biblia malamu

Biblia ya Bedell​—Mwa mosala oyo esalisi bato báyeba Biblia malamu

NTANGO William Bedell, mokonzi moko ya lingomba ya Katolike oyo azalaki moto ya Angleterre akendaki na Irlande na 1627, amonaki likambo moko oyo ekamwisaki ye. Irlande, ekólo oyo bato mingi bazalaki bandimi ya lingomba ya Katolike, ezalaki koyangelama na Baprotesta ya Grande-Bretagne. Bato oyo basalaki lingomba ya Protesta babongolaki Biblia na minɔkɔ ya mboka na Mpoto mobimba. Kasi, emonanaki ete bakipaki te kobongola yango na monɔkɔ ya Irlandais.

Bedell amonaki mpenza ete bato ya Irlande “basengelaki te kosundolama tii ntango bakoyekola monɔkɔ ya Anglais.” Azwaki mokano ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Irlandais. Kasi akutanaki na botɛmɛli ya makasi mpenza, mingimingi epai ya Baprotesta. Mpo na nini?

BAPEKISAKI KOSALELA MONƆKƆ YA IRLANDAIS

Bedell azwaki ekateli ya koyekola monɔkɔ ya Irlandais. Alendisaki bana-kelasi básalelaka monɔkɔ yango ntango akómaki mokambi ya Trinity College na Dublin mpe na nsima, ntango akómaki episkɔpɔ-mokonzi ya Kilmore. Kutu, ntango mokonzi-mwasi Élisabeth Ire ya Angleterre asalaki Trinity College, ezalaki mpo na kobimisa bapastɛrɛ oyo bakoteya bato na ye nsango ya Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango. Bedell amekaki kosala bongo.

Na diosɛzɛ ya Kilmore, bato mingi koleka bazalaki koloba monɔkɔ ya Irlandais. Yango wana Bedell azalaki na mposa ya bapastɛrɛ oyo bakokaki koloba monɔkɔ ya Irlandais. Azwaki likanisi yango na kolanda maloba ya ntoma Paulo na 1 Bakorinti 14:19, oyo elobi boye: “Na lisangá nakosepela nde koloba maloba mitano na makanisi na ngai, mpo nakoka mpe kolakisa bamosusu na monɔkɔ, na esika ya maloba nkóto zomi (10 000) na monɔkɔ moko boye,” elingi koloba, na monɔkɔ oyo bato bakoyoka mpenza te.

Kasi, bakonzi basalaki nyonso mpo na kopekisa mosala na ye. Bato ya istware balobi ete, bamosusu balobaki ete kosalela monɔkɔ ya Irlandais “ezalaki likama mpo na mboka” mpe bamosusu balobaki ete ezalaki “mpo na matomba ya guvɛrnema te.” Bamosusu bamonaki ete ekozala mpo na litomba ya Angleterre soki bato ya Irlande bayebi eloko te. Kutu, babimisaki mibeko oyo esɛngaki bato ya Irlande básundola monɔkɔ mpe mimeseno ya mboka na bango mpe báyekola monɔkɔ ya Anglais mpe bálanda mimeseno ya bato ya Angleterre.

MOKANO YA BEDELL YA KOBIMISA BIBLIA

Makanisi ya ndenge wana ebangisaki Bedell te. Na ebandeli ya bambula ya 1630, abandaki mosala ya kobongola Biblia oyo eutaki kobima sika (King James Version ya 1611) ya monɔkɔ ya Anglais na monɔkɔ ya Irlandais. Azalaki na mposa ya kobimisa Biblia oyo ekozala mpasi te mpo bato mingi bákanga ntina na yango. Amonaki ete bato mpamba bakozala te na likoki ya koluka na Makomami mpo na komona oyo bakoki kosala mpo bázwa bomoi ya seko soki bazangi likoki ya kotánga Biblia.​—Yoane 17:3.

Bedell azalaki moto ya liboso te ya komona bongo. Bambula soki 30 liboso, William Daniel, episkɔpɔ mosusu amonaki mpe ete ezalaki mpasi mpo moto ayeba oyo Biblia eteyaka soki “ekomami na monɔkɔ oyo ayebi te.” Daniel abongolaki Makomami ya Grɛki na monɔkɔ ya Irlandais. Bedell azwaki sikoyo mokumba ya kobongola Makomami ya Ebre. Biblia oyo babengaka ya Bedell esangisi mosala ya Bedell ná oyo William Daniel asalaki liboso. Kasi, na nsima makambo ebongwanaki, Biblia ya Bedell nde ezalaki Biblia ya mobimba ya liboso na monɔkɔ ya Irlandais, Biblia kaka moko oyo basalelaki yango bambula 300 oyo elandaki na nsima.

Bedell, oyo ayebaki monɔkɔ ya Ebre malamumalamu, azwaki bato mibale ya Irlande oyo balobaka monɔkɔ ya Irlandais mpo básalisa ye na kobongola Biblia ya Anglais na Irlandais. Ntango bazalaki kokoba na mosala na bango, Bedell mpe bato mibale oyo bazalaki kosalisa ye, batalaki malamumalamu vɛrsɛ mokomoko mpe babongisaki yango. Basalelaki mpe libongoli moko ya monɔkɔ ya Italien oyo Giovanni Diodati, sango moko ya ekólo Suisse abimisaki, ata mpe libongoli ya Grɛki ya Septante mpe maniskri moko ya Biblia na monɔkɔ ya Ebre ya kala ya ntina mingi.

Ekipi yango etambwisamaki na bato oyo babongolaki King James Version (bato oyo Bedell ayebaki mokomoko na bango malamu) mpe batyaki nkombo mpenza ya Nzambe na bisika mingi na Biblia na bango. Na ndakisa, na Kobima 6:3, batyaki nkombo ya Nzambe “Iehovah.” Babombaki maniskri ya Bedell ya liboso na bibliotɛkɛ ya Marsh, na Dublin, na Irlande.​—Talá etanda “Bakanisaki mpe bandimaki Bedell.”

NSUKANSUKA EBIMAKI

Bedell asilisaki mosala na ye na mobu soki 1640. Kasi mwaye ya kobimisa yango mbala moko ezalaki te. Mpo na nini? Mpo batɛmɛlaki ye makasi. Banguna basambwisaki moto ya Bedell oyo azalaki kokamba mosala ya kobongola, na elikya ete yango ekobebisa mosala na ye. Kutu, basalelaki mayele mabe mpo akɔta bolɔkɔ. Longola yango, Bedell akutanaki lisusu na likambo ya mpasi ntango barɛbɛlɛ ya Irlande oyo bazalaki kotɛmɛla bato ya Angleterre mabe mpenza babimisaki bitumba oyo ebomaki bato mingi na 1641. Bato ya mboka Irlande babombaki Bedell mpo na mwa ntango atako azalaki moto ya Angleterre mpo bayebaki ete azalaki komitya na esika na bango. Ata bongo, nsukansuka barɛbɛlɛ bakangaki ye mpe batyaki ye na esika moko ya mabe mpenza. Na ntembe te, yango nde esalaki ete akufa na mobu 1642. Amonaki te ndenge babimisaki Biblia na ye.

Titre ya maniskri ya liboso ya Bedell, mobu 1640 mpe Biblia oyo ebimaki na 1685

Mosala ya Bedell ebebaki pene na nyonso ntango babebisaki ndako na ye. Likambo ya esengo, moninga na ye moko ya motema alongolaki mikanda nyonso oyo Bedell abongolaki liboso bábebisa ndako yango. Na nsima, Narcissus Marsh, oyo akómaki episkɔpɔ-mokonzi ya Armagh mpe ya eglize ya Irlande azwaki mikanda yango. Azwaki lisungi ya mbongo epai ya Robert Boyle, moto moko ya siansi mpe na mpiko nyonso abimisaki Biblia ya Bedell na mobu 1685.

MOSALA MOKE KASI YA NTINA MINGI

Mokili esepelaki te na Biblia ya Bedell. Atako ezalaki mosala moke, kasi esalisaki bato báyeba Biblia malamu, mingimingi bato oyo balobaka monɔkɔ ya Irlandais; kaka na Irlande te kasi mpe na Écosse mpe bisika mingi mosusu. Bato yango bakoki sikoyo kokokisa mposa na bango ya koyeba Nzambe ntango bazali kotánga Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango.​—Matai 5:3, 6.

“Ntango totángaki Biblia ya Bedell, toyokaki maloba ya Biblia na monɔkɔ ya mboka na biso. Yango mpenza nde esalisaki ngai ná libota na ngai tóyekola makambo kitoko oyo ezali na Makomami”

Biblia ya Bedell ekobaki kosalisa baoyo balingaka solo bátánga yango tii na eleko na biso. Moto moko oyo alobaka monɔkɔ ya Irlandais, oyo autaki koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza, alobi boye: “Ntango totángaki Biblia ya Bedell, toyokaki maloba ya Biblia na monɔkɔ ya mboka na biso. Yango mpenza nde esalisaki ngai ná libota na ngai tóyekola makambo kitoko oyo ezali na Makomami.”