Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Batatoli ya Yehova bazali banani?

Batatoli ya Yehova bazali banani?

“Nayebaki Mike banda bambula mingi. Azali Motatoli ya Yehova. Kasi lingomba na ye ezalaki ntango nyonso kokamwisa ngai. Yehova azali nani? Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka te bafɛti ya Bonane to Noele mpe bafɛti mosusu ya ekólo? Mike amikɔtisá te na mwa lingomba moko boye?”​—Becky, Californie, États-Unis.

“Ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola Biblia na bato ya kartye na biso, nazalaki komituna boye: ‘Nkombo Batatoli ya Yehova elimboli nini? Oyo nkombo ya lingomba ya ndenge nini!’”​—Zenon, Ontario, Canada.

“Ngai ná mwasi na ngai tokanisaki ete Batatoli ya Yehova bayaki epai na biso mpo tozalaki koyoka lokola tomemi ngambo mpo tokendaki eglize te. Lokola tomonaki te makambo oyo tozalaki koluka na baeglize ya minene, tondimaki te ete tokoki komona yango na mwa lingomba lokola oyo ya Batatoli ya Yehova.”​—Kent, Washington, États-Unis.

“Mpo na koloba solo, nayebaki te soki bazali banani mpe mateya nini bandimaka.”​—Cecilie, Esbjerg, Danemark.

Mbala mosusu, osí omoná bango bazali kosakola ndako na ndako to na bisika ya bato nyonso mpe bazali kokabola mikanda na bango oyo elimbolaka Biblia mpe kosɛnga bato báyekola na bango Biblia ofele. Mbala mosusu moko na bango así apesá yo zulunalo oyo. Ata bongo, okoki komituna soki Batatoli ya Yehova bazali mpenza banani. Mbala mosusu okanisaka lokola moko ya bato oyo tolobeli awa na likoló.

Soki omitunaka mituna ya ndenge wana, okoki kozwa biyano wapi? Ndenge nini okoki koyeba mateya oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza, epai mbongo oyo basalaka misala na bango mpe batongaka bisika na bango ya losambo eutaka mpe mpo na nini bayaka na bandako ya bato mpe basololaka na bango na bisika ya bato nyonso?

Cecilie oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Natángaki makambo mingi na Internet oyo etali Batatoli ya Yehova. Nayokaki mpe makambo mingi ya mabe oyo balobaka mpo na bango. Yango wana nakómaki kokanisela bango mabe.” Kasi na nsima, asololaki na Batatoli ya Yehova bango moko mpe azwaki biyano oyo ebongi na mituna na ye.

Okosepela kozwa biyano ya solosolo na mituna oyo omitunaka mpo na Batatoli ya Yehova? Tosɛngi yo okutana na Batatoli ya Yehova bango moko, babimisi ya zulunalo oyo. (Masese 14:15) Tokanisi ete masolo oyo elandi ekosalisa yo oyeba soki tozali banani mpe mateya oyo tondimaka, ata mpe mosala oyo tosalaka.